Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 39

Tiká motema pɛtɛɛ ezala makasi na yo

Tiká motema pɛtɛɛ ezala makasi na yo

“Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.”—2 TIM. 2:24.

LOYEMBO 120 Tómekola motema pɛtɛɛ ya Kristo

NA MOKUSE a

1. Mituna nini bakoki kotuna biso na mosala to na eteyelo?

 OYOKAKA ndenge nini soki moninga moko ya mosala to ya kelasi atuni yo motuna na oyo etali bindimeli na yo? Obangaka mwa moke? Mingi na biso tobangaka mwa moke. Kasi mituna ya bongo ekoki kosalisa biso tóyeba makanisi to bindimeli ya moto yango, mpe ekoki kopesa biso libaku ya koyebisa ye nsango malamu. Kasi na bantango mosusu, moto akoki kotuna motuna mpo na kobimisa ntembe. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpo bato mosusu bayoká makambo ya lokuta mpo na bindimeli na biso. (Mis. 28:22) Lisusu, tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” ntango oyo bato mingi balingi “kosala boyokani te” mpe bazali “bato ya nko.”—2 Tim. 3:​1, 3.

2. Mpo na nini tozali na mposa ya komonisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ?

2 Mbala mosusu omitunaka, ‘Ndenge nini nakoki kozala na boboto mpe koloba na mayele ntango moto abimisi ntembe mpo na bindimeli na ngai oyo euti na Biblia?’ Na mokuse, eloko oyo ekosalisa yo ezali ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Moto ya motema pɛtɛɛ asilikaka noki te; ayebaka komipekisa ntango likambo moko epesi ye nkanda to ntango azali na eyano te na motuna oyo batuni ye. (Mas. 16:32) Ya solo, na bantango mosusu ezalaka mpasi komonisa motema pɛtɛɛ. Kasi, ndenge nini okoki kokolisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ? Ndenge nini okoki komonisa motema pɛtɛɛ mpo na koyanola moto oyo atyeli bindimeli na yo ntembe? Mpe soki ozali moboti, ndenge nini okoki koteya bana na yo ndenge bakoki komonisa motema pɛtɛɛ ntango bazali kokɔtɛla bindimeli na bango? Tiká tólobela yango.

NDENGE YA KOKOLISA MOTEMA PƐTƐƐ

3. Mpo na nini tokoki koloba ete ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezali bolɛmbu te? (2 Timote 2:​24, 25)

3 Ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezali bolɛmbu te. Esɛngaka moto azala makasi mpo afanda nyɛɛ ntango likambo moko etye ye na komekama. Motema pɛtɛɛ ezali na kati ya “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:​22, 23) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema pɛtɛɛ” ezalaki kosalelama na bantango mosusu mpo na kolobela mpunda ya zamba oyo babɔkɔli na mboka. Kanisá naino mpunda ya zamba oyo ekómi boboto. Ekómi boboto lokola nyama ya mboka, kasi ezali kaka makasi. Ndenge nini biso bato tokoki kokolisa motema pɛtɛɛ mpe kozala kaka makasi? Tokokoka te kosala yango na ndenge na biso moko. Tosengeli kobondela Nzambe apesa biso elimo na ye, mpo esalisa biso tólona ezaleli yango ya malamu. Bandakisa ya bato mingi emonisi ete tokoki kolonga. Bandeko mingi bamonisaki ete bazali na motema pɛtɛɛ ntango bayanolaki bato oyo batɛmɛlaki bindimeli na bango, mpe yango ezalaki litatoli ya malamu epai ya basusu. (Tángá 2 Timote 2:​24, 25.) Okoki kosala nini mpo motema pɛtɛɛ mpe ekóma makasi na yo?

4. Ndakisa ya Yisaka eteyi biso nini na oyo etali motema pɛtɛɛ?

4 Biblia elobeli masolo mingi oyo emonisi ntina ya ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Tózwa ndakisa ya Yisaka. Ntango azalaki kofanda na Gerare, na teritware ya Bafilistia, bato ya esika yango bayokelaki ye likunya mpe bakundaki mabulu ya mai oyo basaleli ya tata na ye batimolaki. Na esika Yisaka abunda mpo na mabulu na ye, amemaki libota na ye mosika mpe atimolaki mabulu mosusu ya mai kuna. (Eba. 26:​12-18) Kasi Bafilistia balobaki ete mai ya esika yango mpe ezalaki ya bango. Atako bongo, Yisaka alukaki kotya kimya. (Eba. 26:​19-25) Nini esalisaki ye akoba komonisa motema pɛtɛɛ atako emonanaki ete basusu bazalaki kosala nyonso mpo na kosilikisa ye? Na ntembe te amonaki ndakisa ya baboti na ye, ayekolaki ndenge Abrahama azalaki kosilisa makambo na kimya mpe ayebaki “elimo ya kimya mpe ya boboto” oyo Sara azalaki na yango.—1 Pe. 3:​4-6; Eba. 21:​22-34.

