Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 120

Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya Yesu

Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya Yesu

YOANE 15:1-27

  • NZETE YA VINYO YA SOLOSOLO MPE BITAPE

  • TÓSALA NINI MPO YESU AKOBA KOLINGA BISO?

Yesu azali kosolola na bantoma na ye ya sembo, azali kosolola na bango ndenge baninga basololaka mpo na kolendisa bango. Ngonga epusani, ntango mosusu midi ya butu eleki. Apesi bango ndakisa moko:

Abandi boye: “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-bilanga.” (Yoane 15:1) Ndakisa yango ekokani na ndakisa oyo epesamaki kala mpo na ekólo Yisraele oyo ebengamaki mpe nzete ya vinyo ya Yehova. (Yirimia 2:21; Hosea 10:1, 2) Kasi, Yehova alingi kosundola ekólo yango. (Matai 23:37, 38) Yango wana, Yesu azali koyebisa bango makambo ya sika. Azali nzete ya vinyo oyo Tata na ye aloná kobanda na mobu 29 T.B., ntango atyaki ye mafuta na elimo. Kasi Yesu amonisi ete nzete ya vinyo elimboli kaka ye te, alobi:

“Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, [Tata na ngai] alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi lisusu. . . . Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki kobota mbuma te, soki botikali na bomoko elongo na ngai te. Ngai nazali nzete ya vinyo, bino bozali bitape.”​—Yoane 15:2-5.

Yesu alaki bayekoli na ye ya sembo ete ntango akokende, akotindela bango mosungi, elimo santu. Bantoma mpe bato mosusu bakokóma bitape ya nzete ya vinyo ntango bakozwa elimo yango, mikolo ntuku mitano na moko na nsima. Mpe “bitape” nyonso esengeli kozala ntango nyonso na bomoko na Yesu. Mpo na nini?

Alimboli: “Moto oyo atikali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye, moto wana akobota mbuma mingi; mpo, soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te.” “Bitape” yango, to bayekoli na ye ya sembo, bakobota mbuma mingi, elingi koloba bakomekola bizaleli ya Yesu, bakosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende, mpe bakokómisa bato bayekoli. Nini ekokómela moto oyo atikali na bomoko na Yesu te mpe aboti mbuma te? Yesu alobi: “Soki moto atikali na bomoko elongo na ngai te, akobwakama.” Abakisi ete: “Soki botikali na bomoko elongo na ngai mpe soki maloba na ngai efandi na kati na bino, bósɛnga eloko nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.”​—Yoane 15:5-7.

Sikoyo, Yesu azongeli likambo oyo asilaki kolobela mbala mibale: kotosa mitindo na ye. (Yoane 14:15, 21) Alobeli oyo bayekoli basengeli kosala mpo na komonisa yango, alobi: “Soki botosi mitindo na ngai, bokotikala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.” Kasi, kolinga Yehova Nzambe mpe Mwana na ye esuki wana te. Yesu alobi: “Mobeko na ngai yango oyo: bólinganaka ndenge ngai nalingi bino. Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye. Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.”​—Yoane 15:10-14.

Mosika te, Yesu akomonisa bolingo na ye, akopesa bomoi na ye mpo na moto nyonso oyo akondimela ye. Ndakisa na ye esengeli kotinda bayekoli na ye bámoniselana bolingo ya ndenge wana. Ndenge Yesu alobaki yango liboso, bolingo yango ekomonisa ete bazali bayekoli na ye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

Bantoma bayebi ete Yesu abengaka bango “baninga.” Ayebisi bango ntina oyo bazali baninga na ye: “Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.” Bazali na boyokani ya malamu mpenza: bazali baninga ya motema ya Yesu mpe bayebi makambo oyo Tata ayebisaki ye! Kasi, mpo na kobatela boyokani yango, basengeli ‘kokoba kobota mbuma.’ Soki basali bongo, Yesu alobi ete ‘nyonso oyo bakosɛnga Tata na nkombo na ye, akopesa bango yango.’​—Yoane 15:15, 16.

Bolingo ekosalisa “bitape,” elingi koloba bayekoli na ye, báyika mpiko na makambo oyo ekoya. Akebisi bango ete mokili ekoyina bango, mpe abɔndisi bango, alobi: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino. Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, . . . yango wana mokili ezali koyina bino.”​—Yoane 15:18, 19.

Yango wana, Yesu abakisi: “Bakosala bino makambo nyonso wana mpo na nkombo na ngai, mpo bayebi te moto oyo atindaki ngai.” Yesu alobi ete makamwisi na ye ekweisi banguna na ye nde kokweisa: “Soki nasalaki te na kati na bango misala oyo ata moto moko te asalá, mbɛlɛ bazali na lisumu te; kasi sikoyo bamoni mpe bayini ná ngai ná Tata na ngai.” Kutu, koyina na bango ekokisi nde esakweli ya Biblia.​—Yoane 15:21, 24, 25; Nzembo 35:19; 69:4.

Yesu alaki lisusu bayekoli na ye ete akotindela bango mosungi, elimo santu. Nguya yango ezali mpo na bayekoli na ye nyonso mpe ekoki kosalisa bango bábota mbuma, elingi koloba ‘bápesa litatoli.’​—Yoane 15:27.