Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini ozwaka bikateli?

Ndenge nini ozwaka bikateli?

“Bótika kokóma bazoba, kasi bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.”​—BAEFESE 5:17.

NZEMBO: 69, 57

1. Wapi mibeko mosusu oyo ezali na Biblia, mpe soki totosi yango tokozwa matomba nini?

NA BIBLIA, Yehova apesá biso mibeko oyo elobi polele nini alingi tósala. Na ndakisa, ayebisi biso ete tosengeli te kosambela bikeko, koyiba, kolangwa masanga, to kosala pite to ekobo. (1 Bakorinti 6:9, 10) Yesu, Mwana ya Yehova mpe apesaki bayekoli na ye etinda moko ya polele ete: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo. Mpe talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:19, 20) Likambo nyonso oyo Yehova ná Yesu bayebisaka biso tósala ezali mpo na bolamu na biso moko. Mibeko ya Yehova eteyaka biso ndenge ya komibatela mpe ndenge ya kobatela mabota na biso mpe esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Likambo eleki ntina, ntango totosaka mibeko ya Yehova, ezala mpe mobeko ya kosakola, asepelaka na biso mpe apambolaka biso.

2, 3. (a) Mpo na nini Biblia etyeli biso mibeko te na likambo mokomoko ya bomoi? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Lisusu, Biblia etyeli biso mibeko te mpo na likambo mokomoko ya bomoi. Na ndakisa, na Biblia ezali na esika moko te oyo tokokuta malako ya sikisiki mpo na bilamba oyo tosengeli kolata. Yango emonisi ndenge oyo Yehova azali na bwanya. Atako midɛlɛ ezali kokoba kobongwana ntango nyonso mpe na mokili bato balataka mitindo ndenge na ndenge ya bilamba, Biblia esilá ngala te. Lisusu, Biblia ezali na mibeko ebeleebele te mpo na lolenge ya misala to ya kominanola oyo tosengeli kondima to mpo na oyo tosengeli kosala mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Yehova atiki ete moto mokomoko mpe batata ya mabota bázwa bikateli na makambo wana.

3 Na yango, ntango tosengeli kozwa ekateli moko ya ntina oyo ekoki kobongola bomoi na biso mpe ezali na mobeko moko te ya Biblia oyo elobeli yango, tokoki komituna boye: ‘Yehova asepeli na ekateli oyo nazwi? Akosepela na likambo nyonso oyo nakosala soki ebuki te mobeko moko ya Nzambe oyo ezali na Biblia? Ndenge nini nakoki koyeba ete akosepela na ekateli oyo nazwi?’

BIKATELI OYO TOZWAKA ESALAKA NINI EPAI NA BISO MOKO MPE BASUSU?

4, 5. Na ndenge nini bikateli na biso ekoki kosala biso moko mpe basusu malamu to mabe?

4 Bato mosusu bakanisaka ete bakoki kosala nyonso oyo balingi. Kasi tolingaka kosala makambo oyo ekosepelisa Yehova. Yango wana, liboso ya kozwa ekateli moko, tosengeli kokanisa na oyo Biblia elobi mpe kotosa yango. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ndenge oyo Nzambe atalelaka likambo etali kosalela makila, yango wana tolandaka oyo Biblia elobi. (Ebandeli 9:4; Misala 15:28, 29) Tokoki kobondela Yehova asalisa biso tózwaka bikateli oyo ekosepelisa ye.

5 Bikateli oyo tozwaka ekoki kosala biso malamu to mabe. Ekateli ya malamu ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Kasi ekateli ya mabe ekoki kobebisa boninga na biso na ye. Bikateli na biso ekoki mpe kosala basusu malamu to mabe. Tokolinga te kosala eloko moko oyo ekoki koyokisa bandeko mpasi to kolɛmbisa kondima na bango. Tokolinga mpe te kobimisa makambo na kati ya bandeko ya lisangá. Yango wana, ezali na ntina tózwaka bikateli ya malamu.​—Tángá Baroma 14:19; Bagalatia 6:7.

