Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 3

Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?

Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?

Yehova apesaki Adama ná Eva biloko mingi ya malamu. Ebandeli 1:28

Yehova akelaki Eva, mwasi ya liboso, mpe apesaki ye epai ya Adama mpo azala mwasi na ye.​—Ebandeli 2:21, 22.

Yehova akelaki bango na makanisi mpe na nzoto ya kokoka, ezalaki ata na mbeba moko te.

Paradiso, epai bazalaki kofanda ezalaki elanga ya Edene​—esika moko ya kitoko mingi oyo ezalaki na ebale moko, banzete oyo ebotaka mbuma mpe banyama.

Yehova azalaki kosolola na bango; koteya bango. Soki bayokelaki ye, balingaki kozala na bomoi libela na Paradiso awa na mabele.

Nzambe apekisaki bango kolya mbuma ya nzete moko. Ebandeli 2:16, 17

Yehova alakisaki Adama ná Eva nzete moko na elanga mpe ayebisaki bango ete soki balei mbuma ya nzete yango, bakokufa.

Moko ya baanzelu atombokelaki Nzambe. Anzelu mabe yango ezali Satana Zabolo.

Satana alingaki te Adama ná Eva bátosa Yehova. Na yango, asalelaki nyoka mpo na koyebisa Eva ete soki alei mbuma ya nzete yango, akokufa te, kasi akozala lokola Nzambe. Na ntembe te, likambo yango ezalaki lokuta.​—Ebandeli 3:1-5.