Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—MATAI 28:19, 20.

NZEMBO: 141, 97

1, 2. Mituna nini maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:14 ebimisi?

YESU asakolaki ete na mikolo ya nsuka, nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama epai ya bato ya bikólo nyonso. (Matai 24:14) Biso Batatoli ya Yehova toyebani na mokili mobimba mpo na mosala na biso ya kosakola. Bato mosusu basepelaka na nsango oyo tosakolaka, kasi basusu basepelaka na yango te. Kasi, ata bato mosusu oyo basepelaka te na nsango na biso bamemyaka biso mpo na mosala na biso. Tolobaka ete tosalaka mosala oyo Yesu alobaki ete ekosalema. Ebongi mpenza tóloba bongo? Nini endimisaka biso ete mosala na biso ya kosakola ezali mosala oyo Yesu alobaki ete ekosalema?

2 Mangomba mingi emikumisaka ete esakolaka nsango oyo Yesu asakolaki. Kasi mosala na bango ya kosakola esukaka kaka na koteya na ndako-nzambe, na televizyo, na Internet, to koyebisa bato ndenge oyo bayambaki Yesu. Basusu bakanisaka ete kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga to kosala misala lokola mosala ya monganga, lifulume, to molakisi na eteyelo ezali lolenge oyo bateyaka. Kasi misala nyonso wana ezali nde mosala ya kosakola oyo Yesu alobelaki?

3. Na kotalela Matai 28:19, 20, makambo nini minei bayekoli ya Yesu basengeli kosala?

3 Yesu alingaki nde ete bayekoli na ye bázelaka bato báya epai na bango? Te! Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bankama ya bayekoli na ye: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Matai 28:19, 20) Na yango, lokola tozali bayekoli ya Yesu, tosengeli kosala makambo minei. Tosengeli kokómisa bato bayekoli, kobatisa bango, mpe koteya bango. Kasi liboso, tosengeli kokende epai ya bato. Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete: “ ‘Kokende’ ezali mosala ya mondimi nyonso, ata soki esɛngi kokatisa balabala to kokatisa mai monene.”​—Matai 10:7; Luka 10:3.

4. Kozala “baluki-bato” esɛngi makambo nini?

4 Yesu azalaki kozela ete bayekoli na ye básala nini? Alingaki nde ete básakola moto na moto na ndenge na ye, to básala mosala yango elongo na ndenge oyo ebongisami? Lokola moto moko te akoki kosakwela bato ya “bikólo nyonso,” bayekoli na ye basengelaki kosala mosala yango elongo mpe na ndenge oyo ebongisami. Yango nde Yesu alingaki koloba ntango asɛngaki bayekoli na ye bákóma “baluki-bato.” (Tángá Matai 4:18-22.) Yesu azalaki te kolobela molɔbi-mbisi oyo asimbaka na lobɔkɔ ndɔbɔ oyo batyaka mpambo mpo na kozela ete mbisi eya kokangama. Mosala ya kolɔba mbisi oyo Yesu azalaki kolobela ezalaki nde kosɛnga kotya minyama mpo na kokanga mbisi. Lolenge wana ya kolɔba esɛngaka mosala makasi, kobongisa makambo malamu, mpe bato mingi básala elongo.​—Luka 5:1-11.

5. Mituna nini minei tosengeli koyanola na yango, mpe mpo na nini?

5 Mpo na koyeba banani bazali kosakola nsango malamu lelo oyo, tosengeli koyanola na mituna oyo minei:

  • Nsango nini bayekoli ya Yesu basengeli kosakola?

  • Nini esengeli kotinda bango básakola?

  • Mayele nini basengeli kosalela?

  • Basengeli kosakola tii wapi, mpe mosala yango esengeli kokoba tii ntango nini?

Biyano na mituna wana ekosalisa biso tóyeba banani bazali kosala mosala wana oyo ezali kobikisa bato mpe ekokómisa makasi mposa na biso ya kokoba kosakola.​—1 Timote 4:16.

NSANGO NINI TOSENGELI KOSAKOLA?

