Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya​—Bavideo

Kolisá makoki oyo esengeli mpo na kotánga mpe koteya liboso ya bato.

LITEYA 1

Ndenge malamu ya kobanda lisolo

Okoki kosala nini mpo opesa bayangani mposa ya koyoka makambo olingi koloba?

LITEYA 2

Koloba lokola ozali kosolola na bato

Okoki kosala nini mpo na kokitisa bayoki na yo mitema ntango ozali kosolola na bango?

LITEYA 3

Kotuna mituna

Ndenge nini okoki kosalela mituna mpo na kotinda bato oyo bazali koyoka yo bákanisa, mpo na kopesa bango mposa ya koyoka yo mpe ya kolanda yo tii na nsuka, mpe mpo na konyata makanisi ya ntina?

LITEYA 4

Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ

Ndenge nini okoki kobongisa makanisi ya baoyo bazali koyoka yo mpo bázwa litomba mpenza na bavɛrsɛ oyo olingi kotánga?

LITEYA 5

Kotánga malamu

Wapi mwa makambo ya kosala mpo na kotánga na mongongo makasi kaka maloba oyo ekomami?

LITEYA 6

Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ

Osengeli kosala nini ntango ozali kotánga vɛrsɛ moko mpe na nsima kosalisa baoyo bazali koyoka báyeba ntina oyo ozali kotánga vɛrsɛ yango?

LITEYA 7

Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa

Okoki kosala nini mpo omindimisa ete obebisi te mateya ya solo?

LITEYA 8

Bandakisa oyo ezali koteya

Lokola Moteyi monene, ndenge nini okoki kosalela bandakisa na ndenge ebongi mpenza?

LITEYA 9

Koyeba kosalela biloko ya kolakisa

Ndenge nini okoki kosalela biloko oyo okoki kolakisa mpo makanisi ya ntina ezala polele mpe etikala na mitó ya bato?

LITEYA 10

Kobongola mongongo

Ndenge nini okoki kobongola mongongo mpo na kobimisa makanisi polele mpe kosimba mitema ya bayoki na yo?

LITEYA 11

Koloba na esengo

Ndenge nini okoki koloba na esengo mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpe ya kosalela makambo oyo bakoyoka?

LITEYA 12

Koloba na mɔtɔ mpe komitya na esika ya basusu

Ndenge nini okoki komonisa ete olobaka na mɔtɔ mpe omityaka na esika ya bayoki na yo?

LITEYA 13

Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa

Ndenge nini okoki kosala diskur oyo ekosala ete bayoki na yo bámona bolamu oyo bakozwa mpe ekotinda bango básala mwa eloko?

LITEYA 14

Kobimisa polele makanisi ya ntina

Salisá bayoki na yo bátya likebi, bákanga ntina mpe bábosana te makambo ozali koloba na kobimisa polele makanisi ya ntina.

LITEYA 15

Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba

Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba ntango ozali kosala diskur to kosolola na bato na mosala ya kosakola?

LITEYA 16

Kolendisa bato mpe kolobela mingi makambo ya malamu

Makambo nini misato tosengeli kosala mpo tóloba na ndenge oyo ekosalisa basusu mpe ekopesa bango elikya?

LITEYA 17

Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango

Makambo nini osengeli kosala te ntango ozali koluka kosalisa bato oyo bazali koyoka yo bákanga ntina ya makambo oyo ozali koloba?

LITEYA 18

Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo

Ndenge nini okoki kosalisa bato oyo bazali koyoka yo bákanisa mpe bámona ete bayekoli likambo ya malonga?

LITEYA 19

Kosala makasi mpo na kosimba mitema

Ndenge nini okoki kolendisa bato oyo bazali koyoka yo básala makambo ya malamu?

LITEYA 20

Ndenge malamu ya kosukisa lisolo

Makambo nini osengeli kosala ntango olingi kosukisa lisolo na yo, ezala ozali kosala lisolo na lisangá to ozali na mosala ya kosakola?

Talá mpe...

BABUKU MPE MWA BABUKU

Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya

Mokanda oyo ebongisami mpo na kosalisa yo okóma kotánga, koloba mpe koteya malamu.