5. Ndakisa nini emonisi ete baboti bakristo bakoki koteya bana ntina ya komonisa motema pɛtɛɛ?

5 Baboti bakristo, bóyeba ete bino mpe bokoki koteya bana na bino ntina ya kozala na motema pɛtɛɛ. Talá ndakisa ya Maxence, oyo azali na mbula 17. Azalaki kokutana na bato ya nkanda na kelasi mpe na mosala ya kosakola. Baboti na ye basalisaki ye malɛmbɛmalɛmbɛ mpo akóma na ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Balobi boye: “Maxence ayebi sikoyo ete kosilika ntango moto apesi yo nkanda ezalaka mpasi te, kasi moto oyo azali mpenza makasi ayebaka komipekisa.” Likambo ya esengo, motema pɛtɛɛ ekómá makasi ya Maxence!

6. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tómonisa lisusu motema pɛtɛɛ koleka?

6 Tokosala nini soki tokutani na matumoli ya makasi, na ndakisa moto azali koloba mabe mpo na nkombo ya Nzambe na biso to azali kotyola Biblia? Tosengeli kosɛnga Yehova apesa biso elimo na ye mpe bwanya mpo tómonisa motema pɛtɛɛ na ntango yango. Bongo soki toyei komona na nsima ete tosalaki te makambo na ndenge oyo ebongi? Tokoki kobondela lisusu mpo na yango, mpe kokanisa nini tokoki kosala mpo tóbongisa mbala ya nsima. Yehova akopesa biso elimo santu na ye mpo tóyeba komipekisa mpe tómonisaka motema pɛtɛɛ.

7. Na ndenge nini kokanga mwa bavɛrsɛ na motó ekoki kosalisa biso tóbatela lolemo na biso mpe tózala na komipekisa? (Masese 15:​1, 18)

7 Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia ekoki kosalisa biso tóbatela lolemo na biso ntango batumoli biso. Elimo ya Nzambe ekoki kozongisa bavɛrsɛ yango na makanisi. (Yoa. 14:26) Na ndakisa, mitinda oyo ezali na mokanda ya Masese ekoki kosalisa biso tómonisa motema pɛtɛɛ. (Tángá Masese 15:​1, 18.) Mokanda yango emonisi mpe matomba ya komipekisa liboso ya makambo oyo epesaka nkanda.—Mas. 10:19; 17:27; 21:23; 25:15.

MAYELE YA KOSOSOLA ESALISAKA BISO TÓZALA NA MOTEMA PƐTƐƐ

8. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba ntina oyo moto atyeli bindimeli na biso ntembe?

8 Mayele ya kososola mpe esalisaka biso. (Mas. 19:11) Moto oyo azali na mayele ya kososola amonisaka komipekisa ntango batyeli bindimeli na ye ntembe. Mituna to bantembe mosusu ezalaka lokola mabanga ya glasi oyo emonanaka likoló ya mai lokola eloko moko ya moke, nzokande eteni na yango ya monene efandi na nse ya mai. Na ndakisa, mayoki to likanisi moko oyo ebombaná nde ekoki kotinda moto atuna motuna. Na yango liboso ya koyanola, ekozala malamu tóbosana te ete mbala mosusu toyebi te nini nde etindi moto yango atuna motuna.—Mas. 16:23.

9. Ndenge nini Gideone amonisaki mayele ya kososola mpe motema pɛtɛɛ epai ya mibali ya Efraime?

9 Tótalela ndenge oyo Gideone apesaki mibali ya Efraime eyano. Mibali yango batunaki ye na nkanda mpenza ntina oyo abengaki bango te mpo bákende elongo na ye kobundisa banguna ya Yisraele. Ezalaki nde na likambo moko oyo ebombaná, oyo etindaki bango báluka kobendana na Gideone? Ekoki nde kozala ete bazalaki na lolendo? Ezala bongo to te, Gideone amonisaki mayele ya kososola; amityaki na esika na bango mpe amonisaki motema pɛtɛɛ na eyano oyo apesaki bango. Esukaki ndenge nini? Mibali yango bakitisaki mitema, “nkanda na bango ekitaki.”—Bas. 8:​1-3.