6. Nini endimisi yo ete Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango oyo ebongi?

6 Tángá Luka 4:43. Yesu asakolaki “nsango malamu ya Bokonzi,” mpe alingi ete bayekoli na ye básala mpe bongo. Banani bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato nyonso? Ezali kaka Batatoli ya Yehova! Ata bato mosusu oyo basepelaka na biso te bandimaka likambo yango. Na ndakisa, yoká likambo oyo sango moko oyo asalaki mosala ya misionɛrɛ na bikólo ndenge na ndenge ayebisaki Motatoli ya Yehova moko. Na ekólo mokomoko, sango yango atunaki Batatoli ya Yehova nsango nini bazali kosakola. Sango yango alobi ete: “Bango nyonso bazalaki bazoba, yango wana bazalaki kopesa kaka eyano moko: ‘Nsango malamu ya Bokonzi.’” Maloba ya sango yango emonisi ete tozali bazoba te, kasi tozali na bomoko mpo tozali bakristo ya solo. (1 Bakorinti 1:10) Bokonzi ya Nzambe ezali mpe nsango ya libosoliboso oyo ezalaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Na mwayene, tobimisaka zulunalo yango pene na 59 000 000 na minɔkɔ 254; yango esali ete ezala zulunalo oyo ekabolamaka mingi koleka bazulunalo mosusu nyonso na mokili!

Kaka Batatoli ya Yehova nde bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe

7. Ndenge nini toyebi ete bakonzi ya mangomba ya bokristo basakolaka te nsango oyo ebongi?

7 Bakonzi ya mangomba ya bokristo basakolaka nsango ya Bokonzi ya Nzambe te. Soki balobeli Bokonzi yango, mingi na bango balobaka ete ezali na kati ya motema ya moto. (Luka 17:21) Bateyaka bato te ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló, oyo Yesu azali mokonzi na yango. Kasi, balobelaka Yesu na ntango ya Noele mpe Pasika. Balimbolaka te ete Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano nyonso ya bato, mpe ete mosika te ekolongola mabe nyonso na mabele. (Emoniseli 19:11-21) Emonani polele ete bakonzi ya mangomba ya bokristo bayebi te makambo nini Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, akosala. Lokola bayebi te nsango oyo Yesu asakolaki, bayebi te ntina oyo basengeli kosakola yango.

NINI ESENGELI KOTINDA BISO TÓSALA MOSALA YANGO?

8. Makanisi nini ya mabe etindaka bato mosusu básakola?

8 Bayekoli ya Yesu basengeli te kosakola mpo bázwa mbongo to bátonga bandako ya minene. Yesu alobaki: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:8) Na yango, mosala ya kosakola esengeli kozala mombongo te. (2 Bakorinti 2:17) Bayekoli ya Yesu basengeli te kosɛnga ete báfutaka bango mpo na mosala na bango ya kosakola. (Tángá Misala 20:33-35.) Atako malako ya Yesu ezali polele, mangomba mingi etyaka makanisi nyonso na kokɔngɔla mbongo mpo na kobongisa bandako-nzambe, kofuta bakonzi ya mangomba mpe basali mosusu. Yango wana, bakonzi mingi ya mangomba ya bokristo bakómi mpenza bazwi.​—Emoniseli 17:4, 5.

Mosala ya kosakola esengeli kozala mombongo te

9. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bamonisi ete basalaka mosala ya kosakola na makanisi ya malamu?

9 Batatoli ya Yehova bakɔngɔlaka nde mbongo na Bandako ya Bokonzi na bango to na mayangani na bango? Te! Mosala na bango esimbami na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. (2 Bakorinti 9:7) Atako bongo, na mbula euti koleka, Batatoli ya Yehova balekisaki bangonga pene na miliare mibale na mosala ya kosakola nsango malamu mpe batambwisaki boyekoli ya Biblia koleka milio libwa sanza na sanza. Bafutaka bango te mpo na mosala na bango ya kosakola, kasi basepelaka kosalela mbongo na bango moko mpo na kosala mosala yango. Moto moko ya mayele alobaki mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova ete: “Mokano na bango ya libosoliboso ezali kosakola mpe koteya.” Alobaki mpe ete Batatoli ya Yehova bazali te na bakonzi ya lingomba oyo bafutamaka. Na yango, lokola tosakolaka mpo na mbongo te, nini etindaka biso tósakola? Tosalaka mosala yango kozanga ete bátindika biso mpo tolingaka Yehova mpe tolingaka bato. Yango ekokisi esakweli oyo ezali na Nzembo 110:3. (Tángá.)

