Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likanisi mpo na bolukiluki

Likanisi mpo na bolukiluki

Bisaleli mpo na bana

Baboti bazali na mokumba monene ya koteya bana na bango makambo ya Yehova. (Ef. 6:4) Ebongiseli ya Yehova ebimisá bisaleli mingi mpo na kosalisa baboti bákokisa mokumba yango. Ndenge nini okoki kosalela bisaleli yango mpo na koteya bana na yo?

  • Ndenge ya kozwa bisaleli yango. JW.ORG ezali na biloko nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá mpo na bilenge, ata mpe bavideo mpe nkasa ya kotondisa. a Mpo na kozwa yango, komá liloba “Bana” to “Bilenge” na esika basalaka bolukiluki.

  • Poná lisolo oyo ebongi. Makambo oyo ezali na eteni “Bana” ekoki kosalisa yo opona oyo ebongi na mwana na yo. Mpo na komona yango, luká “Mpo na Losambo na kati ya libota.”

  • Bótalela yango elongo. Ntango opesi mwana bavideo to nkasa ya kotondisa, ezala kaka te mpo asakana na yango to mpe alekisa ntango. Kasi, lobelá yango ná mwana na yo mpe salisá ye akóma moninga ya Yehova.

a JW Library® ezali sikoyo na bavideo mpo na bilenge, kasi nkasa ya kotondisa ezali mingi te.