Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 4

Bayokelaki Satana​—Makambo nini emonani?

Bayokelaki Satana​—Makambo nini emonani?

Adama ná Eva batosaki Nzambe te, yango wana bakufaki. Ebandeli 3:6, 23

Eva ayokelaki nyoka mpe alyaki mbuma. Na nsima, apesaki yango Adama, ye mpe alyaki.

Likambo oyo basalaki ezalaki mabe​—ezalaki lisumu. Nzambe abenganaki bango na Paradiso, esika oyo bazalaki kofanda.

Bomoi ekómaki mpasi mpo na bango mpe bana na bango. Banunaki mpe bakufaki. Bakendeki te na mokili ya bilimo; bazalaki lisusu te.

Ndenge moko na putulu, bato oyo bakufá bazalaka lisusu na bomoi te. Ebandeli 3:19

Tokufaka mpo biso nyonso tozali bana ya Adama ná Eva. Bakufi bakoki komona te, koyoka te to kosala likambo moko te.​—Mosakoli 9:5, 10.

Yehova akanaki te ete bato bákufaka. Mosika te, akozongisa na bomoi bato oyo bakufá. Soki bayokeli ye, bakozala na bomoi libela na libela.