6. Nini esengeli kosalisa biso mpo na kozwa bikateli?

6 Ndenge nini tokoki kozwa bikateli ya malamu na ntango oyo Biblia eyebisi te na bosikisiki nini tosengeli kosala? Na esika ya kosala kaka oyo tolingi, tosengeli kotalela malamumalamu likambo na biso mpe kozwa ekateli oyo ekosepelisa Yehova. Na ndenge yango, tokondimisama ete akosalisa biso mpo bikateli na biso ebimisa matomba.​—Tángá Nzembo 37:5.

YEHOVA ALINGI NASALA NINI?

7. Na makambo oyo Biblia etye mibeko te, ndenge nini tokoki koyeba oyo Yehova alingi tósala na likambo moko?

7 Kasi, ndenge nini tokoki koyeba oyo ekosepelisa Yehova? Baefese 5:17 eyebisi biso: “Bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.” Soki ezali te na mobeko moko ya sikisiki na Biblia, tosengeli kososola to koluka koyeba oyo Yehova alingi ete tósala na likambo oyo tokutani na yango. Ndenge nini tokoki kosala yango? Tosengeli kobondela ye mpe kotika elimo santu etambwisa biso.

8. Ndenge nini Yesu asosolaki oyo Yehova alingaki ete asala? Pesá ndakisa.

8 Mbala mingi, Yesu azalaki kososola oyo Yehova azalaki kolinga ete asala. Na ndakisa, mbala mibale, ntango ebele ya bato bazalaki na nzala, Yesu abondelaki, na nsima aleisaki bango na nzela ya likamwisi. (Matai 14:17-20; 15:34-37) Kasi ntango ye moko ayokaki nzala na esobe mpe Zabolo alingaki ete akómisa mabanga mampa, Yesu aboyaki. (Tángá Matai 4:2-4.) Ayebaki Tata na ye malamu, yango wana ayebaki ete Yehova akolinga te ete asalela elimo santu mpo na bamposa na ye moko. Ayebaki ete Tata na ye akokamba ye mpe akopesa ye bilei ntango asengeli na yango.

9, 10. Nini ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu? Pesá ndakisa.

9 Lokola Yesu, tokoki kozwa bikateli ya malamu soki totiki Yehova akamba biso. Biblia elobi ete: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo. Komimona moto ya bwanya te na miso na yo moko. Bangá Yehova mpe kimá mabe.” (Masese 3:5-7) Soki toyekoli Biblia mpe toyekoli ndenge oyo Yehova akanisaka, tokoyeba oyo alingi tósala na likambo boye to boye. Mpe soki tozali koyekola makambo mingi mpo na ndenge oyo Yehova akanisaka, ekozala mpasi te tózwa bikateli oyo ekosepelisa ye. Na ndenge yango, tokokóma na momeseno ya kolanda litambwisi ya Nzambe.​—Ezekiele 11:19.

10 Kanisá ete mwasi moko ya libala akei kosomba biloko, mpe amoni sapato moko ya kitoko. Kasi sapato yango ezali ntalo mingi. Atako azali elongo na mobali na ye te, ayebi oyo mobali na ye akokanisa soki abimisi mbongo mingi mpo na kosomba sapato yango. Ndenge nini ayebi yango? Lokola baumeli na libala mwa ntango molai, ayebi ndenge oyo mobali na ye alingaka ete básalela mbongo oyo bazali na yango. Ndenge moko mpe, soki toyekoli ndenge oyo Yehova akanisaka mpe makambo oyo asilá kosala, tokoyeba oyo alingi ete tósala na makambo ndenge na ndenge.

NDENGE NINI OKOKI KOYEBA MAKANISI YA YEHOVA?

11. Mituna nini tokoki komituna ntango tozali kotánga Biblia to koyekola yango? (Talá etanda “ Ntango ozali koyekola Biblia, omituna.”)

