Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 38

Bilenge​—⁠Bolingi bomoi na bino ezala ndenge nini?

Bilenge​—⁠Bolingi bomoi na bino ezala ndenge nini?

“Bososoli ekobatela yo.”—MAS. 2:11.

LOYEMBO 135 Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’

NA MOKUSE a

1. Likambo nini ekómelaki Yehoashe, Uzia, mpe Yosiya atako bazalaki bilenge?

 KANISÁ ete okómi mokonzi ya basaleli ya Nzambe ntango ozali naino mwana to elenge! Ndenge nini okosalela nguya mpe bokonzi na yo? Biblia elobeli bilenge ebele oyo bakómaki bakonzi ya Yuda. Na ndakisa, Yehoashe azalaki na mbula 7, Uziya azalaki na mbula 16, mpe Yosiya azalaki na mbula 8. Na ntembe te ezalaki mpasi mingi mpo na bango! Atako ezalaki pɛtɛɛ te, Yehova mpe bato mosusu basalisaki bango bálonga mikakatano mpe básala makambo ya malamu.

2. Mpo na nini tosengeli koyekola ndakisa ya Yehoashe, Uzia, mpe Yosiya?

2 Biso tozali bakonzi te, kasi tokoki kozwa mateya ya ntina epai ya bilenge yango misato. Bazwaki bikateli mosusu ya malamu, mosusu ya mabe. Na bandakisa na bango, tokomona ntina ya kopona baninga ya malamu, ya kozala ntango nyonso na komikitisa, mpe ya koluka Yehova.

PONÁ BANINGA YA MALAMU

Tokoki kolanda ndakisa ya Yehoashe soki tozali koyoka toli ya baninga ya malamu (Talá paragrafe 3, 7) c

3. Ndenge nini Nganga-nzambe monene Yehoyada asalisaki Mokonzi Yehoashe azwa bikateli ya malamu?

3 Mekolá bikateli ya malamu oyo Yehoashe azwaki. Ntango azalaki elenge, Mokonzi Yehoashe azwaki ekateli moko ya malamu. Lokola azalaki na tata te, alandaki litambwisi ya Yehoyada, nganga-nzambe monene ya sembo. Ateyaki Yehoashe lokola mwana na ye moko. Na yango, Yehoashe azwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe ya kosalisa basusu básala mpe bongo. Kutu, Yehoashe azwaki bibongiseli mpo na kobongisa lisusu tempelo ya Yehova.—2 Nt. 24:​1, 2, 4, 13, 14.

4. Matomba nini tokozwa soki tozali kolinga mpe kotosa mibeko ya Yehova? (Masese 2:​1, 10-12)

4 Soki baboti na yo to moto mosusu azali koteya yo olinga Yehova mpe otosa mibeko na ye, yebá ete bazali kopesa yo likabo ya motuya mingi. (Tángá Masese 2:​1, 10-12.) Baboti bakoki koteya yo na ndenge mingi. Talá ndenge tata ya ndeko mwasi moko na nkombo Katya asalisaki ye azwa bikateli ya malamu. Mikolo nyonso ntango tata na ye azalaki komema ye na kelasi, bazalaki kolobela mokapo ya mokolo. Katya alobi boye: “Masolo yango ezalaki kosalisa ngai nalonga mikakatano oyo nazalaki kokutana na yango na mokolo.” Kasi, okosala nini soki omoni lokola ete batoli ya Biblia oyo baboti bazali kopesa yo ezali kotya yo nkaka? Nini ekoki kosalisa yo olanda litambwisi na bango? Ndeko mwasi moko na nkombo Anastasia alobi ete baboti na ye bazalaki kozwa ntango ya kolimbolela ye ntina oyo batyaki mobeko boye to boye. Alobi boye: “Yango esalisaki ngai namona ete mibeko yango ezalaki te mpo na kotya ngai nkaka, kasi nde mpo na kobatela ngai.”

