Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 41

Mateya oyo tokoki kozwa na mikanda mibale ya Petro

Mateya oyo tokoki kozwa na mikanda mibale ya Petro

“Nalingaka ntango nyonso kokundwela bino makambo wana.”—2 PE. 1:12.

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

NA MOKUSE a

1. Mwa moke liboso Petro akufa, ndenge nini Yehova asalelaki ye?

 NTOMA Petro asalaki mosala ya Yehova bambula mingi. Atambolaki elongo na Yesu, asakolaki na bisika oyo nsango malamu ekómaki naino te, mpe asalaki lokola ndeko ya lisangani ya mikóló-bakambi. Kasi, pene na nsuka ya bomoi na ye, ntango Petro ayebaki ete etikali moke akufa, Yehova apesaki ye mosala mosusu. Na mobu soki 62-64 T.B., elimo ya Nzambe etambwisaki ye mpo akoma mikanda mibale: 1 Petro mpe 2 Petro. Petro azalaki na elikya ete mikanda yango ekosalisa bakristo nsima ya liwa na ye.—2 Pe. 1:​12-15.

2. Mpo na nini mikanda ya Petro eyaki na ntango oyo ebongi?

2 Petro akomaki mikanda na ye na ntango oyo bandeko na ye bakristo bazalaki koyoka “mawa mpo na komekama ndenge na ndenge.” (1 Pe. 1:6) Bato mabe bazalaki koluka kokɔtisa mateya ya lokuta mpe bizaleli ya mbindo na kati ya lisangá. (2 Pe. 2:​1, 2, 14) Mosika te, bakristo ya Yerusaleme balingaki komona “nsuka ya makambo nyonso”; basoda ya Roma bakobebisa engumba yango mpe bibongiseli ya Bayuda. (1 Pe. 4:7) Na ntembe te, mikanda ya Petro esalisaki bakristo bámona oyo bakoki kosala mpo báyika mpiko na mikakatano oyo bazalaki na yango mpe bámibongisa mpo na mikakatano oyo ekoya. b

3. Mpo na nini tosengeli koyekola mikanda ya Petro?

3 Atako Petro akomelaki nde bakristo ya siɛklɛ ya liboso, Yehova asalaki ete mikanda yango ezala na kati ya Liloba na Ye. Na yango, tokoki kozwa matomba na mikanda yango, lelo. (Rom. 15:4) Lokola mokili oyo ezali kolendisa bizaleli ya mbindo, biso mpe tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kosala ete ezala mpasi tósalela Yehova. Lisusu, mosika te tokozala na bolɔzi monene koleka oyo etyaki nsuka na bibongiseli ya Bayuda. Mikanda mibale ya Petro ezali na batoli ya ntina mingi. Yango ekosalisa biso tókoba kozela mokolo ya Yehova, tólonga ezaleli ya kobanga bato, mpe tókolisa bolingo makasi kati na biso. Makambo yango ekoki mpe kosalisa bankulutu bámona ndenge bakoki kosalisa bandeko mpo bátikala makasi.

KOBÁ KOZELA

4. Ndenge emonisami na 2 Petro 3:​3, 4, nini ekoki koningisa kondima na biso?

4 Bato mingi lelo bandimelaka bisakweli ya Biblia te. Batɛmɛli bakoki kotyola biso mpo tolobelaka nsuka ya mokili banda bambula mingi. Bato mosusu kutu balobaka ete nsuka ekoya te. (Tángá 2 Petro 3:​3, 4.) Soki toyoki makambo ya ndenge wana na mosala ya kosakola, epai ya moninga ya mosala, to epai ya ndeko ya libota, yango ekoki koningisa kondima na biso. Petro alobeli likambo oyo ekoki kosalisa biso.

5. Nini ekosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu na oyo etali nsuka ya mokili oyo? (2 Petro 3:​8, 9)

5 Bato mosusu bakoki komona lokola ete Yehova azali koumisa makambo mpo na kobebisa mokili mabe oyo. Maloba ya Petro ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu, mpo ekundweli biso ete ndenge oyo Yehova atalelaka ntango ekeseni mosika na ndenge bato batalelaka yango. (Tángá 2 Petro 3:​8, 9.) Na miso ya Yehova, mbula nkóto ezali lokola mokolo moko. Yehova azali na motema molai, alingi ata moto moko te abomama. Kasi, ntango mokolo na ye ekoya, mokili oyo ekobebisama. Ezali mpenza lokumu monene ndenge tozali kosalela ntango oyo etikali mpo na kopesa litatoli epai ya bato ya bikólo nyonso.