11 Ndenge nini tokoki koyeba makanisi ya Yehova? Likambo eleki ntina oyo tokoki kosala ezali kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala. Ntango tozali kosala bongo, tokoki komituna boye: ‘Yango eteyi ngai nini mpo na Yehova? Mpo na nini asali boye?’ Lokola Davidi, tosengeli mpe kosɛnga Yehova asalisa biso tóyeba ye malamumalamu. Davidi akomaki boye: “Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova; teyá ngai banzela na yo. Tambwisá ngai na solo na yo mpe teyá ngai, mpo yo ozali Nzambe ya lobiko na ngai. Natyeli yo elikya mokolo mobimba.” (Nzembo 25:4, 5) Soki toyekoli likambo moko mpo na Yehova, tokoki kokanisa na mabaku ya kosalela likambo yango. Tokoki nde kosalela yango na libota, na mosala, na kelasi, to na mosala ya kosakola? Soki tokanisi likambo moko ya sikisiki, ekozala mpasi te tóyeba ndenge oyo Yehova akolinga ete tósalela likambo oyo toyekoli.

Mpo na koyeba makanisi ya Yehova, tosengeli kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala

12. Ndenge nini mikanda na biso mpe makita esalisaka biso tóyeba lolenge oyo Yehova akanisaka na makambo ndenge na ndenge?

12 Lolenge mosusu ya koyeba ndenge oyo Yehova akanisaka ezali ya kotya likebi na makambo oyo ebongiseli na ye ezali koteya biso na nzela ya Biblia. Na ndakisa, ntango tosengeli kozwa ekateli moko, mikanda lokola Index mpe Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova akanisaka. Tokoki mpe kozwa matomba na makita ya lisangá soki tozali koyoka na likebi, kopesa biyano, mpe komanyola na mateya oyo tozali koyoka. Yango ekosalisa biso tókóma kokanisa ndenge oyo Yehova akanisaka. Yango ekosala ete tózwa bikateli oyo ekosepelisa ye mpe akopambola bikateli yango.

LUKÁ KOYEBA MAKANISI YA YEHOVA LIBOSO YA KOZWA EKATELI

13. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kozwa ekateli ya bwanya ntango tozali kotalela lolenge oyo Yehova akanisaka.

13 Tótalela ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kozwa ekateli ya malamu ntango tozali koluka koyeba ndenge oyo Yehova akanisaka. Mbala mosusu, ozali na mposa ya kokóma mobongisi-nzela. Osilá kobongola makambo mosusu na bomoi na yo mpo olekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Kasi oyebi te soki okozala mpenza na esengo na mbongo moke mpe na biloko moke. Biblia elobi te ete mpo na kosalela Yehova, esengeli kaka kozala mobongisi-nzela. Tokoki kokoba kosalela ye na bosembo lokola mosakoli. Kasi, kobosana likambo oyo te: Yesu alobaki ete Yehova apambolaka baoyo bandimaka komipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi. (Tángá Luka 18:29, 30.) Biblia elobi mpe ete Yehova asepelaka soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kokumisa ye, mpe alingaka ete tózala na esengo ntango tozali kosalela ye. (Nzembo 119:108; 2 Bakorinti 9:7) Soki tozali kobondela mpo na makambo wana mpe komanyola na yango, tokoki kozwa ekateli oyo ebongi, na kotalela likambo oyo tozali na yango, mpe ndenge oyo Yehova akopambola.

14. Ndenge nini okoki koyeba soki motindo moko ya bilamba ezali kosepelisa Yehova?

14 Tózwa ndakisa mosusu: Kanisá ete olingaka motindo moko boye ya elamba, kasi oyebi ete bandeko mosusu na lisangá bakoki koyoka mabe soki olati bilamba ya ndenge wana. Biblia elobi eloko moko te mpo na bilamba ya motindo wana. Na yango, ndenge nini okoki koyeba likanisi ya Yehova? Biblia eyebisi biso ete: “Nalingi mpe ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu, kasi na midɛlɛ ya kokanga nsuki te mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi te, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na misala ya malamu.” (1 Timote 2:9, 10) Ya solo, basaleli ya Yehova nyonso, ezala mpe mibali, bakoki kozwa liteya na maloba wana. Soki tolekisaka ndelo te, tokokanisa na ndenge oyo basusu bakoki koyoka mpo na bilamba oyo toponi kolata. Mpe lokola tolingaka bandeko, toboyaka koyokisa bango mpasi na motema to kozokisa bango. (1 Bakorinti 10:23, 24; Bafilipi 3:17) Soki tolandi oyo Biblia elobi mpe ndenge oyo Yehova akanisaka, tokozwa bikateli oyo ekosepelisa ye.