5. Misala na yo ekosala nini epai ya baboti na yo mpe Yehova? (Masese 22:6; 23:​15, 24, 25)

5 Soki ozali kosalela toli ya Biblia oyo ozali kozwa, okosepelisa baboti na yo. Oyo eleki ntina, okosepelisa Nzambe mpe boninga na yo ná ye ekokóma makasi. (Tángá Masese 22:6; 23:​15, 24, 25.) Yango nde ntina oyo osengeli kolanda ndakisa ya Yehoashe ntango azalaki elenge.

6. Nsima ya liwa ya Yehoyada, Yehoashe akómaki koyokela banani, mpe esukelaki ye ndenge nini? (2 Ntango 24:​17, 18)

6 Zwá mateya na bikateli ya mabe oyo Yehoashe azwaki. Nsima ya liwa ya Yehoyada, Yehoashe aponaki baninga ya mabe. (Tángá 2 Ntango 24:​17, 18.) Azwaki ekateli ya koyokela bankumu ya Yuda oyo bazalaki kolinga Yehova te. Na ntembe te, omoni ete Yehoashe asengelaki te kokóma moninga ya bato yango ya mobulu. (Mas. 1:10) Kasi, ayokaki toli ya baninga na ye ya mabe. Kutu, ntango ndeko na ye Zekaria amekaki kosembola ye, Yehoashe atindaki báboma ye. (2 Nt. 24:​20, 21; Mat. 23:35) Likambo moko ya mabe mpe ya bozoba mpenza! Yehoashe abandaki malamu, kasi likambo ya mawa akómaki mopɛngwi mpe mobomi. Nsukansuka, basaleli na ye moko babomaki ye. (2 Nt. 24:​22-25) Alingaki kosuka ndenge wana te soki akobaka koyokela Yehova mpe baoyo balingaki Yehova! Ndakisa yango eteyi biso nini?

7. Osengeli kopona baninga ya ndenge nini? (Talá mpe elilingi.)

7 Liteya moko oyo tokoki kozwa na ekateli mabe ya Yehoashe ezali ete tosengeli kopona baninga oyo bakosalisa biso tósala oyo ezali malamu: baninga oyo balingaka Yehova mpe balukaka kosepelisa ye. Tosengeli te kosuka kaka na baninga oyo tozali na bango mbula moko. Kobosana te ete Yehoashe azalaki lokola mwana epai ya moninga na ye Yehoyada. Omituna boye: ‘Baninga oyo naponaka basalisaka ngai nakómisa kondima na ngai epai ya Yehova makasi? Balendisaka ngai natosa mibeko ya Nzambe na bomoi na ngai? Balobelaka makambo ya Yehova mpe mateya na ye ya solo? Bazalaka na limemya mpo na mibeko ya Nzambe? Bayebisaka ngai kaka makambo oyo nakolinga koyoka, to bazalaka mpe na mpiko ya kozongisa ngai na nzela ntango nasali mabe?’ (Mas. 27:​5, 6, 17) Mpo na koloba solo, soki baninga na yo balingaka Yehova te, bazali na ntina te mpo na yo. Kasi soki ozali na baninga oyo balingaka Yehova, kangamá na bango—bakosalisa yo ntango nyonso!—Mas. 13:20.

8. Soki tosalelaka basite Internet ya kosolola na bato, makambo nini tosengeli kotalela?

8 Basite Internet ya kosolola na bato esalisaka mpenza mpo na kosolola na bato ya libota mpe baninga. Kasi, bato mingi bazali kosalela yango mpo na kokamwisa basusu; batyaka bafɔtɔ mpe bavideo mpo na kolakisa biloko oyo basombi to makambo oyo basali. Soki osalelaka basite yango, omituna boye: ‘Nasalelaka yango nde mpo na kokamwisa basusu? Nalukaka kolendisa basusu, to ezalaka mpo basusu bákumisa ngai? Napesaka bato oyo basalelaka basite yango nzela bábebisa makanisi, elobeli mpe bizaleli na ngai?’ Ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, apesaki toli oyo: “Koluka kosepelisa bato te. Nsukansuka okokoka kosepelisa ata moto moko te. Sepelisá nde Yehova; na bongo okosepelisa bato nyonso oyo balingaka Yehova.”

