Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 48

Asali makamwisi kasi baboyi ye ata na Nazarete

Asali makamwisi kasi baboyi ye ata na Nazarete

MATAI 9:27-34; 13:54-58 MARKO 6:1-6

  • YESU ABIKISI MOTO OYO AKUFÁ MISO MPE OYO ALOBAKA TE

  • BATO YA NAZARETE BABOYI YE

Yesu asali mosala mokolo mobimba. Nsima ya mobembo na ye na etúká ya Dekapolisi, abikisi mwasi moko oyo azalaki kotanga makila mpe asekwisi mwana mwasi ya Yairuse. Kasi, butu eyindi naino te. Ntango Yesu alongwe na ndako ya Yairuse, bato mibale oyo bakufá miso balandi ye, mpe bazali koganga: “Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa.”​—Matai 9:27.

Ndenge bato yango babengi Yesu “Mwana ya Davidi,” emonisi ete bandimi ete Yesu azali mokitani na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe na yango azali Masiya. Yesu asali lokola azali koyoka bango te, mbala mosusu mpo amona soki bakokoba kobelela, mpe basalaki bongo. Ntango Yesu akɔti na ndako moko, bato yango mibale balandi ye. Yesu atuni bango: “Bondimi ete ngai nakoki kosala yango?” Na kondima nyonso, bayanoli: “Ɛɛ, Nkolo.” Na yango, Yesu asimbi miso na bango mpe alobi: “Ekómela bino ndenge kondima na bino ezali.”​—Matai 9:28, 29.

Mbala moko bakómi komona! Kaka ndenge ayebisaki bamosusu liboso, Yesu ayebisi bango mpe bápanza nsango yango te. Kasi lokola batɔndaki na esengo, na nsima bapanzaki nsango yango na mboka mobimba.

Ntango kaka bato wana mibale babimi, bamemeli Yesu moto moko oyo alobaka te mpo azali na demo. Yesu abimisi demo yango mpe moto yango abandi mbala moko koloba. Ebele ya bato oyo bazali wana bakamwe mpe balobi ete: “Likambo ya boye emonaná naino te na Yisraele.” Bafarisai mpe bazali wana. Lokola bakoki kowangana makamwisi yango te, bazongeli lisusu makanisi na bango ya mabe na ntina etali moto oyo azali kopesa Yesu nguya ya kosala makamwisi yango; balobi boye: “Azali kobimisa bademo nde na nguya ya mokonzi ya bademo.”​—Matai 9:33, 34.

Mwa moke na nsima, Yesu azongi na engumba na ye Nazarete, elongo na bayekoli na ye. Mbula soki moko liboso, ateyaki na sinagoga ya mboka yango. Na ebandeli, bato basepelaki na mateya na ye, kasi na nsima baboyaki yango mpe balukaki koboma ye. Sikoyo, Yesu ameki lisusu kosalisa bato ya mboka na ye.

Mokolo ya Sabata, ayei lisusu na sinagoga mpo na koteya. Bato mingi bakamwe, bamituni kutu boye: “Moto oyo azwi bwanya oyo mpe misala oyo ya nguya epai wapi?” Babakisi: “Oyo ezali mwana ya mosali-mabaya te? Nkombo ya mama na ye Maria te, mpe bandeko na ye ya mibali ezali Yakobo ná Yozefe ná Simo ná Yuda te? Mpe bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali elongo na biso te? Bongo moto oyo azwi makambo oyo nyonso epai wapi?”​—Matai 13:54-56.

Bato yango bazali komona Yesu kaka lokola moto nyonso. Bazali koloba ete: ‘Tomonaki ye ndenge azali kokola, sikoyo ndenge nini akoki kozala Masiya?’ Na yango, atako bamoni makambo nyonso oyo endimisi ete azali Masiya​—ezala bwanya mingi ya Yesu mpe makamwisi na ye—​baboyi ye. Ata bandeko na ye mpe baboyi kondimela ye, yango etindi Yesu aloba boye: “Mosakoli azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpenza mpe na ndako na ye moko.”​—Matai 13:57.

Kozanga kondima na bango ekamwisi mpenza Yesu. Yango wana, asali ata likamwisi moko te kuna “longola kaka kotya mabɔkɔ likoló ya mwa bato oyo bazalaki na maladi mpe kobikisa bango.”​—Marko 6:5, 6.