6. Ndenge nini tokoki ‘kobatela mokolo ya Yehova na makanisi’? (2 Petro 3:​11, 12)

6 Petro alendisi biso ‘tóbatela mokolo ya Yehova na makanisi.’ (Tángá 2 Petro 3:​11, 12.) Ndenge nini tokoki kosala yango? Ekozala malamu tómanyolaka na mapamboli oyo tokozwa na mokili ya sika, mokolo na mokolo, soki likoki ezali. Omimona na makanisi ndenge ozali kopema mopɛpɛ ya pɛto, kolya bilei ya malamu, koyamba baninga mpe bandeko oyo basekwi, mpe koteya bato oyo bazalaki na bomoi na ntango ya kala ndenge bisakweli ya Biblia ekokisami. Komanyola ndenge wana ekosalisa yo okoba kozela mpe ekobatela yo mpo obosana te ete nsuka ya mokili ekoya mosika te. Lokola ‘toyebi liboso’ makambo oyo ekosalema, ‘tokomemama te’ na bateyi ya lokuta.—2 Pe. 3:17.

LONGÁ EZALELI YA KOBANGA BATO

7. Kobanga bato ekoki kosala biso nini?

7 Kobatela mokolo ya Yehova na makanisi, ekotinda biso tóyebisaka basusu nsango malamu. Atako bongo, na mabaku mosusu tokoki kokakatana mpo na koloba. Mpo na nini? Ntango mosusu mpo tobangi bato. Yango ekómelaki Petro. Na butu oyo bazalaki kosambisa Yesu, Petro abangaki kondima ete azali moyekoli ya Yesu mpe awanganaki mbala misato ete ayebi ye te. (Mat. 26:​69-75) Kasi bambula na nsima, ntoma yango alobaki na mpiko ete: “Bóbanga te oyo bango babangaka, mpe bóbulungana te.” (1 Pe. 3:14) Maloba yango ya Petro endimisi biso ete tokoki kolonga ezaleli ya kobanga bato.

8. Nini ekoki kosalisa biso tólonga ezaleli ya kobanga bato? (1 Petro 3:15)

8 Nini ekoki kosalisa biso tólonga ezaleli ya kobanga bato? Petro alobi: “Bósantisa Kristo lokola Nkolo na mitema na bino.” (Tángá 1 Petro 3:15.) Yango esɛngi komanyola na mokumba mpe na nguya ya Nkolo mpe Mokonzi na biso, Kristo Yesu. Soki ozali komitungisa to kobanga ntango ozwi libaku ya koyebisa basusu nsango malamu, kanisá Mokonzi na biso. Omona na makanisi ndenge azali koyangela na likoló, mpe ebele ya baanzelu oyo bazali zingazinga na ye. Kobosana te ete azali na “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” mpe ete akozala ‘elongo na yo mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.’ (Mat. 28:​18-20) Petro alendisi biso tózala “ntango nyonso pene” mpo na kolobela mateya oyo tondimaka. Okosepela koteya moto na mosala, na kelasi, to na esika mosusu na ntango oyo ozali na mosala ya kosakola te? Boye, okanisa liboso ntango oyo okoki kozwa libaku ya kosala yango, mpe obongisa makambo oyo okoloba. Sɛngá Yehova apesa yo mpiko, mpe tyá motema ete akosalisa yo olonga ezaleli ya kobanga bato.—Mis. 4:29.

“BÓLINGANAKA MAKASI”

Petro andimaki mpamela ya Paulo. Mikanda mibale ya Petro ezali koteya biso kolinga bandeko (Talá paragrafe 9)

9. Ndenge nini Petro alongaki te komonisa bolingo na libaku moko? (Talá mpe elilingi.)

9 Petro ayekolaki ndenge ya kolinga basusu. Ye mpe azalaki ntango Yesu alobaki: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika, ete bólinganaka bino na bino; kaka ndenge ngai nalingi bino, bino mpe bólinganaka.” (Yoa. 13:34) Atako bongo, na nsima, Petro amonisaki bolɛmbu mpe aboyaki kolya elongo na bandeko oyo bazalaki bato ya bikólo. Ntoma Paulo abengaki likambo oyo Petro asalaki “bokosi.” (Gal. 2:​11-14) Petro andimaki mpamela wana mpe azwelaki yango liteya. Na mikanda na ye nyonso mibale, akomaki ete tosengeli kaka te koyoka ete tolingaka bandeko, kasi tosengeli mpe komonisa bolingo yango.

