Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 5

Bózongela “mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na bino”

Bózongela “mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na bino”

Omonaki ete mokakatano moko to mikakatano ebele oyo balobeli na mwa buku oyo ekokani na oyo ya yo? Soki ezali bongo, yebá ete ozali na nzela ya malamu. Basaleli mingi ya sembo ya Nzambe, ezala na ntango ya kala to na mikolo na biso, bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Lokola Yehova asalisaki bango bálonga mikakatano yango, akosalisa mpe yo.

Yehova akoyamba yo soki ozongeli ye

SIMBÁ ete Yehova akoyamba yo soki ozongeli ye. Akosalisa yo otika komitungisa, olongola nkanda soki bazokisaki yo, mpe ozala na kimya ya makanisi mpe ya motema mpo ozali na lisosoli ya pɛto. Na nsima, okoki kokóma lisusu na mposa ya kosalela Yehova elongo na baninga na yo bandimi. Okozala lokola bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso, oyo ntoma Petro akomelaki bango ete: “Bozalaki lokola bampate, oyo bazali kobunga nzela; kasi sikoyo bozongeli mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na bino.”​—1 Petro 2:25.

Kozongela Yehova ezali likambo ya malamu koleka makambo nyonso oyo osengeli kosala. Mpo na nini? Okosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11) Ndenge oyebi yango, Yehova ayokaka esengo to mawa; na yango, makambo oyo tosalaka esepelisaka ye to eyokisaka ye mawa. Ya solo, Yehova atindaka biso na makasi te ete tólinga ye mpe tósalela ye. (Kolimbola Mibeko 30:19, 20) Moto moko ya mayele oyo alimbolaka Biblia alobaki: “Moto moko te akoki kofungola motema na yo, osengeli kofungola yango yo moko.” Soki tozali kosambela Yehova na motema oyo etondi na bolingo, ekozala lokola tondimi kofungola motema na biso. Ntango tosali bongo, tozali kopesa ye likabo ya motuya mpenza​—bosembo na biso—​mpe tozali kosepelisa motema na ye mingi. Ya solo, eloko moko te ekoki kokokana na esengo oyo toyokaka ntango tozali kosambela Yehova na ndenge oyo ebongi.​—Misala 20:35; Emoniseli 4:11.

Longola yango, soki ozongeli losambo ya solo, bobola na yo ya elimo ekosila. (Matai 5:3) Na ndenge nini? Bato mingi na mokili bamitunaka: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele?’ Bazalaka na mposa makasi ya kozwa biyano na mituna oyo etali ntina ya bomoi. Bato bazalaka na mposa wana mpo Yehova akelaki bango na mposa yango. Asalá biso mpo tósalelaka ye na esengo. Tokoki kozala na esengo ya solosolo kaka soki toyebi ete tozali kosambela Yehova mpo tolingaka ye.​—Nzembo 63:1-5.

Yebá ete Yehova alingi ozongela ye. Mpo ondima yango, simbá likambo oyo: Tosalaki mabondeli mingi mpo na kobongisa mwa buku oyo malamumalamu. Ekoki kozala ete nkulutu moko to moninga moko mokristo nde apesi yo mwa buku yango. Na nsima, otángi yango, mpe omoni ete osengeli kosalela makambo oyo yango elobeli. Nyonso wana ezali elembo oyo emonisi ete Yehova abosaná yo te. Azali nde kobenda yo malɛmbɛmalɛmbɛ mpo ozongela ye.​—Yoane 6:44.

Tokoki mpenza kobɔndisama na koyeba ete Yehova abosanaka te basaleli na ye oyo babungá. Donna, ndeko mwasi moko, amonaki ete ezali mpenza solo. Alobi: “Natikaki solo malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi mbala mingi nazalaki komanyola Nzembo 139:23, 24, oyo elobi: ‘Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai, mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi, mpe kambá ngai na nzela ya seko.’ Nazalaki koyeba ete nazali moto ya mokili te​—ata mokolo moko te nayokaki ete esika na ngai ezali kuna—​mpe nayebaki ete nasengeli kozala nde na ebongiseli ya Yehova. Nabandaki komona ete Yehova asundolá ngai te; esengelaki kaka naluka nzela ya kozongela ye. Mpe nasepelaka mingi ndenge nazongelá ye!”

“Nabandaki komona ete Yehova asundolá ngai te; esengelaki kaka naluka nzela ya kozongela ye”

Tozali kobondela ete yo mpe ozonga mpo oyoka lisusu “esengo ya Yehova.” (Nehemia 8:10) Okoyoka mawa te soki ozongeli Yehova.