MAYELE NINI TOSENGELI KOSALELA?

Tosakolaka bisika nyonso oyo tokutaka bato (Talá paragrafe 10)

10. Mayele nini Yesu ná bayekoli na ye basalelaki mpo na kosakola?

10 Mayele nini Yesu ná bayekoli na ye basalelaki mpo na kosakola? Bazalaki kokende bisika nyonso oyo bakokaki kokuta bato. Na ndakisa, bazalaki kosakola na babalabala mpe na bazando. Bazalaki mpe kokende koluka bato na bandako na bango. (Matai 10:11; Luka 8:1; Misala 5:42; 20:20) Kosakola ndako na ndako ezalaki lolenge oyo ebongisami malamu mpo na kokutana na bato ya ndenge nyonso.

11, 12. Na oyo etali kosakola nsango malamu, ndenge nini milende ya mangomba ya bokristo ekeseni na milende ya basaleli ya Yehova?

11 Mangomba ya bokristo esakolaka nsango malamu ndenge Yesu azalaki kosala? Mbala mingi, bakonzi ya mangomba oyo bafutamaka bateyaka kaka bandimi na bango. Bakambi yango balukaka bayekoli ya sika te kasi balukaka kaka kobatela bandimi oyo bayaka na lingomba. Na bantango mosusu, bamekaka kolendisa bandimi na bango básakola. Na ndakisa, na mobu 2001, Pápa Jean Paul II akomaki na mokanda moko ete bandimi ya lingomba basengeli kosakola evanzile mpe kozala na molende lokola ntoma Paulo, oyo alobaki ete: ‘Mawa na ngai soki nasakoli evanzile te.’ Na nsima, pápa yango alobaki ete mosala ya kosakola esengeli te kosalema kaka na bato moke oyo bazwá formasyo, kasi na bandimi nyonso ya lingomba. Nzokande, kaka bato moke nde balandaki elendiseli wana.

12 Tokoloba nini mpo na Batatoli ya Yehova? Kaka bango nde basakolaka ete Yesu azali koyangela lokola Mokonzi banda 1914. Batosaka Yesu mpe batyaka mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na bango. (Marko 13:10) Buku moko (Pillars of Faith​—American Congregations and Their Partners) elobi ete mpo na Batatoli ya Yehova, mosala ya kosakola ezali na ntina mingi. Elobi mpe ete soki bakuti moto azali na nzala, azali na moto ya kosalisa te, to azali kobela, balukaka kosalisa ye; kasi babosanaka soki moke te ete mokano na bango ya libosoliboso ezali nde kosakola nsango etali nsuka ya mokili oyo mpe koteya bato mpo na lobiko. Batatoli ya Yehova bazali kokoba kosakola nsango yango mpe komekola mayele ya kosakola oyo Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kosalela.

MOSALA YANGO ESENGELI KOSALEMA TII WAPI, MPE ESENGELI KOKOBA TII NTANGO NINI?

13. Mosala ya kosakola esengeli kosalema tii wapi?

13 Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengelaki kosakola mpe koteya nsango malamu “na mabele mobimba esika bato bafandi.” Bazwaki etinda ya kokómisa bato bayekoli “na bikólo nyonso.” (Matai 24:14; 28:19, 20) Yango elimboli ete nsango malamu esengeli kosakolama na mokili mobimba.

14, 15. Nini emonisi ete Batatoli ya Yehova bakokisi esakweli ya Yesu oyo etali bonene ya mosala ya kosakola? (Talá elilingi ya ebandeli.)

