Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 1

“Oyo ebungi, nakoluka yango”

“Oyo ebungi, nakoluka yango”

Kanisá ete mpate moko ebungi. Ezalaki kolya matiti, mpe sikoyo ekómi mosika na bampate mosusu. Ezali komona etonga lisusu te, ezali mpe komona mobateli na yango te. Sikoyo, molili ebandi kokɔta. Lokola mpate yango ekɔti na lobwaku moko oyo ezali na banyama mabe, ekómi na likama. Nsukansuka, eyoki mongongo oyo emeseni na yango: mongongo ya mobateli na yango, oyo alandi yango mbangu, amemi yango na elamba na ye, mpe azongi na yango na lopango.

MBALA na mbala, Yehova alobi ete azali mobateli ya bampate. Na Liloba na ye, alaki biso ete: “Ngai moko . . . nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.”​—Ezekiele 34:11, 12.

“Bampate oyo nazali kobatela”

Banani bazali bampate ya Yehova? Na mokuse, bampate ya Yehova ezali bato oyo balingaka ye mpe basambelaka ye. Biblia elobi ete: “Tósambela mpe tógumbama; tófukama liboso ya Yehova Mokeli na biso. Mpo ye azali Nzambe na biso, mpe biso tozali bato na ye oyo azali kobatela lokola bampate na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti.” (Nzembo 95:6, 7) Basaleli ya Yehova bazalaka na mposa ya kolanda Yehova, Mobateli na bango, ndenge bampate elandaka mobateli na yango. Elingi nde koloba ete basalaka mabunga te? Ezali bongo te. Ntango mosusu, basaleli ya Nzambe bakómaki lokola bampate “oyo epalanganaki,” lokola ‘bampate oyo ebungá,’ lokola ‘bampate oyo ezali kobunga nzela.’ (Ezekiele 34:12; Matai 15:24; 1 Petro 2:25) Atako bongo, soki moto akei mosika na nzela, Yehova asundolaka ye te mpe amonaka te ete esili mpo na moto yango.

Omonaka ete Yehova azali kaka Mobateli na yo? Ndenge nini Yehova amonisaka ete azali Mobateli ya mpate lelo oyo? Talelá ndenge misato oyo amonisaka yango:

Aleisaka biso na elimo. Yehova alobi: “Nakoleisa yango na esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti. . . . Kuna, ekolala na esika malamu ya kofanda, mpe ekolya matiti.” (Ezekiele 34:14) Yehova atikaka te kopesa biso bilei ya elimo ndenge na ndenge na ntango ebongi. Okoki kokanisa lisolo moko, diskur moko, to video moko oyo eyanolaki na libondeli oyo osalaki mpo na kosɛnga lisalisi? Yango endimisaki yo ete Yehova atyelaka yo likebi?

Abatelaka biso mpe asungaka biso. Yehova alaki ete: “Oyo epalangani, nakozongisa yango; oyo ebukani, nakokanga yango eteni ya elamba mpe oyo ezali kobɛla, nakokembisa yango.” (Ezekiele 34:16) Yehova apesaka makasi na baoyo balɛmbi mpo mitungisi elekeli bango. Akangaka bampate na ye eteni ya elamba, mpo na kosalisa yango ebika soki ezokaki​—mbala mosusu, ata soki baninga na bango bandimi nde bazokisaki bango. Baoyo bakei mosika na nzela mpe bazali komiyoka ete babongi te, azongisaka bango na nzela.

Ayebi ete asengeli kotyela biso likebi. Yehova alobi: ‘Nakobikisa yango na bisika nyonso oyo yango epalanganaki. Oyo ebungi, nakoluka yango.’ (Ezekiele 34:12, 16) Mpo na Yehova, soki mpate ebungi elimboli te ete ekei libela. Ayebaka ntango mpate moko ezangi, akendaka koluka yango, mpe asepelaka ntango azwi yango. (Matai 18:12-14) Kutu, abengi basaleli na ye ya solo “bampate na ngai, bampate oyo nazali kobatela.” (Ezekiele 34:31NW, 2013) Ozali moko ya bampate yango.

Mpo na Yehova, soki mpate ebungi, elimboli te ete ekei libela. Asepelaka ntango azwi mpate oyo ebungaki

“Yelá biso mikolo ya sika lokola na ntango ya kala”

Mpo na nini Yehova azali koluka yo mpe azali kosɛnga yo ozongela ye? Mpo alingi ete ozala na esengo. Alaki ete akosopela bampate na ye lipamboli lokola “bambula makasi.” (Ezekiele 34:26) Elaka wana ekokokisama solo. Mpe osilá komona na miso ndenge ezali kokokisama.

Kanisá naino na ebandeli ntango oyebaki Yehova. Na ndakisa, oyokaki ndenge nini ntango oyekolaki mateya kitoko ya solo oyo etali nkombo ya Nzambe mpe mokano na ye mpo na bato? Ozali koyeba lisusu esengo oyo ozalaki koyoka ntango ozalaki kokutana na bakristo mosusu na mayangani ya mike to ya minene? Ntango opesaki moto moko litatoli mpe asepeli na nsango malamu, ozongaki na esengo te mpe osepelaki te?

Yebá ete okoki koyoka lisusu esengo wana. Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala babondelaki ete: “Zongisá biso epai na yo, Ee Yehova, mpe tokozonga noki. Yelá biso mikolo ya sika lokola na ntango ya kala.” (Bileli 5:21) Yehova ayanolaki na libondeli yango, mpe basaleli na ye bazongelaki ye mpe esengo na bango ezongaki. (Nehemia 8:17) Yehova akosala mpe bongo mpo na yo.

Kasi, koloba ete okozongela Yehova ezali pɛtɛɛ, nzokande kosala yango ezali mpasi. Talelá mikakatano mosusu oyo epekisaka bato bázongela Yehova, mpe ndenge ya kolonga yango.