10. Nini ekosalisa biso tóyeba ndenge ya koyanola baoyo batɛmɛlaka bindimeli na biso? (1 Petro 3:15)

10 Moninga moko ya mosala to ya kelasi akoki kotuna biso ntina oyo Batatoli ya Yehova basalaka to te likambo moko boye. Tokosala makasi tókɔtela bindimeli na biso, kasi tokomonisa mpe limemya mpo na makanisi na ye. (Tángá 1 Petro 3:15.) Mbala mingi, ezalaka malamu soki totaleli motuna yango lokola libaku ya koyeba makambo oyo atyelaka likebi, kasi te lokola alingi kolukela yo makambo to kobimisa ntembe. Ata soki likambo nini nde etindi moto moko atuna motuna, ekozala malamu tózongisa eyano na boboto, tómonisa ete tozali na motema pɛtɛɛ. Na ndenge yango, eyano na biso ekoki kotinda ye abongola makanisi na ye. Ata soki azangi limemya to atyoli biso, mokano na biso esengeli kozala ya koyanola na boboto.—Rom. 12:17.

Tokoki koyanola malamu soki tokanisi liboso ntina oyo bazali kobengisa biso na fɛti ya mbotama (Talá paragrafe 11-12)

11-12. (a) Nini tokoki kotalela liboso ya kopesa eyano na motuna moko ya mindɔndɔ? (Talá mpe elilingi.) (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo motuna moko ekoki kopesa libaku ya lisolo.

11 Na ndakisa, soki moninga ya mosala atuni ntina oyo tosalaka fɛti ya mbotama te, kanisá naino: Ekoki nde kozala ete azali komituna soki tozwaka mpe ntango ya komisepelisa? To mbala mosusu azali komona ete ezaleli na biso ekoki kobebisa boyokani kati na baninga ya mosala? Mpo na kokitisa ye motema, tokoki komonisa ye ete tosepeli ndenge azali komibanzabanza mpo na baninga ya mosala, mpe na nsima koyebisa ye ete biso mpe tolingi ete boyokani ezala malamu na esika ya mosala. Yango ekoki kopesa biso libaku ya kosolola malamu makambo oyo Biblia emonisi mpo na fɛti ya mbotama.

12 Tokoki mpe kosalela mayele yango ntango motuna mosusu ya mindɔndɔ ebimi. Moninga moko ya kelasi akoki koloba ete Batatoli ya Yehova basengeli kobongola ndenge na bango ya kotalela likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Alobi nde likambo yango mpo ayebi Batatoli ya Yehova malamu te? To ekoki nde kozala ete moninga to ndeko na ye moko asangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi? Alingi nde koloba ete toyinaka bato oyo basalaka likambo yango? Ekoki kosɛnga tóyebisa ye ete tolingaka bato nyonso mpe ete tomemyaka lotomo oyo moto azali na yango ya kopona oyo alingi. b (1 Pe. 2:17) Na bongo, tokoki kozwa libaku ya komonisa ye matomba ya kotosa mibeko ya Biblia.

13. Ndenge nini okoki kosalisa moto oyo alobi ete kondimela Nzambe ezali bozoba?

13 Ntango moto aboyi mpenza likanisi na biso, tókanisa mbala moko te ete toyebi makambo oyo andimaka. (Tito 3:2) Na ndakisa, moninga moko ya kelasi akoki koloba ete ezali bozoba kondima ete Nzambe azali! Osengeli nde kokanisa mbala moko ete andimaka evolisyo mpe ayebi yango malamu? Kutu, mbala mosusu naino akanisá yango na mozindo te. Na esika obanda kobendana na ye na makambo ya siansi, okoki koluka ndenge ya kotinda ye akanisa na nsima. Mbala mosusu okoki kolakisa ye masolo oyo elobeli bozalisi, oyo ezali na jw.org. Na nsima, akoki kondima bólobela lisolo to video moko oyo amoni kuna. Ya solo, soki osali makambo na limemya, ekoki kotinda ye abongola likanisi na ye.

14. Ndenge nini Niall asalelaki malamu site na biso mpo kosalisa moninga moko ya kelasi alongola makanisi mabe mpo na Batatoli ya Yehova?

14 Elenge mobali moko na nkombo Niall asalelaki site na biso mpo na kosembola makambo ya lokuta oyo elobamaka mpo na Batatoli ya Yehova. Niall alobi boye: “Mwana-kelasi moko azalaki koyebisa ngai mbala na mbala ete nandimaka siansi te mpo nandimelaka buku moko oyo ‘bato basalá’ na esika nandima makambo ya solo.” Lokola apesaki Niall nzela te ya kolimbola bindimeli na ye, Niall atindaki ye na jw.org na eteni “Siansi mpe Biblia.” Na nsima, Niall amonaki ete mwana yango atángaki makambo na site na biso mpo andimaki bálobela makambo mosusu oyo etali ndenge bomoi ebandá. Ekoki kosalema mpe bongo mpo na yo.

BABOTI BAKOKI KOSALISA BANA

15. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bámonisa motema pɛtɛɛ mpo na koyanola baninga oyo batye ntembe na bindimeli na bango?

