Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 37

Yesu asekwisi mwana ya mwasi oyo mobali akufá

Yesu asekwisi mwana ya mwasi oyo mobali akufá

LUKA 7:11-17

  • ASEKWISI MOTO NA NAINE

Mwa moke nsima ya kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda, Yesu alongwe na Kapernaume mpe akei na Naine, engumba oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 32 na sudi-wɛsti. Azali ye moko te. Bayekoli na ye mpe ebele ya bato bakei elongo na ye. Ekoki kozala ete bakómi pene ya engumba Naine na mpokwa. Bakutani na ebele ya Bayuda bazali kokende kokunda ebembe. Bamemi nzoto ya elenge mobali oyo akufi libándá ya engumba mpo na kokunda yango.

Mama ya elenge yango nde azali na mawa makasi koleka. Mobali na ye akufá mpe sikoyo kaka mwana moko oyo azalaki na ye akufi. Ntango mobali na ye akufaki, atikalaki kaka na mwana na ye wana oyo azalaki kolinga mingi. Kanisá naino bolingo oyo mwasi wana azalaki na yango epai ya mwana na ye mpo azalaki na elikya ete ye nde akosalisa ye. Sikoyo ye mpe lisusu akufi. Azangi moto ya kofanda na ye mpe ya kosunga ye.

Ntango Yesu amoni mwasi yango, ayoki mpasi na motema mpo na likambo oyo ekómeli ye. Na boboto mpe na ndenge ya kokitisa motema, alobi na ye boye: “Tiká kolela.” Kasi asuki kaka wana te. Apusani mpe asimbi mbeto oyo bamemaki ebembe ya mwana yango. (Luka 7:13, 14) Makambo oyo asali esali ete bato ya engumba oyo bazali kolela bátɛlɛma mbala moko. Na ntembe te, mingi na bango bamituni: ‘Yango elakisi nini, mpe alingi kosala nini?’

Bongo bato oyo bazali elongo na Yesu, oyo bamonaki makamwisi oyo asalaki mpe ndenge oyo abikisaki bamaladi mingi, basali nini? Bamoná naino te Yesu asekwisi moto. Atako bato mosusu basekwisamaki eleki bambula mingi, Yesu mpe akoki kosala likambo ya ndenge wana? (1 Bakonzi 17:17-23; 2 Bakonzi 4:32-37) Yesu alobi boye: “Elenge mobali, nalobi na yo: Tɛlɛmá!” (Luka 7:14) Mpe esalemi bongo. Elenge mobali yango alamuki mpe abandi koloba! Yesu apesi ye epai ya mama na ye, mpe mama na ye akamwe mpe atondi na esengo. Azali lisusu ye moko te.

Ntango bato bamoni ete elenge mobali yango azongi mpenza na bomoi, bakumisi Yehova, Mopesi ya bomoi na maloba oyo: “Mosakoli monene abimi na kati na biso.” Mpo na komonisa ete bakangaki ntina ya misala ya kokamwa ya Yesu, bamosusu balobi boye: “Nzambe atyeli bato na ye likebi.” (Luka 7:16) Nsango ya likamwisi yango epalangani nokinoki na bingumba ya zingazinga mpe mbala mosusu na Nazarete, engumba oyo Yesu abotamaki, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 10. Ekómi mpe tii na sudi na Yudea.

Yoane Mobatisi azali kaka na bolɔkɔ mpe azali na mposa makasi ya koyeba makamwisi oyo Yesu azali kosala. Bayekoli na ye bayebisi ye makamwisi yango. Asali nini?