ZALÁ NTANGO NYONSO NA KOMIKITISA

9. Makambo nini Yehova asalisaki Uzia akokisa? (2 Ntango 26:​1-5)

9 Mekolá bikateli ya malamu oyo Uzia azwaki. Ntango azalaki elenge, Mokonzi Uzia azalaki na komikitisa. Ayekolaki “kobanga Nzambe ya solo.” Aumelaki na bomoi mbula 68, mpe mbala mingi na bomoi na ye, Yehova apambolaki ye. (Tángá 2 Ntango 26:​1-5.) Uzia alongaki bikólo mingi ya banguna mpe asalaki ete Yerusaleme ebatelama malamu koleka. (2 Nt. 26:​6-15) Kozanga ntembe, Uzia azalaki na esengo mpo na makambo nyonso oyo Nzambe asalisaki ye akokisa.—Mos. 3:​12, 13.

10. Likambo nini ekómelaki Uzia?

10 Zwá mateya na bikateli ya mabe oyo Uzia azwaki. Mokonzi Uzia amesanaki koyebisa basusu oyo basengeli kosala. Boye yango nde etindaki ye akanisa ete akokaki kosala nyonso oyo alingi? Mokolo moko, Uzia azwaki ekateli ya kokɔta na tempelo ya Yehova mpe na lofundo nyonso alukaki kotumba mpaka ya malasi na etumbelo, nzokande bakonzi bazalaki na ndingisa te ya kosala yango. (2 Nt. 26:​16-18) Nganga-nzambe monene Azaria amekaki kosembola ye, kasi Uzia asilikaki makasi. Likambo ya mawa, Uzia abebisaki bosembo na ye mpe Yehova apesaki ye etumbu ya maladi ya maba. (2 Nt. 26:​19-21) Bomoi na ye elingaki kosuka bongo te soki azalaki ntango nyonso na komikitisa!

Na esika ya komikumisa mpo na oyo tosali, tosengeli kopesa Yehova lokumu mpo na makambo oyo tolongi kokokisa (Talá paragrafe 11) d

11. Makambo nini ekoki komonisa soki tozali na komikitisa? (Talá mpe elilingi.)

11 Ntango Uzia akómaki na nguya mingi, abosanaki ete Yehova nde apesaki ye makasi mpe bozwi. Liteya ezali nini? Tosengeli kobosanaka te ete mapamboli mpe mikumba oyo tozwaka, Yehova nde apesaka biso yango. Na esika ya komikumisa mpo na oyo tosali, tosengeli nde kopesa Yehova lokumu mpo na makambo oyo tolongi kokokisa. b (1 Ko. 4:7) Tosengeli kondima na komikitisa nyonso ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozalaka na mposa básembola biso. Ndeko mobali moko oyo azali na bambula 60, akomaki boye: “Nayekolá koboya komizwa na valɛrɛ mingi. Ntango basemboli ngai mpo na libunga oyo nasali, ntango mosusu lokola mwana moke, nasalaka makasi nabongisa mpe nakoba kokende liboso.” Ya solo, soki tozali kobanga Yehova mpe tozali ntango nyonso na komikitisa, tokozala na bomoi ya esengo.—Mas. 22:4.

KOBÁ KOLUKA YEHOVA

12. Ntango Yosiya azalaki naino elenge, ndenge nini alukaki Yehova? (2 Ntango 34:​1-3)

12 Mekolá bikateli ya malamu oyo Yosiya azwaki. Yosiya azalaki elenge ntango abandaki koluka Yehova. Azalaki na mposa ya koyekola makambo etali Yehova mpe kosala mokano na Ye. Kasi, makambo ezalaki pɛtɛɛ te mpo na elenge yango oyo azalaki mokonzi. Asengelaki kolongisa losambo ya pɛto na ntango oyo losambo ya lokuta epalanganaki mingi na ekólo. Mpe yango nde asalaki! Liboso Yosiya akokisa mbula 20, abandaki kolongola losambo ya lokuta na ekólo.—Tángá 2 Ntango 34:​1-3.

