Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 10

Mapamboli nini ezali kozela baoyo bayokaka Nzambe?

Mapamboli nini ezali kozela baoyo bayokaka Nzambe?

Bato mingi oyo bakufá bakosekwa awa na mabele. Misala 24:15

Kanisá mapamboli oyo okozwa soki ozali koyoka Yehova! Okozala na nzoto ya kokoka​—moto moko te akozala na maladi to akozala ebɔsɔnɔ. Bato mabe bakozala te, mpe okotyela moto nyonso motema.

Mpasi, mawa, to kolela ekozala te. Moto moko te akokóma mobange mpe akokufa.

Okozala elongo na baninga mpe bandeko. Bomoi na Paradiso ekozala mpenza esengo.

Kobanga ekozala te. Bato bakozala mpenza na esengo.

Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bampasi nyonso. Emoniseli 21:3, 4