Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 37

Tyelá Yehova motema, ndenge Samsone asalaki

Tyelá Yehova motema, ndenge Samsone asalaki

“Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, kanisá ngai, nabondeli yo, mpe pesá ngai makasi.”—BAS. 16:28.

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

NA MOKUSE a

1-2. Mpo na nini ezali na ntina tóyekola lisolo ya Samsone?

 NINI eyelaka yo na makanisi ntango oyokaka nkombo Samsone? Mbala mosusu okanisaka makasi na ye ya kokamwa. Ya solo azalaki makasi. Kasi Samsone azwaki ekateli moko ya mabe mpe yango ememelaki ye mpasi. Atako bongo, Yehova atalelaki mingi nde bosembo oyo Samsone amonisaki na bomoi na ye, mpe akomisaki lisolo na ye na Biblia mpo tózwela yango matomba.

2 Yehova asalelaki Samsone mpo asala makambo ya kokamwa mpo na kosalisa Bayisraele, bato oyo Ye aponaki. Bambula mingi nsima ya liwa ya Samsone, elimo santu ya Yehova etindaki ntoma Paulo atya nkombo ya Samsone na molɔngɔ ya bato ya kondima makasi. (Ebr. 11:​32-34) Ndakisa ya Samsone ekoki kolendisa biso. Atyelaki Yehova motema, ata na ntango ya mpasi. Na lisolo oyo, tokolobela mateya ya kolendisa mpe batoli ya ntina mingi oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye.

SAMSONE ATYELAKI YEHOVA MOTEMA

3. Mokumba nini Samsone azwaki?

3 Ntango Samsone abotamaki, Bafilistia bazalaki koyangela ekólo Yisraele mpe komonisa yango mpasi mingi. (Bas. 13:1) Bayisraele banyokwamaki mingi mpo Bafilistia bazalaki bato ya nkanza. Yehova aponaki Samsone “mpo na kobikisa Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia.” (Bas. 13:5) Ezalaki mokumba moko ya mpasi mpenza! Mpo akokisa mokumba yango, Samsone asengelaki mpenza kotyela Yehova motema.

Samsone atyelaki Yehova motema mpe amesanaki na likambo ya sika. Asalelaki eloko oyo amonaki wana mpo na kosala mokano ya Nzambe (Talá paragrafe 4-5)

4. Ndenge nini Yehova asalisaki Samsone amibikisa na mabɔkɔ ya Bafilistia? (Basambisi 15:​14-16)

4 Tótalela ndakisa oyo emonisi ndenge Samsone atyelaki Yehova motema mpe ndenge oyo Yehova asalisaki ye. Na libaku moko boye, limpinga ya basoda ya Bafilistia bayaki kokanga Samsone na Lehi, mbala mosusu na Yuda. Mibali ya Yuda babangaki, yango wana bazwaki ekateli ya kokaba Samsone na mabɔkɔ ya banguna. Bazalaki bato ya ekólo ya Samsone; kasi bango moko bakangaki ye na bansinga mibale ya sika mpe bamemaki ye epai ya Bafilistia. (Bas. 15:​9-13) Nzokande, “elimo ya Yehova ekitelaki” Samsone mpe bansinga oyo bakangaki ye ekatanaki. Na nsima “amonaki mokuwa moko ya mbanga ya mpunda-mobali,” azwaki yango, mpe asalelaki yango mpo na koboma mibali 1000 ya Bafilistia!—Tángá Basambisi 15:​14-16.

5. Ndenge nini Samsone amonisaki ete atyelaki Yehova motema na ndenge asalelaki mokuwa ya mbanga ya mpunda?

5 Mpo na nini Samsone asalelaki mokuwa ya mbanga ya mpunda? Mpo na koloba solo, yango ezalaki ebundeli te! Kozanga ntembe, Samsone ayebaki ete Yehova nde akosalisa ye alonga, kasi te eloko oyo asaleli mpo na kobunda. Mobali yango ya sembo asalelaki kaka eloko oyo amonaki wana mpo na kokokisa mokano ya Yehova. Ya solo, lokola Samsone atyelaki Yehova motema, alongaki mibali yango nyonso.