13. Komipesa na Nzambe ekosala nini na bomoi na yo?

13 Ata soki ozali mpenza elenge, okoki kozwa ekateli ya komekola Yosiya, elingi koloba, koluka Yehova mpe koyekola bizaleli na Ye ya kokamwa. Soki osali bongo, okoyoka mposa ya komipesa na ye. Komipesa na Nzambe ekosala nini na bomoi na yo ya mokolo na mokolo? Luke, oyo azwaki batisimo na mbula 14, alobi boye: “Sikoyo, nakotya mosala ya Yehova na esika ya liboso mpe nakosala nyonso mpo na kosepelisa ye.” (Mrk. 12:30) Ekozala mpenza lipamboli soki yo mpe ozwi ekateli ya kosala bongo!

14. Pesá ndakisa ya bilenge oyo bazali komekola Mokonzi Yosiya.

14 Mikakatano nini okoki kokutana na yango ntango ozali naino elenge mpe ozali kosalela Yehova? Johan, oyo azwaki batisimo na mbula 12, alobeli mbamba oyo baninga na ye ya kelasi bazalaki kotya ye mpo amɛla makaya ya vapeur na aparɛyi moko. Mpo na kolonga mbamba yango, Johan azalaki komikundwela ete likaya yango ekoki kobebisa nzoto na ye mpe boninga na ye ná Yehova. Rachel, oyo azwaki batisimo na mbula 14, alobeli likambo oyo esalisaki ye alonga mikakatano oyo azalaki kokutana na yango na kelasi. Alobi boye: “Nazalaki komeka koyokanisa likambo oyo namoni ná likambo moko ya elimo. Na ndakisa, liteya moko ya istware ekokaki kokundwela ngai lisolo to esakweli moko ya Biblia. To ntango nazali kosolola na moto, nazalaki kokanisa vɛrsɛ oyo nakoki kotángela ye.” Mikakatano na yo ekeseni na oyo Mokonzi Yosiya akutanaki na yango, kasi okoki kozala na bwanya mpe kotikala sembo lokola ye. Kolonga mikakatano ntango ozali naino elenge ekobongisa yo mpo na kolonga mikakatano na bambula oyo ekoya.

15. Nini esalisaki Yosiya asalela Yehova na bosembo nyonso? (2 Ntango 34:​14, 18-21)

15 Ntango akómaki na mbula 26, Mokonzi Yosiya abandisaki mosala ya kobongisa tempelo. Ntango bazalaki kosala mosala yango, “buku ya Mobeko ya Yehova oyo epesamaki na nzela ya Moize” emonanaki. Ntango mokonzi ayokaki maloba oyo batángaki na buku yango, na mbala moko azwaki ekateli ya kotosa yango. (Tángá 2 Ntango 34:​14, 18-21.) Ozalaka na mposa ya kotánga Biblia mbala na mbala? Soki ozali sikoyo komeka kosala yango, ezali koleka malamu? Okomaka to otyaka bilembo na bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa yo? Luke, oyo tolobelaki liboso, akomaka na mwa buku makanisi ya ntina oyo azwi na botángi na ye. Kosala bongo ekoki kosalisa mpe yo omona lisusu bavɛrsɛ to makambo ya ntina oyo osepelaki na yango. Soki ozali koyeba mpe kolinga Biblia mingi, okokóma mpe na mposa makasi ya kosalela Yehova. Mpe kaka ndenge Liloba ya Nzambe esalisaki Yosiya asala oyo ezali malamu, ekosalisa mpe yo.

