Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya nsuka

Maloba ya nsuka

Osepelaka te ntango okanisaka ntango ya esengo oyo ozalaki elongo na basaleli ya Yehova, na ndakisa na makita ya lisangá oyo elendisaki yo, na liyangani moko oyo esepelisaki yo, to likambo moko ya kolendisa oyo okutanaki na yango na mosala ya kosakola, to kaka lisolo moko ya esengo na moninga na yo mondimi? Soki ezali bongo, yango elakisi ete obosaná Yehova te; ye mpe abosaná yo te. Ntango akanisaka mosala oyo osalelaki ye na bosembo, ayokaka esengo. Mpe azali na mposa makasi ya kosalisa yo ozongela ye.

Yehova alobi ete: “Ngai moko . . . nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango. Ndenge moto atyaka likebi na etonga na ye, oyo azali koleisa na mokolo oyo akómi na katikati ya bampate na ye oyo epalanganaki, ndenge yango nde nakotyela bampate na ngai likebi; mpe nakobikisa yango na bisika nyonso oyo yango epalanganaki.”​—Ezekiele 34:11, 12.