15, 16. (a) Yehova akokanisa nini soki tokobi kokanisa makambo etali pite to ekobo? (b) Ndenge nini tokoki koyeba oyo esepelisaka Yehova ntango tozali kopona kominanola? (c) Ndenge nini tosengeli kozwa bikateli ya minene?

15 Na Biblia, toyekoli ete Yehova ayokaka mpenza mpasi mpe mawa ntango bato basalaka makambo ya mabe mpe ntango bakanisaka makambo ya mabe. (Tángá Ebandeli 6:5, 6.) Ezali polele ete Yehova alingaka te tókanisaka makambo etali pite to ekobo. Kutu, soki tokobi kokanisa makambo wana, nsukansuka tokoki kosala yango. Kasi, Yehova alingi ete tókanisaka nde makambo ya pɛto mpe ya malamu. Moyekoli Yakobo akomaki ete bwanya ya Yehova “ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.” (Yakobo 3:17) Yango wana, Biblia eteyaka biso ete tosengeli koboya kominanola nyonso oyo ekoki kotinda biso tókanisa to tósepela na makambo ya mbindo mpe makambo mabe. Mpe soki toyebi malamu makambo oyo Yehova alingaka mpe oyo ayinaka, ekozala pɛtɛɛ tóyeba buku nini, filme nini, to lisano nini tokopona. Ekosɛnga te ete tótuna basusu nini tosengeli kosala.

16 Soki esɛngi tózwa ekateli, mbala mingi, ezalaka na makambo ebele ya kopona, oyo nyonso ekoki kosepelisa Yehova. Kasi soki tolingi kozwa ekateli moko ya ntina mingi, ekozala malamu tótuna nkulutu moko to ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli, mpo apesa biso toli. (Tito 2:3-5; Yakobo 5:13-15) Ya solo, tosengeli te kosɛnga moto yango azwa ekateli na esika na biso. Tosengeli nde kokanisa malamumalamu na makambo oyo toyekoli na Biblia mpe kozwa ekateli biso moko. (Baebre 5:14) Ntoma Paulo alobaki: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”​—Bagalatia 6:5.

17. Matomba nini tozwaka soki tozali kozwa bikateli oyo esepelisaka Yehova?

17 Ntango tozwaka bikateli oyo esepelisaka Yehova, topusanaka penepene na ye, andimaka mpe apambolaka biso. (Yakobo 4:8) Na nsima, kondima na biso epai ya Yehova ekómaka lisusu makasi. Na yango, tómanyolaka na makambo oyo totángaka na Biblia, mpo tóyeba ndenge oyo Yehova akanisaka. Ya solo, tokozala kaka na makambo ya sika ya koyekola mpo na Yehova. (Yobo 26:14) Kasi soki tosali makasi mpo na koyekola makambo na ye sikoyo, tokokóma na bwanya mpe tokozala na likoki ya kozwa bikateli ya malamu. (Masese 2:1-5) Makanisi mpe mikano ya bato ebongwanaka, kasi Yehova abongwanaka soki moke te. Mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Mokano mpenza ya Yehova ekotɛlɛma mpo na ntango oyo etyami ndelo te; makanisi ya motema na ye ezali mpo na libota na libota.” (Nzembo 33:11) Tomoni polele ete tokoki kozwa bikateli oyo eleki malamu soki toyekoli kokanisa ndenge oyo Yehova akanisaka mpe kosala makambo oyo ezali kosepelisa ye.