Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ezali kokoba kobongola yo?

Biblia ezali kokoba kobongola yo?

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.”​—BAROMA 12:2.

NZEMBO: 61, 52

1-3. (a) Mbongwana nini ekoki kozala mpasi tósala nsima ya batisimo? (b) Soki mbongwana ezali kosalema noki te ndenge tokanisaki, mituna nini tokoki komituna? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BANDA bambula mingi, Kevin azalaki kobɛta masano ya mbongo, komɛla makaya, komɛla masanga mingi mpe komɛla bangi. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na nsima, ayekolaki makambo etali Yehova mpe alingaki kozala moninga na ye. Kasi mpo na kosala bongo, asengelaki kobongola makambo mingi na bomoi na ye. Abongwanaki na lisalisi ya Yehova mpe ya nguya ya Liloba na ye, Biblia.​—Baebre 4:12.

2 Nsima ya kozwa batisimo, ndeko Kevin akobaki kobongwana mpo akóma mokristo ya malamu mpenza. (Baefese 4:31, 32) Na ndakisa, azalaki na momeseno ya kosilika noki. Akamwaki ntango amonaki ete ezalaki mpasi ayekola kopekisa nkanda na ye. Kutu, alobaki ete koyekola kopekisa nkanda na ye ezalaki mpasi koleka kotika makambo mabe oyo azalaki kosala liboso ya kozwa batisimo! Kasi alongaki kobongwana mpo asɛngaki Yehova asalisa ye mpe azalaki koyekola Biblia na mozindo.

3 Liboso ete tózwa batisimo, mingi na biso tobongolaki makambo mingi na bomoi na biso mpo tóyokanisa yango na oyo Biblia elobi. Kasi ata sikoyo, tomonaka ete ezali na makambo mosusu ya mikemike oyo tosengeli kobongola mpo tókóma mpenza lokola Yehova ná Yesu. (Baefese 5:1, 2; 1 Petro 2:21) Na ndakisa, tokoki komona ete tomilelalelaka mingi to totɔngaka bato mbala na mbala mpe tolobaka mabe mpo na basusu. To ekoki kozala ete tobangaka mingi mpo na oyo basusu bakoki kokanisa to koloba mpo na biso. Ntango mosusu tozali kobunda banda bambula mingi mpo na kobongwana, kasi tozali kaka kozongela libunga moko mbala na mbala. Yango wana, tokoki komituna boye: ‘Mpo na nini ezali mpasi mingi nabongwana na makambo wana ya mikemike? Nasengeli kosala nini mpo nasalela oyo Biblia elobi mpo nakoba kobongisa bomoto na ngai?’

OKOKI KOSEPELISA YEHOVA

4. Mpo na nini tokokaka te kosepelisa Yehova na makambo nyonso oyo tosalaka?

4 Tolingaka Yehova, mpe tolingi kosepelisa ye na motema na biso mobimba. Kasi likambo ya mawa, tokoki te kosepelisa ye ntango nyonso, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Mbala mingi toyokaka lokola ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Nazalaka na likoki ya kolinga oyo eleki malamu, kasi nakokaka kosala yango te.”​—Baroma 7:18; Yakobo 3:2.

5. Mbongwana nini tosalaki liboso tózwa batisimo, kasi bolɛmbu nini tokoki kokoba kobunda na yango?

5 Liboso ete tókɔta na lisangá, tosengelaki kotika kosala makambo oyo Yehova ayini. (1 Bakorinti 6:9, 10) Kasi tozali kaka bato ya kozanga kokoka. (Bakolose 3:9, 10) Na yango, tokobaka kosala mabunga, ata soki tozwá batisimo banda bambula mingi. Na bantango mosusu, tokoki kozala na bamposa mpe makanisi ya mabe, to tokoki komona ete ezali mpasi kolonga bolɛmbu moko oyo tozali na yango. Kutu, tokoki kobunda na bolɛmbu yango na boumeli ya bambula mingi.

6, 7. (a) Nini esalaka ete tózala baninga ya Yehova atako tozali bato ya kozanga kokoka? (b) Mpo na nini tosengeli te kokakatana kosɛnga Yehova bolimbisi?

6 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kokoba kozala baninga ya Yehova mpe kosalela ye. Ntango nyonso kanisá ndenge okómaki moninga ya Yehova. Amonaki eloko moko ya malamu epai na yo mpe alingaki ete oyeba ye. (Yoane 6:44) Ayebaki mpe ete ozali na mabunga mpe na bolɛmbu, mpe ete okokoba kosala mabunga. Atako bongo, alingaki ete okóma moninga na ye.