14 Kaka Batatoli ya Yehova nde bakokisi esakweli ya Yesu oyo elobi ete nsango malamu esengeli kosakolama na mabele mobimba. Mpo na nini tolobi bongo? Na États-Unis, bakonzi ya mangomba ya bokristo bazali soki 600 000, nzokande Batatoli ya Yehova soki 1 200 000 bazali kosakola nsango malamu na ekólo yango. Na mokili mobimba, basango ya Katolike bazali soki 400 000, nzokande Batatoli ya Yehova koleka milio 8 bazali kosakola nsango malamu na mikili 240. Emonani polele ete Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba, mpe yango ezali kokumisa Yehova mpe kosanzola ye!​—Nzembo 34:1; 51:15.

15 Mokano na biso Batatoli ya Yehova ezali kosakwela bato ebele lisusu koleka nsango malamu liboso ete nsuka eya. Mpo na kosala mosala yango, tobongolaka mpe tobimisaka bamilio ya babuku, bazulunalo, batrakte, mpe nkasa ya libyangi mpo na mayangani mpe Ekaniseli na minɔkɔ koleka 700. Topesaka bato mikanda nyonso wana ofele. Kaka na mbula euti koleka, tobimisaki mikanda oyo elimbolaka Biblia soki miliare minei na ndambo. Tosili mpe kobimisa Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika koleka milio 200, na minɔkɔ koleka 130. Mpe site Internet na biso ezali sikoyo na minɔkɔ koleka 750. Kaka Batatoli ya Yehova nde bazali kosala mosala ya kokamwa ndenge wana.

16. Ndenge nini toyebi ete Batatoli ya Yehova bazali na elimo ya Nzambe?

16 Mosala ya kosakola ekokoba tii ntango nini? Yesu alobaki ete nsango malamu ekosakolama tii ntango nsuka ekoya. Soki biso Batatoli ya Yehova toyiki mpiko na mosala ya kosakola na boumeli ya bambula oyo nyonso, ezali kaka mpo tozali na elimo santu ya Yehova. (Misala 1:8; 1 Petro 4:14) Bakonzi mosusu ya mangomba bakoki koloba ete: “Tozali na elimo santu.” Kasi, bakoki nde kosala mosala oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mikolo oyo ya nsuka? Mangomba mosusu emekaki kosakola ndenge tosalaka, kasi elongaki te. Bato mosusu balingaka kosakola, kasi kaka mpo na mwa ntango. Toboyi te, basusu bakoki kosakola ndako na ndako, kasi basakolaka nsango malamu ya Bokonzi te. Na yango, bakoki te kosala mosala oyo Yesu abandisaki.

BANANI MPENZA BAZALI KOSAKOLA NSANGO MALAMU LELO OYO?

17, 18. (a) Mpo na nini tondimisami ete kaka Batatoli ya Yehova nde bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi lelo oyo? (b) Nini esalisi biso tókoba kosala mosala yango?

17 Banani mpenza bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi lelo oyo? Ezali kaka Batatoli ya Yehova! Ndenge nini toyebi yango? Mpamba te tozali kosakola nsango oyo ebongi, elingi koloba nsango malamu ya Bokonzi. Na nzela ya mosala na biso ya kosakola, tokendaka koluka bato; na yango tozali kosalela mayele oyo ebongi. Tosakolaka na makanisi malamu, elingi koloba bolingo oyo tolingaka Yehova mpe bato nde etindaka biso tósakola. Mosala na biso ya kosakola ezali kosalema na mokili mobimba, mpamba te tozali kosakwela bato ya bikólo nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso. Mpe tokokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi tii ntango nsuka ekoya!

18 Ezali likambo ya kokamwa komona mosala monene oyo basaleli ya Yehova bazali kosala mpo na kosakola nsango malamu na mikolo oyo ya nsuka. Kasi nini ezali kosalisa biso tósalaka mosala wana nyonso? Ntoma Paulo alobi ete: “Nzambe nde moto oyo, ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.” (Bafilipi 2:13) Tiká ete Yehova akoba kopesa biso makasi oyo esengeli mpo tósala nyonso oyo tokoki mpo na kokoba kosakola nsango malamu!​—2 Timote 4:5.