Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 40

Liteya na oyo etali kolimbisa

Liteya na oyo etali kolimbisa

LUKA 7:36-50

  • MWASI MOKO MOSUMUKI APAKOLI YESU MAFUTA NA MAKOLO

  • NDAKISA YA MOTO YA NYONGO MPO NA KOLOBELA KOLIMBISA

Moto na moto azali kotalela maloba mpe makambo oyo Yesu azali kosala na kolanda ndenge motema na ye ezali. Yango emonani polele na ndako moko na Galile. Mofarisai moko na nkombo Simo abengisi Yesu aya kolya epai na ye, mbala mosusu mpo na komona na miso moto oyo azali kosala misala ya kokamwa. Yesu amoni yango libaku mpo na kosakwela baoyo bakozala wana; yango wana andimi, kaka ndenge andimaki mpe kokende kolya ná bakɔngɔli-mpako mpe basumuki.

Kasi, bayambi Yesu te ndenge bayambaka mopaya nyonso. Lokola banzela ya Palestine ezalaka zɛlɔzɛlɔ, soki moto alati basandale, makolo ekómaka mɔtɔ mpe salite, yango wana bazalaka na momeseno ya kosukola bapaya makolo na mai ya mpiɔ. Kasi basaleli Yesu bongo te. Bapesi ye mpe bizi te mpo na kotombela ye boyei malamu. Momeseno mosusu ezali ya kopakola mopaya mafuta ya nsolo kitoko na nsuki mpo na komonisa boboto mpe ezaleli ya koyamba bapaya. Basaleli mpe Yesu bongo te. Boye, ndenge nini tokoloba ete bayambi ye malamu?

Bapaya bafandi na mesa mpe babandi kolya. Ntango bazali kolya, mwasi moko akɔti na malɛmbɛ kozanga ete bábengisa ye. “Ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki.” (Luka 7:37) Moto nyonso ya kozanga kokoka azali mosumuki, kasi emonani ete mwasi oyo azali na bomoi ya mbindo, mbala mosusu azali mwasi ya ndumba. Ntango mosusu ayokaki mateya ya Yesu, ata mpe ndenge alobaki ete ‘baoyo nyonso bazali na mikumba báya epai na ye mpo apemisa bango.’ (Matai 11:28, 29) Ekoki kozala ete maloba mpe misala ya Yesu esimbaki motema na ye, yango wana ayei koluka Yesu.

Ayei nsima ya Yesu na mesa mpe afukami na makolo na ye. Mai ya miso na ye ezali kopɔlisa makolo ya Yesu mpe azali kopangwisa yango na nsuki na ye. Azali kopesa makolo yango bizi mpe kosopela yango mwa mafuta ya nsolo kitoko oyo ayei na yango. Simo azali kotala na miso mabe, azali komilobela ye moko boye: “Soki moto oyo azalaka mpenza mosakoli, mbɛlɛ ayebi mwasi oyo azali kosimba ye mpe bizaleli na ye, mbɛlɛ ayebi ete azali mosumuki.”​—Luka 7:39.

Lokola ayebaki makanisi ya Simo, Yesu alobi boye: “Simo, nazali na mwa likambo ya koloba na yo.” Bongo Simo alobi: “Moteyi, lobá yango!” Yesu akobi boye: “Bato mibale bazalaki na nyongo ya modefisi moko boye; moko azalaki na nyongo ya denari nkama mitano (500), kasi mosusu ya ntuku mitano (50). Lokola bazalaki na eloko ya kozongisa te, alimbisaki bango nyonso mibale na motema moko. Sikoyo, nani na kati na bango akolinga ye mingi koleka?” Mbala mosusu kaka mpo na koyanola, Simo alobi boye: “Nakanisi ezali moto oyo ye alimbisaki nyongo ya monene koleka na motema moko.”​—Luka 7:40-43.

Yesu andimi. Na nsima, atali mwasi yango mpe alobi na Simo boye: “Omoni mwasi oyo? Nakɔti na ndako na yo; opesi ngai mai ya kosukola makolo na ngai te. Kasi mwasi oyo apɔlisi makolo na ngai na mpisoli na ye mpe apangwisi yango na nsuki na ye. Opesi ngai lipwɛpwɛ te; kasi mwasi oyo, banda ngonga oyo nakɔtaki awa, atiki te kopwɛpwa makolo na ngai na boboto. Yo opakoli motó na ngai mafuta te; kasi mwasi oyo apakoli makolo na ngai mafuta ya nsolo kitoko.” Yesu amonaki ete mwasi yango asali makambo oyo emonisi ete abongoli mpenza motema mpe atiki bomoi na ye ya mbindo. Yango wana, asukisi boye: “Nazali koyebisa yo, masumu na ye, atako ezali mingi mpenza, elimbisami, mpo alingaki mingi; kasi moto oyo balimbisi moke, alingaka moke.”​—Luka 7:44-47.

Yesu alobi te ete pite ezali mabe te. Kasi, azali nde na motema mawa epai ya baoyo basalaki masumu ya minene, kasi na nsima bayoki mawa mpo na makambo oyo basalaki mpe bayei epai na ye mpo na koluka bopemi. Oyo nde bopemi mwasi yango azwi ntango Yesu alobi na ye boye: “Masumu na yo elimbisami. . . . Kondima na yo ebikisi yo; kende na kimya.”​—Luka 7:48, 50.