7 Yehova alingaki biso mingi, yango wana apesaki biso likabo moko ya motuya mingi. Atindaki Mwana na ye Yesu awa na mabele mpo apesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na masumu na biso. (Yoane 3:16) Soki tosali libunga, tokoki kosɛnga Yehova alimbisa biso. Mpe mpo na lisiko, tokoki kondimisama ete akolimbisa biso mpe tokokoba kozala baninga na ye. (Baroma 7:24, 25; 1 Yoane 2:1, 2) Kobosana te, Yesu akufaki mpo na bato ya masumu oyo babongoli motema. Yango wana, ata soki tomoni ete tosalaki likambo moko ya mabe mpenza, tosengeli soki moke te kotika kobondela Yehova alimbisa biso. Koboya kosɛnga ye alimbisa biso ezali lokola koboya kosukola mabɔkɔ na biso oyo ezali salite. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova andimi ete tózala baninga na ye, atako tozali bato ya kozanga kokoka!​—Tángá 1 Timote 1:15.

Soki tolingi kopusana penepene na Yehova, tosengeli kokoba komekola ye mpe Mwana na ye

8. Mpo na nini tosengeli te koboya kondima bolɛmbu na biso?

8 Ya solo, tosengeli te koboya kondima bolɛmbu na biso to koluka komilongisa mpo na yango. Yehova ayebisi biso lolenge ya bato oyo alingi ete bázala baninga na ye. (Nzembo 15:1-5) Na yango, soki tolingi kopusana penepene na ye, tosengeli kokoba komekola ye mpe Mwana na ye. Tosengeli mpe kosala makasi tópekisa bamposa na biso ya mabe, ata mpe kobengana bamposa yango. Ata soki esali mbula boni banda tozwá batisimo, tosengeli kokoba kobongisa bomoto na biso.​—2 Bakorinti 13:11.

9. Ndenge nini toyebi ete tokoki kokoba kolata bomoto ya sika?

9 Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete: “Bosengeli kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso mpe oyo ezali kopɔla na kolanda bamposa na yango ya bokosi; kasi ete bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino, mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.” (Baefese 4:22-24) Yango elimboli ete tosengeli kokoba kosala milende mpo na kobongwana mpe “kolata bomoto ya sika.” Na yango, ata soki tozali kosalela Yehova banda bambula boni, tokoki kaka koyekola lisusu mingi bizaleli na ye. Biblia ekoki kosalisa biso tókoba kobongola bomoto na biso mpo tókóma lokola Yehova.

MPO NA NINI EZALI PƐTƐƐ TE?

10. Tosengeli kosala nini mpo na kokoba kobongwana na lisalisi ya Biblia, mpe mituna nini tokoki komituna?

10 Biso nyonso tolingaka kolanda oyo Biblia elobi. Kasi tosengeli kosala makasi soki tolingi kokoba kobongwana. Mpo na nini tosengeli kosala milende ya ndenge wana? Yehova akoki te kosala ete ezala mpasi te mpo tósala makambo ya malamu?

11-13. Mpo na nini Yehova azelaka ete tósala milende mpo na kolonga bolɛmbu na biso?

11 Soki tokanisi ndenge oyo molɔ́ngɔ́ mobimba ezali, ntembe ezali te ete Yehova azali na nguya ya kosala likambo nyonso. Na ndakisa, asalá moi, oyo ezali na nguya mingi. Segɔnde nyonso, moi ebimisaka pole mpe molunge makasi, atako bongo, mpo bomoi ezala awa na mabele, esengeli kaka na ndambo moke ya nguya oyo moi ebimisaka. (Nzembo 74:16; Yisaya 40:26) Yehova apesaka mpe basaleli na ye awa na mabele nguya ntango basengeli na yango. (Yisaya 40:29) Emonani polele ete, soki Yehova alingi, akoki kosala ete ezala mpenza mpasi te mpo tólonga bolɛmbu na biso mpe tóboya bamposa ya mabe. Kasi mpo na nini asalaka bongo te?

12 Yehova apesá biso bonsomi ya kopona. Atikaka biso tópona biso moko soki tokotosa ye to te. Ntango toponaka kotosa ye mpe kosala makasi tósala mokano na ye, tomonisaka ete tolingaka ye mpe tolingi kosepelisa ye. Satana alobaka ete Yehova azali te na lotomo ya koyangela. Kasi ntango totosaka Yehova, tomonisaka ete tolingi ete azala Mokonzi na biso. Mpe tokoki kondimisama ete Tata na biso ya bolingo azwaka na motuya mingi milende oyo tosalaka mpo na kotosa ye. (Yobo 2:3-5; Masese 27:11) Ntango tosalaka makasi mpo na kolonga bolɛmbu na biso, atako ezali pɛtɛɛ te kosala yango, tomonisaka ete tozali sembo epai ya Yehova mpe tolingi ete azala Mokonzi na biso.

13 Yehova ayebisi biso ete tosengeli kosala makasi tómekola bizaleli na ye. (Bakolose 3:12; tángá 2 Petro 1:5-7.) Alingaka mpe ete tósala makasi mpo na kobatela makanisi na biso mpe ndenge oyo tomiyokaka. (Baroma 8:5; 12:9) Mbala nyonso oyo tosalaka makasi mpo na kobongwana mpe tolongaka, toyokaka mpenza esengo.

