Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 44

Yesu akitisi mopɛpɛ makasi na mbu

Yesu akitisi mopɛpɛ makasi na mbu

MATAI 8:18, 23-27 MARKO 4:35-41 LUKA 8:22-25

  • YESU AKITISI MOPƐPƐ MAKASI NA MBU YA GALILE

Yesu alɛmbi mingi mpo azalaki na makambo ebele ya kosala mokolo mobimba. Ntango mpokwa ekómi, alobi na bayekoli na boye: “Tókatisa na ngámbo mosusu,” elingi koloba na ngámbo mosusu ya Kapernaume.​—Marko 4:35.

Etúká ya Gerasene oyo eyebani mpe na nkombo Dekapolisi ezali na ngámbo ya libongo ya mbu ya Galile na ɛsti. Bingumba ya Dekapolisi ezali esika oyo bonkɔkɔ ya Bagrɛki efandá, atako Bayuda mingi bafandaka mpe kuna.

Kolongwa ya Yesu na Kapernaume ezali sekele te. Bamasuwa mosusu mpe ebandi kokatisa mbu. (Marko 4:36) Ezali molai mingi te mpe kokatisa yango ezali mpasi te. Mbu ya Galile ezali lokola laki moko ya monene ya mai kitoko, oyo molai na yango ezali soki kilomɛtrɛ 21 mpe monene na yango soki kilomɛtrɛ 12. Kasi ezali mozindo te.

Atako Yesu azali moto ya kokoka, alɛmbi mpenza mpo na mosala makasi oyo asali. Yango wana, ntango masuwa ebandi kokende, alali na nsima, atye motó na ye na kusɛ mpe mpɔngi makasi ezwi ye.

Bantoma na ye mingi bayebi mpenza kotambwisa masuwa, kasi mobembo yango ekozala pɛtɛɛ te. Bangomba ezingi mbu ya Galile mpe mbala mingi mai na yango ezalaka mwa molunge. Na ntango mosusu, mopɛpɛ ya malili oyo eutaka na bangomba eyaka nokinoki mpe ebɛtaka mai yango mpe ebimisaka na mbalakaka mipɛpɛ ya makasi mpenza na mbu. Yango nde likambo oyo esalemi sikoyo. Eumeli te mbonge ebandi kobɛta masuwa. Mai ebandi ‘kotondana na masuwa mpe bazali na likama.’ (Luka 8:23) Kasi, Yesu azali kaka kolala!

Mibali yango oyo bamesaná na mai bazali kosala makasi mpo na kobenda masuwa, bameki mayele nyonso oyo basalelá na mipɛpɛ makasi ya ndenge wana. Kasi na mbala oyo, makambo ekeseni. Lokola babangi mpo na bomoi na bango, balamwisi Yesu mpe balobi boye: “Nkolo, bikisá biso, tolingi tókufa!” (Matai 8:25) Bayekoli bazali sikoyo kobanga ete bakozinda!

Ntango Yesu alamuki, alobi na bantoma boye: “Mpo na nini bozali kobangabanga, bino bato ya kondima moke?” (Matai 8:26) Na nsima, Yesu apameli mopɛpɛ mpe mbu boye: “Shiii! Fandá nyɛɛ!” (Marko 4:39) Mopɛpɛ wana ya makasi ekiti mpe mbu ekómi kimya. (Marko ná Luka balobeli likambo yango; liboso bamonisi ete Yesu akitisi mopɛpɛ na ndenge ya likamwisi, mpe na nsima balobeli kozanga kondima ya bayekoli.)

Kanisá naino ndenge bayekoli bayokaki! Bauti komona ndenge mbu etomboki mpe na nsima efandi nyɛɛ. Kobanga ekangi bango. Bazali kolobana boye: “Oyo azali mpenza nani, mpo ata mopɛpɛ ná mbu etosa ye?” Mpe bakómi na ngámbo mosusu ya mbu kozanga likama. (Marko 4:41–5:1) Mbala mosusu bamasuwa mosusu elongi kozonga na libongo na ngámbo ya wɛsti.

Ezali mpenza kokitisa motema koyeba ete Mwana ya Nzambe azali na nguya likoló ya mai mpe mopɛpɛ! Ntango akotyela mabele likebi na boumeli ya boyangeli na ye, bato nyonso bakofanda na kimya, mpo makama minene ya nsɔmɔ ekozala lisusu te!