10. Nini ekosalisa biso tózala na “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi”? Limbolá. (1 Petro 1:22)

10 Petro alobi ete tosengeli kozala na “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi” epai ya bandeko ya lisangá. (Tángá 1 Petro 1:22.) Tokómaka na bolingo yango ntango tozali “kotosa solo.” Na kati ya solo yango, liteya moko elobi ete “Nzambe aponaka bilongi te.” (Mis. 10:​34, 35) Tokokoka te kotosa etinda oyo Yesu apesaki ete tólinganaka soki tozali kolinga bandeko mosusu na lisangá, kasi basusu tozali kolinga bango te. Ya solo, tokoki kozala na baninga mosusu ya motema, ndenge Yesu mpe azalaki na bango. (Yoa. 13:23; 20:2) Kasi Petro akundweli biso ete tosengeli kosala makasi tózala na “bolingo ya bondeko” mpo na bandeko na biso nyonso ya mibali mpe ya basi; tómonaka ete tozali mpenza libota moko.—1 Pe. 2:17.

11. Kolinga basusu “makasi, na motema moko” elimboli nini?

11 Petro alendisi biso boye: “Bólinganaka makasi, na motema moko.” Na esika yango, kolinga “makasi” elimboli kolinga moto ata soki ezali mpasi tómonisela ye bolingo. Kanisá ete ndeko moko asali likambo oyo epesi biso nkanda to ezokisi biso! Motema ekoki kotinda biso tózongisa mabe na mabe na esika ya komonisa bolingo. Nzokande, Petro ayekolaki epai ya Yesu ete kozongisa mabe esepelisaka Nzambe te. (Yoa. 18:​10, 11) Petro akomaki: “Bózongisaka mabe na mabe te, kofinga na kofinga mpe te. Kasi bózongisaka nde lipamboli.” (1 Pe. 3:9) Soki ozali na bolingo makasi, okozala na boboto mpe na limemya ata epai ya baoyo mbala mosusu bazokisi yo.

12. (a) Bolingo makasi ekotinda biso tósala nini? (b) Ndenge emonisami na video Batelá likabo kitokoBomoko na biso, okosala makasi na likambo nini?

12 Na mokanda na ye ya liboso, Petro amonisaki ete kolingana makasi esalisaka na kozipa kaka mwa masumu moke te, kasi “masumu ebele.” (1 Pe. 4:8) Mbala mosusu Petro akanisaki lisusu liteya oyo Yesu apesaki ye bambula mingi liboso na likambo etali kolimbisa. Na ntango wana, emonani ete Petro akanisaki ete ayebaki mpenza kolimbisa na ndenge alobaki ete akolimbisa ndeko na ye “tii mbala nsambo.” Kasi Yesu ateyaki ye, ná biso mpe lokola, ete esengeli kolimbisa “tii mbala 77,” elingi koloba kozanga ndelo. (Mat. 18:​21, 22) Soki okokaka kosalela toli yango te, kolɛmba nzoto te! Basaleli nyonso ya Yehova bazali bato ya kozanga kokoka mpe ntango mosusu babundaka mpo na kolimbisa basusu. Oyo eleki ntina mpo na yo, ezali kosala nyonso oyo esengeli mpo na kolimbisa ndeko na yo mpe kotya kimya elongo na ye. c

BANKULUTU, BÓBATELA ETONGA

13. Nini ekoki kopesa bankulutu mpasi mpo bákokisa mokumba na bango ya kobatela bampate?

13 Na ntembe te, Petro abosanaki ata moke te likambo oyo Yesu ayebisaki ye nsima ya kosekwa, ete: “Batelá bampate na ngai ya mike.” (Yoa. 21:16) Soki ozali nkulutu, oyebi ete malako yango etali mpe yo. Kasi, ekoki kozala mpasi nkulutu azwa ntango mpo na kokokisa mokumba yango ya ntina mingi. Bankulutu basengeli liboso kokokisa bamposa ya mosuni ya bato ya mabota na bango, komonisela bango bolingo, mpe kosalisa bango bázala makasi na elimo. Bapesaka mpe ndakisa na mosala ya kosakola, na kobongisa mpe kosala masolo na makita mpe na mayangani ya mike mpe ya minene. Bankulutu mosusu bazali mpe na mikumba na Komite ya boyokani na minganga to na departema ya kosala baplan mpe kotonga na ekólo (LDC). Bankutulu bazalaka mpenza na makambo mingi ya kosala!

