Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 3

Soki ndeko moko azokisaki yo​—Ntango ‘tozali na likambo ná mosusu’

Soki ndeko moko azokisaki yo​—Ntango ‘tozali na likambo ná mosusu’

“Ndeko mwasi moko ya lisangá na biso akoselaki ngai ete nayibi mbongo na ye. Ntango bandeko mosusu ya lisangá bayokaki yango, bakɔtelaki ye. Nsukansuka, ndeko mwasi yango ayebisaki ngai ete ayaki koyeba ete ngai moto nayibaki mbongo na ye te. Atako asɛngaki ngai bolimbisi, na motema, nazalaki komona ete nakoki kolimbisa ye te mpo abebisaki lokumu na ngai.”​—Linda.

OZALI lokola Linda, oyo azokisamaki makasi na makambo oyo ndeko na ye mokristo asalaki ye? Likambo ya mawa, bandeko mosusu batikaki ete etamboli ya bato mosusu etungisa bango mpe epekisa bango komipesa na makambo ya Nzambe. Bongo yo?

Nani akoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”?

Ya solo, tokoki komona ete ezali mpasi mingi kolimbisa ndeko mokristo oyo azokisi biso na motema. Atako bongo, toyebi ete biso bakristo tosengeli kolingana. (Yoane 13:34, 35) Soki ndeko na biso mokristo nde asaleli biso mabe, tokoki mpenza kolɛmba nzoto mpe koyoka mpasi makasi.​—Nzembo 55:12.

Toboyi te, Biblia elobi ete ezalaka na ntango oyo bakristo ‘bazalaka na makambo’ na basusu. (Bakolose 3:13) Atako bongo, soki yango ekómeli biso, tokoki komona ete ezali mokakatano monene. Nini ekoki kosalisa biso? Tótalela mitinda misato ya Biblia:

Tata na biso ya likoló amonaka makambo nyonso. Yehova amonaka makambo nyonso oyo esalemaka, ata ntango basaleli biso makambo na bosembo te mpe ememeli biso mpasi. (Baebre 4:13) Longola yango, Yehova ayokaka mpasi soki biso tozali komona mpasi. (Yisaya 63:9) Atikaka soki moke te ete “bolɔzi to mpasi,” to eloko mosusu nyonso ‘ekabola biso na bolingo ya Nzambe,’ ezala ata mosaleli na ye mosusu. (Baroma 8:35, 38, 39) Biso mpe tosengeli kotika te ete eloko moko to moto moko akabola biso na Yehova.

Kolimbisa ezali kokanga miso na mabe te. Ntango tolimbisi baoyo basali biso mabe, elingi koloba te ete tokipe yango te, tondimi yango, to tokangi miso na mabe oyo basali. Kobosana likambo oyo te: Yehova andimaka lisumu te, kasi alimbisaka yango, soki esɛngi ete alimbisa. (Nzembo 103:12, 13; Habakuku 1:13) Ntango Yehova azali kolendisa biso tólimbisa basusu, azali nde kosɛnga biso tólanda ndakisa na ye. ‘Akangaka nkanda te libela.’​—Nzembo 103:9; Matai 6:14.

Kolongola nkanda na motema ezali mpo na bolamu na biso. Na ndenge nini? Kanisá ndakisa oyo: Otomboli libanga moko, oyo ntango mosusu ezali na kilo mingi te, mpe osimbi yango na lobɔkɔ. Mbala mosusu, okoyoka mpasi te soki osimbi libanga yango ntango mokuse. Kasi nini ekosalema soki osimbi libanga yango ntango molai? Ntango boni okozala na likoki ya kosimba yango: mwa miniti? ngonga moko? to ntango molai koleka? Na ntembe te, soki eumeli, lobɔkɔ na yo ekolɛmba mingi! Ezali solo ete kilo ya libanga yango emati te. Kasi soki osimbi yango ntango molai, okoyoka yango kilo mingi. Ezali mpe bongo mpo na nkanda oyo okangeli moto. Soki tokangeli moto nkanda na motema, ata nkanda ya moke, tozali nde kominyokola. Yango wana, Yehova alendisi biso tóboya kokangela bato nkanda. Kosala bongo ezali mpo na bolamu na biso moko.​—Masese 11:17.

Kolongola nkanda na motema ezali mpo na bolamu na biso

“Nayokaki lokola nde Yehova ye moko azali koloba na ngai”

Nini esalisaki Linda alongola nkanda oyo akangelaki ndeko na ye mokristo oyo asalaki ye mabe? Moko ya makambo oyo esalisaki ye ezali komanyola makambo oyo Biblia elobi mpo na kolimbisa basusu. (Nzembo 130:3, 4) Likambo esimbaki motema ya Linda yango oyo: ayebaki ete soki tolimbisi basusu, Yehova mpe akolimbisa biso. (Baefese 4:32–5:2) Mpo na komonisa ete likanisi yango esimbaki motema na ye, alobi: “Nayokaki lokola nde Yehova ye moko azali koloba na ngai.”

Nsukansuka, Linda alongolaki nkanda nyonso oyo azalaki na yango. Alimbisaki ye na motema moko, mpe sikoyo ndeko yango akómá moninga na ye ya motema. Linda azali kaka kosalela Yehova. Yebá ete Yehova alingi kosalisa yo osala mpe bongo.