Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 81

Yesu ná Tata na ye bazali moko​—Na ndenge nini?

Yesu ná Tata na ye bazali moko​—Na ndenge nini?

YOANE 10:22-42

  • “NGAI NÁ TATA TOZALI MOKO”

  • YESU ALOBI TE ETE AZALI NZAMBE

Yesu ayei na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Bofungoli (to Hanuka). Fɛti yango ezali mpo na kokanisa bofungoli ya mibale ya tempelo. Koleka siɛklɛ moko liboso, Antiochus IV Epiphanes, mokonzi ya Siri, atongaki etumbelo moko likoló ya etumbelo monene na tempelo ya Nzambe. Na nsima, bana ya nganga-nzambe moko ya Bayuda bazwaki lisusu Yerusaleme mpe bazongisaki lisusu tempelo na mabɔkɔ ya Yehova. Kobanda wana, mbula na mbula, basalaka fɛti moko na mokolo ya 25 Kisleve, sanza oyo ekokani na eteni ya nsuka ya sanza ya zomi na moko mpe ebandeli ya sanza ya zomi na mibale.

Ezali na eleko ya malili makasi. Yesu azali kotambola na tempelo na veranda ya Salomo. Kuna, Bayuda bazingi ye mpe batuni ye: “Tii ntango nini okotika milimo na biso likolólikoló? Soki ozali Kristo, yebisá biso polele.” (Yoane 10:22-24) Yesu apesi eyano nini? Alobi: “Nayebisaki bino, kasi bozali kondima te.” Yesu ayebisi bango polele te ete azali Kristo, ndenge ayebisaki mwasi Mosamaria na libulu ya mai. (Yoane 4:25, 26) Kasi, amonisaki bango soki azali nani ntango alobaki: “Liboso Abrahama azala, ngai nazalaki.”​—Yoane 8:58.

Yesu alingi ete bato báyeba bango moko ete azali Kristo nsima ya kotala soki misala na ye eyokani na oyo bisakweli elobaki ete Kristo akosala. Yango wana, ntango mosusu azali koloba na bayekoli na ye báyebisa moto moko te ete azali Masiya. Kasi sikoyo, ayebisi Bayuda wana oyo bazali kotɛmɛla ye ete: “Misala oyo nazali kosala na nkombo ya Tata na ngai, yango nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai. Kasi bozali kondima te.”​—Yoane 10:25, 26.

Mpo na nini bazali kondima te ete Yesu azali Kristo? Alobi: “Bozali kondima te, mpo bozali bampate na ngai te. Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe nayebi yango, mpe elandaka ngai. Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko, mpe bakobebisama soki moke te, mpe moto moko te akobɔtɔla bango na mabɔkɔ na ngai. Oyo Tata na ngai apesi ngai ezali eloko moko oyo eleki biloko mosusu nyonso.” Na nsima, Yesu ayebisi bango boyokani makasi oyo azali na yango na Tata na ye ntango alobi: “Ngai ná Tata tozali moko.” (Yoane 10:26-30) Yesu azali awa na mabele kasi Tata na ye azali na likoló; na yango ekoki kosalema te ete ye ná Tata na ye bázala moto moko. Bazali nde na bomoko mpe na mokano moko.

Maloba ya Yesu epesi Bayuda nkanda makasi, yango wana balɔkɔti lisusu mabanga mpo báboma ye. Kasi yango ebangisi Yesu te. Alobi: “Nalakisaki bino misala mingi ya kitoko oyo euti epai ya Tata. Na misala wana, mpo na oyo wapi bozali kobamba ngai mabanga?” Bazongiseli ye: “Tozali kobamba yo mabanga mpo na mosala moko ya kitoko te, kasi mpo na kofinga; mpo yo . . . omikómisi nzambe.” (Yoane 10:31-33) Yesu alobá ata mokolo moko te ete azali nzambe, bongo efundeli wana euti wapi?

Yesu azali koloba ete azali na nguya oyo Bayuda bandimaka ete eutaka kaka epai ya Nzambe ye moko. Na ndakisa, mpo na “bampate” Yesu alobi ete: “Nazali kopesa bango bomoi ya seko,” likambo oyo bato bakoki kosala te. (Yoane 10:28) Bayuda babosani ete Yesu andimaki polele ete azwaki bokonzi yango epai ya Tata na ye.

Mpo na kokweisa efundeli na bango ya lokuta, Yesu atuni: “Ekomamá te na Mibeko na bino [na Nzembo 82:6] ete: ‘Nalobaki: “Bino bozali banzambe”’? Soki abengaki ‘banzambe’ baoyo liloba ya Nzambe ekweisaki, . . . bozali koloba na ngai oyo Tata asantisá mpe atindi na mokili ete: ‘Ozali kofinga,’ mpo nalobi ete: Nazali Mwana ya Nzambe?”​—Yoane 10:34-36.

Ya solo, Makomami ebengi ata basambisi ya kozanga bosembo “banzambe.” Bongo, mpo na nini Bayuda wana bazali kosambisa Yesu mpo alobi: “Nazali Mwana ya Nzambe”? Alobi likambo moko oyo esengeli kotinda bango bándima: “Soki nazali kosala misala ya Tata na ngai te, bóndima ngai te. Kasi soki nazali kosala yango, ata soki bozali kondima ngai te, bóndima misala yango, mpo bóyeba mpe bókoba koyeba ete Tata azali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na Tata.”​—Yoane 10:37, 38.

Ntango Bayuda bayoki bongo, baluki lisusu kokanga Yesu, kasi na mbala oyo lisusu, akimi. Alongwe na Yerusaleme mpe akei na ngámbo mosusu ya Ebale Yordani, na esika oyo Yoane abandaki kobatisa bato esili koleka pene na mbula minei. Emonani lokola ete ezali mosika te na sudi ya Mbu ya Galile.

Ebele ya bato bayei epai ya Yesu mpe balobi: “Yoane asalaki ata elembo moko te, kasi makambo nyonso oyo Yoane alobaki mpo na moto oyo ezalaki ya solo.” (Yoane 10:41) Yango wana, Bayuda mingi bandimeli Yesu.