TIKÁ LILOBA YA NZAMBE EKOBA KOBONGOLA YO

14, 15. Tokoki kosala nini mpo tókolisa bizaleli oyo Yehova alingaka? (Talá etanda “ Biblia mpe libondeli ebongolaki bomoi na bango.”)

14 Tosengeli kosala nini mpo tókolisa bizaleli oyo Yehova alingaka? Na esika ya kopona biso moko makambo oyo tosengeli kobongola, tosengeli kotika ete Nzambe atambwisa biso. Baroma 12:2 elobi ete: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” Na yango, mpo na koyeba oyo Yehova alingaka, tosengeli kotya motema na lisalisi oyo apesaka biso. Tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo, komanyola makambo oyo tozali kotánga, mpe kosɛnga Yehova apesa biso elimo santu na ye. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Na nzela ya makambo wana, Yehova akoki kosalisa biso tóyeba oyo esepelisaka ye, mpe tokoki koyekola kokanisa lokola ye. Soki tosali bongo, makanisi na biso, maloba na biso, mpe makambo oyo tosalaka ekosepelisa Yehova lisusu mingi, mpe tokoyeba ndenge ya kolonga bolɛmbu na biso. Kasi ata soki tosali bongo, tosengeli kokoba kobundisa bolɛmbu yango.​—Masese 4:23.

Batelá masolo oyo ezali na mikanda na biso to bavɛrsɛ ya Biblia oyo esalisaka yo obundisa bolɛmbu na yo, mpe tángáká yango lisusu mbala na mbala (Talá paragrafe 15)

15 Longola kotánga Biblia mokolo na mokolo, tosengeli koyekola yango na lisalisi ya mikanda na biso, na ndakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Masolo mingi ya bazulunalo yango eteyaka biso ndenge oyo tokoki komekola bizaleli ya Yehova mpe kobundisa bolɛmbu na biso. Tokoki komona masolo to bavɛrsɛ mosusu oyo ekoki mpenza kosalisa biso. Tokoki kobatela masolo mpe bavɛrsɛ yango mpe kotángaka yango mbala na mbala.

16. Mpo na nini tosengeli te kolɛmba nzoto soki tozali te na likoki ya kobongwana noki?

16 Esɛngaka ntango mingi mpo na komekola bizaleli ya Yehova. Yango wana, soki omoni ete ozali kolonga te kobongola makambo mingi ndenge olingi, zalá na motema molai. Na ebandeli, ekoki kosɛnga ete osala makasi mpo na kosala oyo Biblia elobi. Kasi soki mbala na mbala ozali na makanisi mpe na bizaleli oyo Yehova alingaka ete tómonisa, ekozala mpasi te okanisa ndenge oyo ye akanisaka mpe osalaka makambo ya malamu.​—Nzembo 37:31; Masese 23:12; Bagalatia 5:16, 17.

KANISÁ MAKAMBO KITOKO OYO TOKOZWA NA MIKOLO EZALI KOYA

17. Soki tozali sembo epai ya Yehova, likambo nini ya esengo tozali kozela na mikolo ezali koya?

17 Tozali kozela na mposa makasi ntango oyo tokokóma bato ya kokoka mpe tokosalela Yehova libela na libela. Na ntango wana, tokobundana lisusu te na bolɛmbu moko, mpe ekozala mpasi te tómekola Yehova. Kasi ata sikoyo tozali na likoki ya kosambela Yehova mpo apesá biso likabo ya lisiko. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kosepelisa ye soki tokobi kosala makasi mpo na kobongwana mpe kolanda oyo ateyaka biso na nzela ya Biblia.

18, 19. Ndenge nini toyebi ete Biblia ezali na nguya ya kokoba kobongola biso?

18 Ndeko Kevin asalaki nyonso mpo akoka kopekisa nkanda na ye. Akanisaki na makambo oyo azalaki kotánga na Biblia mpe asalaki makasi abongola makambo mingi na bomoi na ye. Alandaki mpe toli oyo bandeko na ye bakristo bapesaki ye. Atako esɛngaki mwa bambula mpo abongola bizaleli, nsukansuka akómaki mosaleli na misala. Mpe ekoki sikoyo mbula 20 banda akóma nkulutu. Kasi ata sikoyo, ayebi ete asengeli kokoba kobundisa bolɛmbu na ye.

19 Lokola ndeko Kevin, tokoki kokoba kobongisa bomoto na biso. Soki tosali bongo, tokokoba kopusana penepene na Yehova. (Nzembo 25:14) Ntango tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobongwana mpo tósepelisa ye, akosalisa biso tólonga. Tokoki kondimisama ete na lisalisi ya Biblia tokoki kokoba kobongwana.​—Nzembo 34:8.

^ [1] (paragrafe 1) Topesi ye nkombo mosusu.