Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 60

Kobongwana ya Kristo: Emonaneli ya nkembo na ye

Kobongwana ya Kristo: Emonaneli ya nkembo na ye

MATAI 16:28–17:13 MARKO 9:1-13 LUKA 9:27-36

  • EMONANELI YA KOBONGWANA YA KRISTO

  • BANTOMA BAYOKI MONGONGO YA NZAMBE

Wana Yesu azali koteya bato na etúká ya Kaisaria ya Filipe, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 25 na Ngomba Heremone, ayebisi bantoma na ye likambo moko ya kokamwa. Alobi: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakoyoka ata nsolo ya liwa te liboso bámona Mwana ya moto ayei na bokonzi na ye.”​—Matai 16:28.

Na ntembe te, bayekoli bamituni soki Yesu alingi koloba nini. Pɔsɔ soki moko na nsima, Yesu akei elongo na bantoma na ye misato​—Petro, Yakobo mpe Yoane—​na ngomba moko molai. Ntango mosusu ezali butu makasi, mpo mibali misato yango bazali na mpɔngi na miso. Ntango Yesu azali kobondela, abongwani liboso na bango. Bantoma yango bamoni elongi na ye ebandi kongɛnga lokola moi, mpe bilamba na ye ekómi kongɛnga lokola pole, ekómi mpɛmbɛ makasi.

Na nsima, bato mibale, lokola “Moize ná Eliya,” babimi. Elongo na Yesu, babandi kolobela ‘kokende na ye oyo esengeli kosalema na Yerusaleme.’ (Luka 9:30, 31) Kokende yango ezali nde liwa ya Yesu mpe lisekwa oyo ekolanda, oyo Yesu autaki kolobela. (Matai 16:21) Lisolo yango emonisi ete liwa ya nsɔni oyo Yesu akokufa ezali likambo ya kokima te, ndenge Petro akanisaki.

Ntango bantoma yango misato balamuki mpenza, babandi kotala mpe kolanda lisolo, batondi na nsɔmɔ. Atako ezali emonaneli, emonani lokola likambo ya solo mpenza mpe Petro alingi kokɔta na makambo yango. Alobi: “Rabi, ezali malamu tózala awa, boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko ya yo mpe moko ya Moize mpe moko ya Eliya.” (Marko 9:5) Petro alingi nde bátya bahema yango mpo emonaneli yango eumela?

Ntango Petro azali naino koloba, lipata moko oyo ezali kongɛnga makasi ezipi bango, mpe mongongo moko oyo euti na lipata yango elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.” Ntango bantoma bayoki mongongo ya Nzambe, babangi makasi mpe bakwei bilongi na nse, bongo Yesu alobi na bango: “Bótɛlɛma mpe bóbanga te.” (Matai 17:5-7) Ntango bantoma yango batɛlɛmi, bamoni moto mosusu te, kaka Yesu ye moko. Emonaneli yango esili. Na mokolo oyo elandi ntango bazali kokita na ngomba, Yesu apesi bango mitindo ete: “Bóyebisa moto moko te emonaneli oyo tii ntango Mwana ya moto akokufa mpe akolamuka.”​—Matai 17:9.

Kobima ya Eliya na emonaneli yango ebimisi motuna moko. Bantoma batuni: “Mpo na nini bakomeli balobaka ete Eliya asengeli liboso koya?” Yesu apesi bango eyano oyo: “Eliya asilá koya mpe bayebaki ye te.” (Matai 17:10-12) Yesu azali kolobela Yoane Mobatisi, oyo akokisaki mokumba lokola oyo ya Eliya. Eliya abongiselaki Elisha nzela; Yoane mpe asalaki bongo mpo na Kristo.

Emonaneli yango elendisi mpenza Yesu ná bantoma na ye! Emonisi mwa moke nkembo ya Kristo na kati ya Bokonzi. Na yango, ndenge Yesu alakaki, bayekoli yango bamonaki “Mwana ya moto ayei na bokonzi na ye.” (Matai 16:28) Kuna na ngomba, ‘bamonaki bonene na ye na miso na bango moko.’ Atako Bafarisai bazalaki na mposa ya elembo oyo emonisi ete Yesu azali Mokonzi oyo Nzambe aponi, aboyaki kopesa bango elembo. Kasi, bayekoli ya sembo ya Yesu bazwi libaku ya komona kobongwana na ye, oyo ekokisi bisakweli oyo etali Bokonzi. Yango wana Petro ayaki kokoma na nsima ete: “Kondima oyo tondimeli liloba ya esakweli ekómi lisusu makasi koleka.”​—2 Petro 1:16-19.