Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 74

Liteya etali koyamba bapaya mpe kobondela

Liteya etali koyamba bapaya mpe kobondela

LUKA 10:38–11:13

  • YESU AKEI KOTALA MARTA NÁ MARIA

  • KOTINGAMA NA MABONDELI EZALI NA NTINA

Betania ezali mboka moko na ɛsti ya Ngomba ya Olive, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki misato na engumba Yerusaleme. (Yoane 11:18) Yesu akei kuna mpe akɔti na ndako ya Marta ná Maria, oyo bazali yaya ná leki. Bango mibale ná ndeko na bango ya mobali Lazare, bazali baninga ya Yesu, mpe bayambi ye na esengo.

Koyamba Masiya na ndako ezali likambo ya lokumu. Marta alingi ete báyamba Yesu malamu, yango wana amipesi na kolamba mpe kobongisa biloko ya kolya ndenge na ndenge. Ntango Marta azali kosala misala wana, leki na ye Maria afandi pene na makolo ya Yesu, azali koyoka ye. Na nsima, Marta alobi na Yesu: “Nkolo, ezali kosala yo eloko te ndenge ndeko na ngai atiki ngai moko nasalaka misala? Yebisá ye aya kosalisa ngai.”​—Luka 10:40.

Na esika ya koloba mabe mpo na Maria, Yesu apesi Marta toli ndenge azali komitungisa mingi mpo na biloko ya kolya. Ayebisi ye boye: “Marta, Marta, ozali komitungisa mpe komiyokisa mpasi mpo na biloko mingi. Nzokande, kaka biloko moke nde ezali na ntina, to moko kaka. Maria ye aponi eloko oyo ezali malamu, mpe bakobɔtɔla ye yango te.” (Luka 10:41, 42) Ya solo, Yesu amonisi ete ezali na ntina te kolekisa ntango mingi na kolamba biloko ebele. Mwa biloko moke kaka ekoki.

Makanisi ya Marta ezali malamu. Alingi koyamba mopaya na bango malamu. Kasi, lokola azali komitungisa mingi mpo na biloko ya kolya, ayoki te mateya ya ntina mingi oyo Mwana ya Nzambe azali koteya! Yesu amonisi ete Maria aponi nzela ya malamu, oyo ekomemela ye matomba oyo ekoumela, mpe ezali liteya oyo biso nyonso tokobosana yango te.

Na libaku mosusu, Yesu apesi liteya mosusu oyo ezali mpe na ntina mingi mpo na biso. Moyekoli moko atuni ye: “Nkolo, teyá biso kobondela, ndenge Yoane mpe ateyaki bayekoli na ye.” (Luka 11:1) Yesu ateyaki bango kobondela soki mbula moko na ndambo liboso, na Lisolo na ye likoló ya Ngomba. (Matai 6:9-13) Kasi, ekoki kozala ete moyekoli wana azalaki mokolo yango te, yango wana Yesu azongeli makanisi ya ntina. Na nsima, apesi ndakisa moko mpo na komonisa ntina ya kotingama na mabondeli.

“Kanisá ete moko na bino azali na moninga mpe akei epai na ye na katikati ya butu mpe alobi na ye ete: ‘Moninga, defisá ngai mampa misato, mpo nauti koyamba moninga na ngai moko oyo auti mobembo mpe nazali na eloko ya kopesa ye te.’ Kasi oyo wana na kati ya ndako azongisi: ‘Tiká kotungisa ngai. Porte esili kokangama, mpe bana na ngai balali na mbeto elongo na ngai; nakoki te kotɛlɛma mpe kopesa yo mwa eloko.’ Nazali koyebisa bino: Akotɛlɛma mpe akopesa moninga na ye eloko oyo azali na mposa na yango, kaka mpo azali moninga te, kasi mpo atye ye mbamba makasi.”​—Luka 11:5-8.

Yesu alingi te komonisa ete Yehova akoboya koyanola na mabondeli, ndenge moninga wana asalaki. Alingi nde komonisa ete soki moninga wana, oyo azalaki kolinga te, andimaki kopesa moninga na ye limpa mpo atye ye mbamba, Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo, akoyanola na mabondeli oyo basaleli na ye ya sembo basalaka na motema mobimba! Yesu abakisi lisusu: “Nazali koloba na bino ete: Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.”​—Luka 11:9, 10.

Na nsima, mpo na kobenda likebi na likanisi yango, Yesu alobi ete Yehova azali lokola batata ya mabota: “Tata nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye mbala mosusu nyoka na esika ya mbisi? To soki mpe asɛngi maki, akopesa ye nkotó? Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?” (Luka 11:11-13) Koyeba ete Tata na biso ya likoló asepelaka koyoka mabondeli na biso mpe akokisaka bamposa na biso ezali mpenza kokitisa biso mitema!