Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 9

Paradiso ekoya ntango nini?

Paradiso ekoya ntango nini?

Makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mabele, emonisi ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe esala. Luka 21:10, 11; 2 Timote 3:1-5

Biblia esakolaki makambo mingi oyo ezali kosalema lelo oyo. Elobaki ete bato bakozala bato balingá mbongo, batosaka baboti te, bato ya nko, bato balingá bisengo.

Elobaki mpe ete koningana makasi ya mabele ekozala, bitumba, kozanga bilei, mpe maladi ekopalangana. Makambo wana ezali kosalema lelo oyo.

Lisusu, Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba.​—Matai 24:14.

Bokonzi ya Nzambe ekolongola mabe nyonso. 2 Petro 3:13

Etikali moke, Yehova akoboma bato nyonso ya mabe.

Satana mpe bademo bakozwa etumbu.

Baoyo bazali koyokela Nzambe bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sembo, epai kobanga ekozala lisusu te, epai bato bakotyelana motema mpe bakolingana.