Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 6

Mwana oyo alakamaki

Mwana oyo alakamaki

LUKA 2:21-39

  • YESU AKATAMI NGƐNGA MPE NA NSIMA BAMEMI YE NA TEMPELO

Yozefe ná Maria batikali na Beteleme na esika ya kozonga na Nazarete. Ntango Yesu akokisi mikolo mwambe, bakati ye ngɛnga, kaka ndenge Mibeko ya Nzambe epai ya Yisraele elobaki. (Balevi 12:2, 3) Bazalaki mpe na momeseno ya kopesa mwana mobali nkombo na mokolo yango. Bapesi mwana na bango nkombo Yesu, ndenge anzelu Gabriele ayebisaki bango.

Sanza mobimba eleki mpe sikoyo Yesu akokisi mikolo 40. Sikoyo baboti na ye bakei na ye wapi? Bakei na tempelo na Yerusaleme, oyo ezali mosika mingi te na esika oyo bazali kofanda. Mobeko elobaki ete soki mwasi aboti mwana mobali, nsima ya mikolo 40 mwasi yango asengeli kokende kopesa mbeka na tempelo mpo apɛtolama.​—Balevi 12:4-8.

Maria asali mpe bongo. Amemi bandɛkɛ mibale ya mike mpo na mbeka. Likambo yango emonisi ete Yozefe ná Maria bazalaki na bozwi mingi te. Mobeko elobaki ete esengeli kopesa mbeka ya mwana-mpate ya mobali mpe ndɛkɛ. Kasi soki mama akokoka te kopesa mwana-mpate, akopesa bipopo to bana ndɛkɛ mibale. Yango nde Maria apesi.

Ntango bakómi na tempelo, mobange moko apusani pene ya Yozefe ná Maria. Nkombo na ye Simeone. Nzambe ayebisaki ye ete liboso akufa, akomona Kristo to Masiya oyo Yehova alakaki. Na mokolo wana elimo santu ememi Simeone na tempelo, esika akutani na Yozefe mpe Maria ná mwana na bango. Simeone amemi mwana yango na mabɔkɔ.

Ntango amemi Yesu, Simeone akumisi Nzambe mpe alobi ete: “Sikoyo, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, tiká moombo na yo akufa na kimya ndenge olobaki; mpo miso na ngai emoni mwango na yo ya kobikisa oyo obongisi na miso ya bato ya bikólo nyonso, pole mpo na kolongola elamba oyo ezipi bikólo mpe nkembo ya bato na yo Yisraele.”​—Luka 2:29-32.

Yozefe ná Maria bakamwe ntango bayoki maloba wana. Simeone apamboli bango mpe ayebisi Maria ete mwana na ye “atyami mpo na kokweisa mpe kotɛlɛmisa lisusu bato mingi na Yisraele” mpe mawa oyo ezali lokola mopanga oyo epeli makasi, ekotɔbɔla molimo ya Maria.​—Luka 2:34.

Moto mosusu mpe azali wana na mokolo yango. Ezali Ana mosakoli mwasi moko ya mbula 84. Azalaki kozanga te na tempelo. Na ntango yango, apusani pene ya Yozefe mpe Maria ná mwana na bango Yesu. Ana abandi kotɔnda Nzambe mpe koloba mpo na Yesu epai ya bato nyonso oyo balingi koyoka ye.

Kanisá ndenge Yozefe ná Maria basepeli na makambo oyo bakutani na yango na tempelo! Na ntembe te, makambo wana nyonso endimisi bango ete mwana na bango azali mwana oyo alakamaki na Nzambe.