Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 38

Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu

Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu

MATAI 11:2-15 LUKA 7:18-30

  • YOANE MOBATISI ALINGI KOYEBA MOKUMBA YA YESU

  • YESU AKUMISI YOANE

Esali mbula soki moko banda Yoane Mobatisi akɔtá bolɔkɔ. Ata bongo, azali koyoka nsango ya makamwisi ya Yesu. Kanisá ndenge Yoane ayoki ntango bayekoli na ye bayebisi ye ete Yesu asekwisi mwana ya mwasi oyo mobali akufá na Naine. Kasi, Yoane azali na mposa Yesu ye moko ayebisa ye soki nyonso wana elimboli nini. Yango wana, atindi bayekoli na ye mibale epai ya Yesu. Básala nini? Bákende kotuna Yesu boye: “Yo ozali Moto oyo azali koya to tosengeli nde kozela mosusu?”​—Luka 7:19.

Motuna yango ekoki kokamwisa mpenza. Yoane azali moto oyo amipesá, oyo ntango azalaki kobatisa Yesu eleki sikoyo mbula pene na mibale, amonaki ndenge elimo ya Nzambe ekitelaki Yesu mpe ayokaki ndenge Nzambe alobaki ete andimi Yesu. Ntina ya kokanisa ete kondima ya Yoane elɛmbi ezali te. Soki bongo, mbɛlɛ Yesu akumisi Yoane te ndenge asali yango na libaku oyo. Kasi soki Yoane azali kaka na kondima, mpo na nini alobi bátuna Yesu motuna yango?

Mbala mosusu Yoane alingi ete Yesu ye moko ayebisa ye polele ete azali Masiya. Yango ekokómisa kondima na ye makasi mpo azali konyokwama na bolɔkɔ. Mpe emonani ete motuna ya Yoane ezali mpe mpo na ntina mosusu. Ayebi malamu bisakweli ya Biblia oyo etali moto oyo Nzambe atye mafuta na elimo mpo azala mokonzi mpe mosikoli. Kasi, basanza mingi nsima ya batisimo ya Yesu, Yoane azali na bolɔkɔ. Na yango, Yoane azali koluka koyeba soki ezali na moto mosusu oyo akoya nsima ya Yesu, oyo akokokisa bisakweli nyonso oyo esakolamaki mpo na Masiya.

Na esika Yesu ayebisa bayekoli ya Yoane ete: ‘Ɛɛ, ngai nde moto yango,’ amonisi nde ete Nzambe andimi ye na ndenge azali kobikisa ebele ya bato oyo bazali na bamaladi ya ndenge nyonso. Na nsima, ayebisi bango boye: “Bókende koyebisa Yoane oyo bozali koyoka mpe komona: Bato oyo bakufá miso bazali komona lisusu, mpe batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka mpe bakufi bazali kolamuka, mpe nsango malamu ezali kosakolama epai ya babola.”​—Matai 11:4, 5.

Mbala mosusu Yoane atuni motuna wana mpo akanisi ete Yesu akosala makambo mingi koleka oyo azali kosala sikoyo mpe akoki kobimisa ye na bolɔkɔ. Kasi, Yesu ayebisi Yoane ete akanisa te ete akosala makamwisi koleka oyo azali kosala sikoyo.

Ntango bayekoli ya Yoane bakei, Yesu ayebisi ebele wana ya bato ete Yoane azali kaka mosakoli mpamba te. Azali mpe “momemi-nsango” ya Yehova oyo Malaki 3:1 esakolaki. Azali lisusu mosakoli Eliya oyo Malaki 4:5, 6 elobelaki. Yesu alobi boye: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Na bato nyonso oyo basi babotá, moko oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te; kasi moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló aleki ye.”​—Matai 11:11.

Ntango alobi ete moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló aleki Yoane, Yesu amonisi ete Yoane akoyangela te na bokonzi ya likoló. Yoane abongiselaki Yesu nzela kasi akufaki liboso Kristo afungola nzela ya kokende na likoló. (Baebre 10:19, 20) Ata bongo, Yoane azali mosakoli ya sembo ya Nzambe mpe akofanda na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.