Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 134

Lilita etikali mpamba: Yesu azali na bomoi!

Lilita etikali mpamba: Yesu azali na bomoi!

MATAI 28:3-15 MARKO 16:5-8 LUKA 24:4-12 YOANE 20:2-18

  • YESU ASEKWI

  • MAKAMBO OYO ESALEMI NA LILITA YA YESU

  • ABIMELI BASI

Basi oyo bayei na lilita ya Yesu bayoki mpasi mingi na motema mpo etikali mpamba! Maria Magadalena akimi mbangu tii “epai ya Simo Petro mpe epai ya moyekoli wana mosusu, oyo Yesu azalaki kolinga mingi,” elingi koloba ntoma Yoane. (Yoane 20:2) Kasi, basi oyo batikali na lilita yango bamoni anzelu. Mpe na kati ya lilita yango, bamoni anzelu mosusu, “alati zambala moko ya mpɛmbɛ.”​—Marko 16:5.

Anzelu moko ayebisi bango: “Bóbanga te, mpo nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na nzete. Azali awa te, mpo alamuki, ndenge alobaki. Bóya, bótala esika alalaki. Mpe bókende nokinoki mpe bóyebisa bayekoli na ye ete alamuki uta na bakufi, mpe talá! akei liboso na bino na Galile.” (Matai 28:5-7) Atako ‘kolɛnga ná nsɔmɔ makasi ekangi bango,’ basi yango bapoti mbangu mpo na kopesa bayekoli nsango.​—Marko 16:8.

Maria akutani sikoyo na Petro mpe Yoane. Na mpema nyonso, ayebisi bango: “Balongoli Nkolo na lilita, mpe toyebi te soki balalisi ye wapi.” (Yoane 20:2) Petro ná Yoane babandi kopota mbangu. Lokola Yoane azali na mbangu mingi, akómi na lilita liboso. Agunzami mpo na kotala na kati mpe amoni bilamba elali, kasi akɔti na kati te.

Ntango Petro akómi, akɔti mbala moko na kati ya lilita. Amoni bilamba ya lini mpe bilamba oyo bakangaki Yesu na motó. Sikoyo, Yoane mpe akɔti na kati, mpe andimi likambo oyo Maria alobaki. Atako Yesu ayebisaki bango liboso ete akosekwa, moko te asosoli ete asekwi. (Matai 16:21) Babulungani, mpe bazongi ndako. Kasi Maria, oyo azongi lisusu na lilita, atikali wana.

Na ntango yango, basi mosusu wana bazali kokende mbangumbangu mpo na koyebisa bayekoli ete Yesu asekwi. Na nzela, Yesu akutani na bango mpe alobi: “Mbote!” Mbala moko bakwei na makolo na ye mpe ‘bagumbameli ye.’ Yesu alobi na bango: “Bóbanga te! Bókende, bópesa bandeko na ngai nsango, ete bákende na Galile; mpe kuna bakomona ngai.”​—Matai 28:9, 10.

Mwa moke liboso, ntango mabele eninganaki mpe baanzelu bamonanaki na lilita, basoda oyo bazalaki kokɛngɛla lilita “balɛngaki mpe bakómaki lokola bakufi.” Ntango makanisi ezongelaki bango, bakɔtaki na engumba mpe “bayebisaki banganga-nzambe bakonzi makambo nyonso oyo esalemaki.” Na nsima, banganga-nzambe bakendaki koyokana na mikóló ya Bayuda. Bazwaki mokano ya kopesa basoda yango mbongo mpo bákosa ete: “Bayekoli na ye bayaki koyiba ye na butu na ntango oyo biso tolalaki mpɔngi.”​—Matai 28:4, 11, 13.

Soki basoda ya Baroma balali mpɔngi na esika ya mosala, bakoki ata kobomama; yango wana banganga-nzambe balaki bango ete: “Soki yango [lokuta oyo bakoloba ete balalaki mpɔngi] ekómi na matoi ya guvɛrnɛrɛ, tokondimisa ye mpe tokosala ete bátungisa bino te.” (Matai 28:14) Basoda bazwi mbongo mpe basali ndenge banganga-nzambe balobi. Na yango, nsango ya lokuta epanzani epai ya Bayuda ete bayibi nzoto ya Yesu.

Maria Magadalena azali kaka kuna na lilita, azali kolela. Ntango apusani mpo na kotala na kati ya lilita, amoni baanzelu mibale balati bilamba ya mpɛmbɛ! Mosusu afandi esika motó ya Yesu ezalaki, mosusu na makolo. Batuni ye: “Mwasi, ozali kolela mpo na nini?” Maria azongisi: “Balongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki balalisi ye wapi.” Ntango Maria abaluki, amoni moto mosusu. Moto yango azongeli motuna oyo baanzelu batuni ye mpe abakisi: “Ozali koluka nani?” Lokola Maria akanisi ete ezali mobateli ya elanga, alobi: “Tata, soki olongolaki ye, yebisá ngai soki olalisi ye wapi, mpe nakokamata ye.”​—Yoane 20:13-15.

Nzokande, Maria azali kosolola nde na Yesu oyo asekwi, kasi na ntango wana ayebi te ete ezali Yesu. Kasi ntango alobi “Maria!” asosoli ete ezali Yesu, mpo ayebi ndenge oyo alobaka na ye. Maria agangi na esengo: “Rabuni!” (oyo elakisi “Moteyi!”). Nzokande, lokola azali kobanga mpo akanisi ete Yesu alingi komata na likoló, akangami na ye makasi. Na yango, Yesu alobi na ye: “Tiká kokangama na ngai. Mpo namati naino epai ya Tata te. Kasi kende epai ya bandeko na ngai mpe lobá na bango ete: ‘Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.’”​—Yoane 20:16, 17.

Maria akimi mbangu esika bantoma mpe bayekoli mosusu bayangani. Ayebisi bango: “Namoni Nkolo!” kaka ndenge basi wana mosusu balobaki. (Yoane 20:18) Atako bongo, bamoni maloba wana “lokola bilobaloba mpamba.”​—Luka 24:11.