Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo omekola Yesu . . .

Mpo omekola Yesu . . .

MITYÁKÁ NA ESIKA YA BASUSU

Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki konyokwama te mpe komitungisa te lokola bato mosusu. Azalaki nde koyokela bato mawa mingi. Azalaki kosalela bango makambo koleka oyo basengeli na yango. Motema mawa ezalaki kotinda ye asalisa bango. Makambo oyo asalaki elobelami na Mokapo 32, 37, 57, 99.

SOLOLÁKÁ NA BATO

Ezala bilenge to mikóló bazalaki kobanga te kosolola na Yesu mpo azalaki kotyola bato te mpe azalaki komona te ete aleki bango. Lokola Yesu azalaki kotyela bato likebi, bazalaki kosepela kozala elongo na ye. Mpo na koyeba yango, talá Mokapo 25, 27, 95.

BONDELÁKÁ MINGI

Mbala mingi, Yesu azalaki kobondela Tata na ye, ezala ntango azali ye moko to na bato mosusu oyo bazalaki kosambela Yehova. Azalaki kobondela na mabaku mingi, kaka na ntango ya kolya te. Abondelaki mpo na kopesa Tata na ye matɔndi, mpo na kosanzola ye, mpe koluka litambwisi na ye liboso ya kozwa bikateli ya minene. Talá bandakisa yango na Mokapo 24, 34, 91, 122, 123.

KOLUKAKA KAKA BOLAMU NA YO MOKO TE

Ntango mosusu, na esika Yesu apema to amisepelisa mwa moke, azalaki nde kosalisa bato. Azalaki koluka bolamu na ye moko te. Na likambo oyo mpe, atikelá biso ndakisa oyo tosengeli kolanda. Mpo na koyekola makambo yango, talá Mokapo 19, 41, 52.

LIMBISÁKÁ

Yesu asukaki kaka te na koteya ntina ya kolimbisa, kasi amonisaki yango na ndenge azalaki kolimbisa bayekoli na ye mpe bato mosusu. Manyolá na bandakisa oyo ezali na Mokapo 26, 40, 64, 85, 131.

ZALÁ NA MOLENDE

Biblia esakolaki ete Bayuda mingi bakondimela Masiya te mpe banguna na ye bakoboma ye. Na yango, Yesu akokaki kolɛmbisa mabɔkɔ mpo asalisa bato te. Kasi na esika ya kosala bongo, atombolaki losambo ya solo na molende mpenza. Atikelá bayekoli na ye ndakisa ya malamu oyo basengeli kolanda ntango bato bazali koboya koyoka nsango malamu to kotɛmɛla bango. Talá Mokapo 16, 72, 103.

ZALÁ NA KOMIKITISA

Yesu alekaki bato ya kozanga kokoka na boyebi mpe na bwanya. Lokola azalaki moto ya kokoka, azalaki na makasi mingi mpe na mayele koleka bato nyonso. Kasi azalaki kosalela basusu na komikitisa mpenza. Okozwa mateya na makambo yango na Mokapo 10, 62, 66, 94, 116.

ZALÁ MOTEMA MOLAI

Ntango bantoma ya Yesu mpe bato mosusu bazalaki kolanda ndakisa na ye te, to kosalela te makambo oyo ateyi bango, Yesu azalaki ntango nyonso komonisela bango motema molai. Azongelaki makambo oyo basengelaki na yango, na motema molai mpenza, mpo bákoka kobongisa boyokani na bango na Yehova. Mpo na kozwa mateya na motema molai ya Yesu, talá Mokapo 74, 98, 118, 135.