15 Baboti bakoki koteya bana ndenge ya komonisa motema pɛtɛɛ mpo na koyanola moto oyo atyeli bindimeli na bango ntembe. (Yak. 3:13) Basusu basalaka bilakiseli ná bana na losambo na kati ya libota. Balobelaka mituna oyo ekoki kobima na eteyelo, bamonisaka bana ndenge ya kopesa eyano, mpe bateyaka bango ndenge ya komonisa motema pɛtɛɛ mpe ya koloba na ndenge oyo ekosepelisa ntango bazali koyanola.—Talá etanda “ Komekameka ekoki kosalisa libota na yo.”

16-17. Na ndenge nini komekameka ndenge ya kopesa eyano ekoki kosalisa bilenge?

16 Komekameka ndenge ya kopesa eyano ekoki kosalisa bakristo bálobela mateya na bango na mpiko mpe bango moko bámindimisa ete bazali na ntina ya kondima yango. Masolo oyo ebimaka na jw.org na eteni “Mituna oyo bilenge batunaka” ezali mpe na nkasa mpo na bilenge. Nkasa yango ebongisami mpo na kosalisa bilenge báyeba malamu bindimeli na bango mpe bábongisa biyano na maloba na bango moko. Soki tozali koyekola masolo yango na kati ya libota, biso nyonso tokoki koyekola ndenge ya kolobela bindimeli na biso na boboto, na ndenge oyo ekosepelisa.

17 Elenge mobali moko na nkombo Matthew alobeli ndenge komekameka esalisaki ye. Na ntango ya losambo na kati ya libota, mbala mingi Matthew ná baboti na ye bazalaki kotalela makambo oyo ekokaki kobima na kelasi. Alobi boye: “Tokanisaka makambo oyo ekoki kosalema, mpe tomekamekaka ndenge ya kosala na kolanda makambo oyo tozwi na bolukiluki. Soki nayebi malamu ntina oyo nandimaka likambo moko, nazalaka na mpiko mpe namonaka ete ezali mpasi te namonisa motema pɛtɛɛ ntango nazali kopesa basusu biyano.”

18. Bakolose 4:6 emonisi ntina ya likambo nini?

18 Ya solo, ata soki tozwi makanisi ya malamu, tokokoka te kondimisa bato mosusu. Kasi koloba na mayele mpe komonisa motema pɛtɛɛ ekoki kosalisa. (Tángá Bakolose 4:6.) Kolobela bindimeli na biso ekoki kozala lokola lisano ya kobwakelana bale. Tokoki kobwakela yango moto na malɛmbɛ to kobamba ye yango na makasi. Ntango tobwaki yango na malɛmbɛ, moto akoki kozwa yango mpe tokokoba lisano. Ndenge moko mpe, soki tozali koloba na mayele mpe tomonisi motema pɛtɛɛ, bato bakondima koyoka biso mpe tokokoba kosolola. Kasi, soki moto alingi kaka kokweisa biso to azali kotyola bindimeli na biso, ntina ya kokoba koyanola ye ezali te. (Mas. 26:4) Kasi, bato ya ndenge wana bazalaka mpenza mingi te; bato mosusu, to kutu bato mingi bakosepela koyoka biso.

19. Mpo na nini tosengeli komonisa motema pɛtɛɛ ntango tozali kokɔtela bindimeli na biso?

19 Ya solo, tokozwa matomba mingi soki tomityeli mokano ya komonisa motema pɛtɛɛ. Bondelá Yehova apesa yo makasi oyo esengeli mpo okoba komonisa motema pɛtɛɛ ntango batuni yo mituna ya mindɔndɔ to batyoli bindimeli na yo. Kobosana te ete ezaleli na yo ya motema pɛtɛɛ ekoki kopekisa koswana ebima kaka mpo makanisi na bino ekeseni. Mpe eyano na yo ya boboto mpe ya limemya ekoki kotinda bato mosusu bábongola ndenge na bango ya kotalela biso mpe mateya ya Biblia. Zalá “ntango nyonso pene” mpo na kolobela bindimeli na yo, saláká yango “na boboto mpe na limemya makasi.” (1 Pe. 3:15) Ya solo, tiká motema pɛtɛɛ ezala makasi na yo!

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

a Lisolo oyo elobeli ndenge ya komonisa motema pɛtɛɛ mpo na kolobela bindimeli na biso ntango basusu batumoli biso to babimisi ntembe.

b Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá lisolo “Biblia elobi nini na likambo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?” na Lamuká! 2016 No. 4.

c Okoki kozwa makanisi mosusu na jw.org, na eteni “Mituna oyo bilenge batunaka” mpe “Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova.”