Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 59

Mwana ya moto azali nani?

Mwana ya moto azali nani?

MATAI 16:13-27 MARKO 8:22-38 LUKA 9:18-26

  • YESU ABIKISI MOTO MOKO AKUFÁ MISO

  • PETRO AKOZWA BAFUNGOLA YA BOKONZI

  • YESU ALOBELI LIWA MPE LISEKWA NA YE

Yesu ná bayekoli na ye bakómi na Betesaida. Bato bamemeli Yesu moto moko akufá miso mpe basɛngi ye asimba moto yango mpo abika.

Yesu asimbi moto yango na lobɔkɔ mpe akei na ye na libándá ya mboka. Nsima ya kobwakela ye nsoi na miso, atuni ye: “Ozali komona eloko?” Moto yango azongiseli ye ete: “Nazali komona bato, mpo nazali komona biloko moko boye lokola banzete, kasi ezali kotambola.” (Marko 8:23, 24) Ntango Yesu atye mabɔkɔ na ye na miso ya moto yango, moto yango amoni polele. Na nsima, ayebisi moto yango oyo akómi komona polele azonga mbala moko epai na ye, akɔta lisusu na mboka te.

Bongo Yesu ná bayekoli na ye bakei na nɔrdi, na etúká ya Kaisaria ya Filipe. Esengeli kotambola na nzela ya ngomba kilomɛtrɛ soki 40. Mboka yango ezali likoló ya ngomba, mɛtrɛ 350 na likoló ya nivo ya mbu, pene na Ngomba Heremone oyo etondi na nɛjɛ, na nɔrdi-ɛsti. Mobembo yango esɛngaka ata mikolo mibale.

Na nzela, Yesu akei na esika oyo azali kaka ye moko mpo na kobondela. Etikali kaka sanza libwa to zomi liboso Yesu akufa, mpe azali komitungisa mpo na bayekoli na ye. Eleki mwa mikolo, bayekoli mosusu batikaki kolanda ye, mpe emonani ete bamosusu babulungani na makanisi to mpe balɛmbi nzoto. Mbala mosusu bazali komituna ntina oyo Yesu aboyaki bato bátya ye mokonzi mpe ntina oyo aboyaki kosala elembo moko mpo na komonisa soki azali mpenza nani.

Ntango bayekoli balandi Yesu esika azali kobondela, atuni bango: “Bato bazali koloba ete Mwana ya moto azali nani?” Bayanoli: “Bato mosusu balobaka: Yoane Mobatisi, bamosusu: Eliya, bamosusu mpe: Yirimia to moko ya basakoli.” Ya solo, bato bazali kokanisa ete Yesu azali nde moko ya bato wana oyo asekwi na bakufi! Mpo na koyeba likanisi ya bayekoli na ye, Yesu atuni bango: “Bongo bino bolobi ete ngai nazali nani?” Na mbala moko, Petro apesi eyano oyo: “Ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.”​—Matai 16:13-16.

Yesu ayebisi Petro azala na esengo lokola Nzambe amonisi ye likambo yango, mpe abakisi: “Nalobi na yo ete: Yo ozali Petro, mpe na libanga oyo nakotonga lisangá na ngai, mpe baporte ya Nkunda ekolonga yango te.” Yesu alingi koloba ete akotonga lisangá moko mpe ata Nkunda ekolonga te kokanga bato ya lisangá yango soki batikali sembo awa na mabele. Alaki Petro ete: “Nakopesa yo bafungola ya bokonzi ya likoló.”​—Matai 16:18, 19.

Yesu atye Petro mokonzi ya bantoma mosusu te; alobi mpe te ete akotonga lisangá likoló na ye. Yesu ye moko nde Libanga oyo lisangá ekotongama likoló na yango. (1 Bakorinti 3:11; Baefese 2:20) Kasi, alobi ete akopesa Petro bafungola misato. Petro akozwa mokumba ya kofungolela bato baporte, elingi koloba ya kopesa bato likoki ya kokɔta na Bokonzi ya likoló.

Petro akosalela fungola ya liboso na Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango akomonisa Bayuda oyo babongoli motema mpe Baprozelite likambo oyo basengeli kosala mpo na kobika. Akosalela fungola ya mibale mpo na kopesa Basamaria oyo bakómi bandimi nzela ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. Na nsima, na mobu 36 T.B., Petro akosalela fungola ya misato mpo na kopesa libaku yango epai ya bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te, Korneyi mpe bato mosusu.​—Misala 2:37, 38; 8:14-17; 10:44-48.

Na lisolo oyo, bantoma ya Yesu bayoki mawa ntango ayebisi bango ete mosika te akomona mpasi mpe akokufa na Yerusaleme. Lokola Petro akangi ntina te ete Yesu akosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló, abendi Yesu pembeni mpe abandi kopamela ye, alobi: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Kasi Yesu apesi ye mokɔngɔ mpe alobi: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”​—Matai 16:22, 23.

Longola bantoma, Yesu abengi bato mosusu oyo bazali wana mpe amonisi bango ete kozala moyekoli na ye ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Ayebisi bango: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso. Mpo moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akobikisa yango.”​—Marko 8:34, 35.

Ya solo, bayekoli yango basengeli kozala na mpiko mpe komipimela makambo mosusu mpo Yesu andima bango. Yesu alobi: “Moto nyonso oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai na libota oyo ya ekobo mpe ya masumu, Mwana ya moto mpe akoyoka nsɔni mpo na ye ntango akoya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu basantu.” (Marko 8:38) Na ntango wana, oyo Yesu akoya, “akopesa moto na moto mbano na kolanda etamboli na ye.”​—Matai 16:27.