16. Mpo na nini Yosiya asalaki libunga moko monene, mpe yango ekoki koteya biso nini?

16 Zwá mateya na ekateli ya mabe oyo Yosiya azwaki. Ntango Yosiya akómaki na mbula soki 39, azwaki ekateli moko oyo ememaki ye na liwa. Amityelaki motema na esika asɛnga Yehova atambwisa ye. (2 Nt. 35:​20-25) Liteya ezali nini? Ata soki tozali na mbula boni to mpe totángaka Biblia banda kala, tosengeli kokoba koluka Yehova. Yango elimboli kobondela Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye atambwisa biso, koyekola Liloba na ye, mpe koyoka toli ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Yango ekoki kosalisa biso tósala te mabunga ya minene mpe tózala na esengo mingi.—Yak. 1:25.

BILENGE—BOMOI NA BINO EKOKI KOZALA YA ESENGO

17. Tokoki koloba nini nsima ya kotalela lisolo ya bakonzi misato ya Yuda?

17 Bolenge epesaka libaku ya kosala makambo mingi. Lisolo ya Yehoashe, ya Uzia, mpe ya Yosiya emonisi ete bilenge bakoki kozwa bikateli ya malamu mpe kosepelisa Yehova na bomoi na bango. Ya solo, na nsima bilenge wana bazwaki bikateli ya mabe oyo ememelaki bango mpasi. Kasi, tokoki komekola makambo ya malamu oyo basalaki mpe koboya kosala mabunga oyo basalaki. Soki tosali bongo, tokozala na bomoi ya esengo.

Elenge Davidi apusanaki penepene na Yehova. Nzambe asepelaki ye, mpe akómaki na bomoi ya esengo (Talá paragrafe 18)

18. Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete okoki kozala na bomoi ya esengo? (Talá mpe elilingi.)

18 Biblia ezali na masolo ya bilenge mosusu oyo bapusanaki penepene na Yehova, asepelaki na bango, mpe yango esalaki ete bázala na bomoi ya esengo. Moko na bango ezali Davidi. Ntango azalaki elenge, Davidi aponaki kosambela Nzambe mpe na nsima akómaki mokonzi moko ya sembo. Toboyi te, na mabaku mosusu asalaki mabunga, kasi Nzambe atalelaki ye lokola moto ya sembo. (1 Ba. 3:6; 9:​4, 5; 14:8) Soki oyekoli lisolo ya bomoi ya Davidi mpe ndenge asalelaki Nzambe na bosembo, yango ekolendisa yo mpe osala bongo. Okoki mpe koyekola masolo ya bomoi ya Marko to ya Timote na mozindo. Okomona ete basalelaki Yehova banda na bolenge na bango, asepelaki na bango, mpe yango esalaki ete bázala na bomoi ya esengo.

19. Bomoi ya ndenge nini okoki kozala na yango?

19 Ndenge oyo bomoi na yo ekozala etaleli ndenge oyo ozali kosalela yango sikoyo. Soki ozali kotyela Yehova motema kasi mayele na yo moko te, akotambwisa yo mpe okozwa bikateli ya malamu. (Mas. 20:24) Okoki kozala na bomoi ya esengo mpe ya malamu mpenza. Kobosana te, Yehova azwaka na motuya makambo oyo osalelaka ye. Kosalela Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo, nde lolenge eleki malamu ya kosalela bomoi na yo!

LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!

a Bilenge, Yehova ayebi ete bozali kokutana na mikakatano oyo ekoki kobebisa boninga na bino elongo na ye. Ndenge nini bokoki kozwa bikateli ya malamu oyo ekosepelisa Tata na bino ya likoló? Tokolobela ndakisa ya bilenge mibali misato oyo bakómaki bakonzi na Yuda. Talá mateya oyo okoki kozwa na bikateli oyo bazwaki.

b Talá etanda “Kebá na ‘komikitisa ya lokuta’” na lisolo “Ezali na ntina kozala na baninga mingi na basite ya kosolola na bato?” oyo ezali na jw.org.

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko moko oyo akɔmɛli na elimo azali kopesa elenge moko toli mpo na bilamba oyo bazali kotɛka na magazini moko.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi oyo asali mituna-lisolo na liyangani atyeli Yehova motema mpe apesi Ye lokumu ntango basusu bazali kokumisa ye.