Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 41

Yesu azali kosala makamwisi na nguya ya nani?

Yesu azali kosala makamwisi na nguya ya nani?

MATAI 12:22-32 MARKO 3:19-30 LUKA 8:1-3

  • YESU ABANDI MOBEMBO YA MIBALE NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • ABIMISI BADEMO MPE AKEBISI MPO NA LISUMU OYO ELIMBISAMAKA TE

Mwa moke nsima ya kolobela likambo ya kolimbisa na ndako ya Simo Mofarisai, Yesu abandi mobembo mosusu ya mosala ya kosakola na Galile. Oyo mbula ya mibale ya mosala na ye mpe azali kosala mobembo ye moko te. Azali elongo na bantoma na ye 12 mpe basi mosusu oyo “abimisaki bango bilimo mabe mpe abikisaki bango na bamaladi.” (Luka 8:2) Na kati na bango, Maria Magadalena, Suzana mpe Yoana oyo mobali na ye azali mokonzi ya basoda ya Mokonzi Erode Antipasi.

Ntango bato mingi bakómi koyoka nsango ya Yesu, mosala na ye ekómi kobimisa bantembe mingi. Yango emonani polele ntango bamemeli Yesu moto moko oyo azali na bademo, akufá miso mpe alobaka te, mpe Yesu abikisi ye. Sikoyo lokola bademo babimi na nzoto na ye, moto yango akómi komona mpe koloba. Bato bakamwe mpe balobi: “Oyo ekoki kozala Mwana ya Davidi te?”​—Matai 12:23.

Bato oyo bazingi ndako epai Yesu ná bayekoli na ye bafandi bazali mingi mpenza mpe bakoki kutu kolya te. Kasi, bango nyonso te nde bazali kokanisa ete Yesu azali “Mwana ya Davidi” oyo alakamaki. Bakomeli mpe Bafarisai mosusu bauti bisika nyonso ya Yerusaleme; kasi te mpo na koyekola epai ya Yesu to kopesa ye mabɔkɔ. Bazali koyebisa bato boye: “Azali na Beelezebube,” boye, azali kosala elongo na “mokonzi ya bademo.” (Marko 3:22) Ntango bandeko ya Yesu bayoki yikiyiki yango, bayei mpo bákanga Yesu. Mpo na nini?

Tii sikoyo, bandeko ya Yesu bazali kondima te ete azali Mwana ya Nzambe. (Yoane 7:5) Yesu oyo yikiyiki yango ezali kobima mpo na ye, akokani te na Yesu oyo bango bayebaki ntango bazalaki kokola na ye na Nazarete. Yango wana, bamoni ete motó na ye ezali kosala lisusu malamu te mpe balobi boye: “Abɛli motó.”​—Marko 3:21.

Kasi, makambo oyo azali kosala emonisi nini? Yesu auti kobikisa mobali moko oyo azalaki na bademo, oyo akómi sikoyo komona mpe koloba. Moto moko te akoki kowangana yango. Yango wana, bakomeli ná Bafarisai bazali koloba lokuta mpo na kosambwisa Yesu. Balobi boye: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nguya ya Beelezebube, mokonzi ya bademo.”​—Matai 12:24.

Yesu ayebi makanisi oyo bakomeli ná Bafarisai bazali na yango, yango wana alobi boye: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ebebaka, mpe engumba nyonso to ndako oyo ekabwani na kati na yango moko ekotɛlɛma te. Ndenge moko, soki Satana azali kobimisa Satana, akabwani na kati na ye moko; bongo bokonzi na ye ekotɛlɛma ndenge nini?”​—Matai 12:25, 26.

Makanisi yango ebongi mpenza! Bafarisai bayebi ete Bayuda mosusu babimisaka bademo. (Misala 19:13) Yango wana, Yesu atuni boye: “Soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bana na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani?” Na maloba mosusu, bifundeli yango etali mpe bana na bango. Na nsima, Yesu alobi lisusu boye: “Kasi soki nazali kobimisa bademo nde na nguya ya elimo ya Nzambe, bokonzi ya Nzambe eleki bino kaka boye.”​—Matai 12:27, 28.

Mpo na komonisa ete ndenge azali kobimisa bademo endimisi ete azali na nguya likoló ya Satana, Yesu apesi ndakisa oyo: “Ndenge nini moto akoki kokɔta na ndako ya moto ya makasi mpe kokamata biloko na ye, soki akangi naino moto yango ya makasi bansinga te? Na nsima nde akopunza ndako na ye. Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.” (Matai 12:29, 30) Ntembe ezali te ete bakomeli ná Bafarisai bazali na ngámbo ya Yesu te, boye, bamonisi ete bazali basaleli ya Satana. Bazali kopanza bato mpo bázala mosika na Mwana ya Nzambe, oyo azali kosala makambo na lisalisi ya Yehova.

Yesu akebisi basaleli wana ya Satana boye: “Bana ya bato bakolimbisama makambo nyonso, ezala masumu ya ndenge nini mpe kofinga ya ndenge nini oyo bazali kosala na ndenge ya kofinga. Nzokande, moto nyonso oyo azali kofinga elimo santu akolimbisama te mpo na libela, kasi amemi ngambo ya lisumu ya seko.” (Marko 3:28, 29) Kanisá likambo oyo bazali komilukela ntango bazali koloba ete makambo oyo esalemi na lisalisi ya elimo ya Nzambe esalemi nde na nguya ya Satana!