Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 116

Ateyi komikitisa na Elekeli ya nsuka

Ateyi komikitisa na Elekeli ya nsuka

MATAI 26:20 MARKO 14:17 LUKA 22:14-18 YOANE 13:1-17

  • YESU ALEI ELEKELI YA NSUKA NA BANTOMA NA YE

  • YESU ASUKOLI BANTOMA MAKOLO MPO NA KOBIMISA LITEYA MOKO

Petro ná Yoane bakómi na Yerusaleme, epai Yesu atindaki bango bábongisa Elekeli. Na nsima, Yesu ná bantoma zomi bakei kuna. Ekómi mpokwa, mpe moi ezali kokende kolala ntango Yesu ná bayekoli na ye bazali kokita Ngomba ya Olive. Oyo ezali mokolo ya nsuka oyo Yesu alekisi awa, akozonga awa lisusu kaka na nsima ya lisekwa na ye.

Eumeli te Yesu ná bayekoli na ye bakómi na engumba yango mpe bakei na ndako oyo bakosala Elekeli. Bamati na shambrɛ ya monene oyo ezali likoló. Kuna bakuti biloko nyonso ebongisami mpo na kolya. Lokola Yesu azalaki mpenza kozela likambo yango, alobi: “Nazalaki na mposa makasi ya kolya elekeli oyo esika moko na bino liboso ete namona mpasi.”​—Luka 22:15.

Bambula mingi liboso, bato bakómaki na momeseno ya kolekisa bakɔpɔ ya vinyo na mabɔkɔ ya bato oyo bazali kolya Elekeli. Sikoyo, nsima ya kozwa kɔpɔ moko ya vinyo, Yesu apesi matɔndi mpe alobi: “Bókamata yango mpe bólekisela yango mokomoko na bino; mpo nazali koyebisa bino ete: Banda sikoyo nakomɛla lisusu eloko oyo euti na nzete ya vinyo te tii ntango bokonzi ya Nzambe ekoya.” (Luka 22:17, 18) Emonani polele ete liwa na ye ekómi pene.

Ntango bazali kosala Elekeli, likambo moko ya kokamwa esalemi. Yesu atɛlɛmi, alongoli bilamba na ye ya likoló, mpe azwi esumɛ. Na nsima, atye mai na saani moko oyo ezali pene na bango. Mbala mingi, moto oyo ayambi bapaya nde atalaka soki mosaleli na ye asukoli makolo ya bapaya na ye to te. (Luka 7:44) Na libaku oyo moto ayambi bango te, yango wana Yesu asali yango ye moko. Moko ya bantoma akokaki kosala yango, kasi ata moko te asali yango. Ezali nde mpo bazali naino na makanisi ya kowelana? Ezala bongo to te, bayoki nsɔni ndenge Yesu azali kosukola bango makolo.

Ntango Yesu akómi epai ya Petro, Petro aboyi: “Okosukola ngai makolo ata mokolo moko te.” Yesu alobi: “Soki nasukoli yo te, okozwa likabo elongo na ngai te.” Petro ayanoli na nsai: “Nkolo, kaka makolo te, kasi ná mabɔkɔ ná motó.” Akamwe mpenza ntango Yesu alobi na ye: “Moto oyo asukoli nzoto azalaka na mposa básukola ye kaka makolo, kasi ye mobimba azali pɛto. Mpe bino bozali pɛto, kasi bino nyonso te.”​—Yoane 13:8-10.

Yesu asukoli makolo ya bantoma nyonso 12, ata mpe oyo ya Yudasi Mokeriota. Nsima ya kolata bilamba na ye ya likoló mpe kofanda lisusu na mesa, Yesu atuni: “Boyebi likambo oyo nasali bino? Bobengaka ngai, ‘Moteyi,’ mpe, ‘Nkolo,’ mpe ezali solo, mpo nazali bongo. Na yango, soki ngai, atako Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo. Mpamba te napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo. Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Moombo aleki nkolo na ye te, mpe moto oyo atindami aleki te moto oyo atindaki ye. Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.”​—Yoane 13:12-17.

Apesi bango liteya monene ya komikitisa! Bayekoli ya Yesu basengeli te kolukaka esika ya liboso, to kokanisa ete bazali na ntina mingi mpe bato basengeli kosalelaka bango. Kasi, basengeli nde kolanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba basengeli te kosala molulu ya kosukola bato makolo, kasi nde kozala na mposa ya kosalela basusu na komikitisa mpe kozanga kopona bilongi.