Atako bazali na makambo mingi ya kosala, bankulutu ya bolingo bamipesaka na kobatela etonga ya Nzambe (Talá paragrafe 14-15)

14. Nini ekoki kolendisa bankulutu mpo bábatela etonga? (1 Petro 5:​1-4)

14 Petro alendisaki bankulutu ete: “Bóbatela etonga ya Nzambe.” (Tángá 1 Petro 5:​1-4.) Soki ozali nkulutu, toyebi ete olingaka bandeko ya lisangá mpe olingaka kobatela bango lokola mobateli ya mpate. Kasi, mbala mosusu omonaka ete makambo ya kosala eleki mingi to ete olɛmbi mingi mpe okokoka te kokokisa mokumba yango. Nini ekoki kosalisa yo? Yebisá Yehova ndenge ozali komiyoka. Petro akomaki: “Soki moto azali kosalela bamosusu, atya motema na makasi oyo Nzambe apesaka.” (1 Pe. 4:11) Ekoki kozala ete bandeko mibali mpe bandeko basi bazali kokutana na mikakatano oyo ekoki kosila nyonso te na mokili oyo. Kasi kobosana te ete Yesu Kristo, “mobateli ya mpate mokonzi,” akoki kosalisa bango malamu koleka ata yo. Akoki kosala yango lelo oyo mpe na mokili ya sika. Nzambe asɛngi bankulutu kaka bálinga bandeko, bábatela bandeko lokola mobateli ya mpate, mpe bakóma “bandakisa mpo na etonga.”

15. Ndenge nini nkulutu moko abatelaka etonga ya Nzambe? (Talá mpe elilingi.)

15 William, nkulutu moko oyo aumeli mingi, azwaka na motuya mingi mokumba ya kobatela bampate. Ntango maladi ya coronavirus ebandaki, ye ná baninga na ye bankulutu bazwaki mokano ya kobengaka pɔsɔ nyonso ndeko mokomoko ya etuluku na bango ya mosala ya kosakola. Alobi boye: “Bandeko mingi bazalaki kaka bango moko na ndako, mpe ezalaki mpasi te mpo bákóma na mayoki ya mabe.” Ntango ndeko moko azali na mokakatano, William ayokaka ye na likebi mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa ye mpe eloko oyo asengeli na yango. Na nsima alukaka makanisi oyo ebongi, mbala mingi na bavideo ya site jw, mpo na kosalisa ndeko yango. Abakisi: “Lelo oyo, mosala ya kobatela etonga ezali na ntina mingi koleka. Tosalaka milende mpenza mpo na kosalisa bato báyeba Yehova; tosengeli mpe kosala milende ya ndenge wana mpo na kobatela etonga, kosalisa bampate ya Yehova bátikala na kati ya solo.”

TIKÁ YEHOVA ASILISA KOBONGISA YO

16. Ndenge nini tokoki kosalela mateya oyo tozwi na mikanda oyo Petro akomaki?

16 Tolobeli kaka mwa mateya ndambo oyo ezali na mikanda mibale oyo Petro akomaki na litambwisi ya elimo santu. Mbala mosusu omoni mwa makambo oyo osengeli kobongisa. Na ndakisa, okosepela komanyola mingi na mapamboli oyo ekozala na mokili ya sika? Omityeli mokano ya kosakola na mosala, na eteyelo, to na bisika mosusu ntango ozali na mosala ya kosakola te? Omoni makambo oyo okoki kosala mpo na komonisa lisusu mingi bolingo makasi epai ya bandeko? Bankulutu, bozwi ekateli ya kobatela bampate ya Yehova na kotindikama te mpe na motema ya esengo? Komitalela yo moko na bosembo ekoki komonisa ete ozali na bolɛmbu mosusu, kasi kolɛmba nzoto te. “Nkolo azali boboto,” mpe akosalisa yo obongisa bisika oyo esengeli. (1 Pe. 2:3) Petro alobi: “Nzambe . . . ye moko akosilisa kobongisa bino, akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi, akopika bino makasi.”—1 Pe. 5:10.

17. Soki tolɛmbi te mpe totiki ete Yehova abongisa biso, tokozwa nini?

17 Mokolo moko Petro amonaki ete abongaki te kotɛlɛma liboso ya mwana ya Nzambe. (Luka 5:8) Kasi, na lisalisi ya Yehova mpe ya Yesu, Petro akobaki kolanda Yesu mpe atikalaki sembo. Na yango Petro azwaki libaku ya “kokɔta na Bokonzi ya seko ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo.” (2 Pe. 1:11) Mbano kitoko mpenza! Soki lokola Petro, olɛmbi te mpe otiki ete Yehova abongisa yo, yo mpe okozwa mbano ya bomoi ya seko. ‘Okokokisa mokano ya kondima na yo, lobiko na yo.’—1 Pe. 1:9.

LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko

a Na lisolo oyo, tokomona ndenge mateya oyo ezali na mikanda ya Petro ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano. Ekosalisa mpe bankulutu bámona ndenge oyo bakoki kokokisa mokumba na bango ya kobatela bampate.

b Ekoki kozala ete bakristo oyo bazalaki kofanda na Palestine bazwaki mikanda mibale ya Petro liboso ete Baroma bábundisa Yerusaleme na mobu 66 T.B.