Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 61

Yesu abikisi elenge mobali moko oyo azalaki na demo

Yesu abikisi elenge mobali moko oyo azalaki na demo

MATAI 17:14-20 MARKO 9:14-29 LUKA 9:37-43

  • ESENGELI KOZALA NA KONDIMA MAKASI MPO NA KOBIKISA ELENGE MOBALI OYO AZALI NA DEMO

Ntango Yesu, Petro, Yakobo ná Yoane bakiti na ngomba, bamoni ebele ya bato. Likambo nini ezali koleka awa? Bakomeli bazingi bayekoli mpe bazali kotyana na bango ntembe. Ebele ya bato bakamwe ntango bamoni Yesu, mpe bakei mbangu epai na ye mpo na kopesa ye mbote. Yesu atuni bango: “Likambo nini bozali kotyana na bango ntembe?”​—Marko 9:16.

Moto moko na kati ya ebele ya bato yango afukameli Yesu mpe alobi: “Moteyi, namemeli yo mwana na ngai ya mobali mpo azali na elimo moko oyo akómisi ye baba; mpe epai nyonso oyo akangaka ye abwakaka ye na mabele, mpe abimisaka fulufulu mpe alyaka mino na ye mpe asilaka makasi. Mpe nalobaki na bayekoli na yo ete bábimisa ye, kasi bakokaki te.”​—Marko 9:17, 18.

Emonani ete bakomeli bazali kotyola bayekoli mpo balongi te kobikisa mwana mobali yango, mbala mosusu bazali kosɛka bango. Na esika ete Yesu aloba na tata yango oyo azali kolelela ye, alobi nde na ebele ya bato yango: “Ee libota ezangá kondima mpe egumbamá, nakoumela na bino tii ntango nini? Nakokanga motema na makambo na bino tii ntango nini?” Na ntembe te Yesu apameli nde bakomeli mpo bazali kotungisa bayekoli na ye ntango azali te. Na nsima, Yesu alobi na tata ya mwana mobali yango ete: “Bómemela ngai ye awa.”​—Matai 17:17.

Ntango mwana azali kopusana pene na Yesu, demo oyo akɔtelaki ye abwaki ye na mabele mpe mwana yango abandi kotutuka makasi. Mwana yango azali kobalukabaluka na mabele, mpe kobimisa fulufulu na monɔkɔ. Yesu atuni tata ya mwana yango: “Banda ntango nini likambo oyo ezali kokómela ye?” Tata azongiseli ye ete: “Banda bomwana mpenza; mpe mbala na mbala abwakaka ye na mɔtɔ mpe na mai mpo na koboma ye.” Tata yango asɛngi Yesu: “Soki okoki kosala mwa eloko, yokelá biso mawa mpe salisá biso.”​—Marko 9:21, 22.

Tata yango azali motema likoló, mpo ata bayekoli ya Yesu balongi te kosalisa mwana yango. Ntango Yesu ayoki maloba ya tata wana, akitisi ye motema na maloba oyo: “Liloba wana, ‘Soki okoki’! Ya solo, makambo nyonso ekoki kosalema epai ya moto oyo azali na kondima.” Na mbala moko, tata yango agangi: “Nazali na kondima! Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!”​—Marko 9:23, 24.

Yesu amoni ete ebele ya bato bazali koya mbangu epai na ye. Bongo Yesu apameli demo yango: “Yo elimo oyo okómisi moto oyo baba mpe obomi ye matoi, nalobi na yo ete, bimá na kati na ye mpe kokɔta lisusu epai na ye te.” Ntango demo yango azali kobima, mwana yango abandi koganga mpe kotutuka mingi koleka. Na nsima mwana yango alali kaka wana, azali koningana te. Ntango bato bamoni bongo, mingi balobi: “Akufi!” (Marko 9:25, 26) Kasi ntango Yesu asimbi ye na lobɔkɔ, atɛlɛmi mpe ‘abiki na ngonga wana kaka.’ (Matai 17:18) Yango wana, bato bakamwe komona likambo oyo Yesu asali.

Liboso, ntango Yesu atindaki bayekoli na ye bákende kosakola, babenganaki bademo. Sikoyo, ntango bakɔti na ndako moko, bayekoli batuni Yesu: “Mpo na nini biso tokokaki kobimisa ye te?” Yesu ayebisi bango ete ezali mpo bazangaki kondima, alobi: “Oyo ya motindo wana akoki kobima na nzela mosusu te kaka na libondeli.” (Marko 9:28, 29) Esengeli kozala na kondima makasi mpe kosɛnga nguya ya Nzambe mpo na kobengana demo ya makasi wana.

Mpo na kosukisa, Yesu alobi: “Ya solo nalobi na bino: Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende, mpe ezali na eloko moko te oyo bokokoka kosala te.” (Matai 17:20) Kondima ekoki kozala na nguya mpenza!

Mikakatano oyo epekisaka moto akende liboso na mosala ya Yehova ekoki komonana monene lokola ngomba. Kasi, soki tozali na kondima, tokoki kolonga mikakatano yango.