Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 68

Mwana ya Nzambe azali “pole ya mokili”

Mwana ya Nzambe azali “pole ya mokili”

YOANE 8:12-36

  • YESU ASALISI BATO BÁYEBA MWANA AZALI NANI

  • NA NDENGE NINI BAYUDA BAZALI BAOMBO?

Na mokolo ya nsuka ya Fɛti ya Batabernakle, mokolo ya nsambo, Yesu azali koteya na eteni ya tempelo oyo ebengami “makabo.” (Yoane 8:20; Luka 21:1) Emonani ete esika yango ezali na Lopango ya basi, epai bato batyaka makabo.

Na butu, na fɛti yango, esika wana engɛngaka makasi mpenza. Batyaka bitɛlɛmiselo ya miinda ya minene minei, oyo mokomoko ezali na saani minene minei etondi na mafuta. Miinda yango epelaka makasi mpe etindaka pole na yango mosika mpenza. Mbala mosusu makambo oyo Yesu azali koloba sikoyo etindi bayoki na ye bákanisa pole yango. Bongo alobi: “Ngai nazali pole ya mokili. Moto oyo azali kolanda ngai akotambola na molili soki moke te, kasi akozwa pole ya bomoi.”​—Yoane 8:12.

Bafarisai babɛtɛli Yesu ntembe, balobi: “Ozali kopesa litatoli mpo na yo moko; litatoli na yo ezali solo te.” Yesu azongisi: “Ata soki nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo, mpo nayebi epai nauti mpe epai nazali kokende. Kasi bino boyebi te epai nauti mpe epai nazali kokende.” Abakisi: “Ekomamá na Mibeko na bino mpenza ete: ‘Litatoli ya bato mibale ezali solo.’ Nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, mpe Tata oyo atindaki ngai azali kopesa litatoli mpo na ngai.”​—Yoane 8:13-18.

Bafarisai bandimi likanisi yango te, mpe batuni ye: “Tata yango na yo ye wapi?” Yesu apesi bango eyano ya polele: “Boyebi ngai te, boyebi mpe Tata na ngai te. Soki boyebaki ngai, mbɛlɛ boyebi mpe Tata na ngai.” (Yoane 8:19) Atako Bafarisai balingi kaka kokanga Yesu, moto moko te ameki kosimba ye.

Yesu alobi lisusu likambo oyo alobaki liboso: “Nazali kokende, mpe bino bokoluka ngai, nzokande bokokufa na lisumu na bino. Epai nazali kokende bino bokoki kokóma te.” Bayuda bakangi ntina ya maloba yango ata moke te, mpe babandi kotunana: “Akomiboma te, boye te? Mpo alobi ete: ‘Epai nazali kokende bino bokoki kokóma te.’” Bakangi ntina ya maloba ya Yesu te, mpo bayebi te esika autá. Yesu abakisi: “Bino bozali bato ya nse; ngai nazali moto ya likoló. Bino bozali bato ya mokili oyo; ngai nazali moto ya mokili oyo te.”​—Yoane 8:21-23.

Yesu azali kolobela bomoi oyo azalaki na yango na likoló mpe ndenge azali Masiya, to Kristo, oyo alakamaki, oyo bakonzi ya mangomba basengelaki kozela. Nzokande bango bazali kotuna ye na lityo ete: “Yo nani?”​—Yoane 8:25.

Lokola baboyi Yesu mpe batɛmɛli ye, alobi na bango: “Mpo na nini kutu nazali koloba na bino?” Atako bongo, alobeli lisusu Tata na ye mpe amonisi ntina oyo Bayuda basengeli koyoka Mwana, alobi: “Moto oyo atindaki ngai alobaka solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na ye, nazali koloba yango na mokili.”​—Yoane 8:25, 26.

Na nsima, Yesu amonisi ete akeseni na Bayuda yango; ye atyelaka Tata na ye motema, yango wana alobi: “Ntango bokotombola Mwana ya moto, bokoyeba ete ngai nazali ye, mpe ete nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo. Mpe moto oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.”​—Yoane 8:28, 29.

Nzokande, Bayuda mosusu bandimeli Yesu, mpe alobi na bango: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:31, 32.

Basusu bakamwe ndenge alobi ete bakozwa bonsomi. Balobi: “Biso tozali bana ya Abrahama mpe tokómá baombo ya moto ata mokolo moko te. Ndenge nini ozali koloba ete: ‘Bokozwa bonsomi’?” Bayuda bayebi ete na ntango mosusu bikólo mosusu eyangelaki bango, kasi baboyi kobengama baombo. Bongo Yesu amonisi polele ete bazali kaka baombo, alobi: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Moto nyonso oyo asalaka lisumu azali moombo ya lisumu.”​—Yoane 8:33, 34.

Bayuda bamitye na likama monene ndenge baboyi kondima ete bazali baombo ya lisumu. Yesu alobi: “Moombo aumelaka na ndako libela te; mwana aumelaka libela.” (Yoane 8:35) Lokola moombo akoki kozwa libula te, bakoki kobengana ye ata na ntango nini. Kaka mwana oyo abotami na ndako to oyo abɔkwami wana lokola mwana nde atikalaka “libela,” na ndako, elingi koloba, ntango nyonso oyo akozala na bomoi.

Na yango, koyeba solo oyo etali Mwana ekolongola bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa libela na libela. Yesu alobi: “Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi.”​—Yoane 8:36.