6. Mpo na kokokisa mikumba na biso na mosala ya Nzambe, liteya nini tokoki kozwa epai ya Samsone?

6 Yehova akoki mpe kopesa biso makasi mpo tókokisa mikumba na biso, ata oyo tomoni ete eleki mpasi. Nzambe akoki kosala yango na ndenge oyo ekoki kokamwisa biso. Tyá motema ete Yehova, ye oyo apesaki Samsone makasi, akosalisa yo osala mokano na Ye, soki yo mpe otyeli Ye motema.—Mas. 16:3.

7. Ndakisa nini emonisi ntina oyo tosengeli koluka litambwisi ya Yehova?

7 Bandeko mingi oyo basalaka na mosala ya botongi bamonisi ete batyelaka Yehova motema. Na kala, mbala mingi bandeko nde bazalaki kosala baplan mpe kotonga Bandako ya Bokonzi ná bandako mosusu. Kasi kendekende, bokoli oyo emonanaki na ebongiseli ya Yehova esɛngaki ete mbongwana moko esalema. Bandeko oyo bazalaki kokamba balukaki litambwisi ya Yehova mpe bamekaki mayele mosusu ya sika, na ndakisa kosomba bandako mpe kobongisa yango. Ndeko Robert, oyo asali elongo na baekipi mingi ya botongi na mokili mobimba na bambula oyo eleki, alobi boye: “Na ebandeli ezalaki pɛtɛɛ te mpo bandeko mosusu bámesana na mayele yango ya sika.” Abakisi ete: “Ekesanaki mpenza na mayele oyo tosalelaki liboso na boumeli ya bambula mingi. Kasi bandeko bandimaki komesana na mayele ya sika, mpe ekómi komonana polele ete Yehova azali kopambola bambongwana yango.” Oyo ezali kaka ndakisa moko mpo na komonisa ndenge Yehova azali kotambwisa basaleli na ye mpo bákokisa mokano na ye. Biso nyonso tosengeli mbala na mbala komitunaka boye: ‘Nalukaka litambwisi ya Yehova mpe nandimaka komesana na makambo ya sika mpo nasalela ye malamu koleka?’

SAMSONE ANDIMAKI EBONGISELI OYO YEHOVA AZWAKI

8. Na libaku moko boye ntango ayokaki mposa makasi ya mai, Samsone asalaki nini?

8 Ekoki kozala ete oyebi mpe makambo mosusu ya kokamwa oyo Samsone asalaki. Na ndakisa, abomaki nkɔsi na mabɔkɔ na ye, mpe na nsima abomaki mibali 30 ya Bafilistia na engumba Ashekelone. (Bas. 14:​5, 6, 19) Samsone ayebaki ete akokaki ata moke te kosala makambo yango kozanga lisalisi ya Yehova. Yango emonanaki na libaku moko ntango akómaki na mposa makasi ya mai nsima ya koboma Bafilistia 1000. Asalaki nini? Na esika aluka mai na ndenge na ye moko, abelelaki Yehova asalisa ye.—Bas. 15:18.

9. Ndenge nini Yehova ayanolaki Samsone ntango asɛngaki lisalisi? (Basambisi 15:19)

9 Yehova ayanolaki na libondeli ya Samsone na ndenge abimisaki liziba moko ya mai na ndenge ya likamwisi. Ntango Samsone amɛlaki mai yango, “nguya na ye ezongaki mpe azwaki lisusu makasi.” (Tángá Basambisi 15:19.) Emonani ete liziba yango ya mai ezalaki kaka bambula mingi na nsima ntango mosakoli Samwele azalaki kokoma mokanda ya Basambisi na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mbala mosusu Bayisraele oyo bazalaki komona mai yango bazalaki komikundwela ete Yehova akoki kosalisa basaleli na ye ya sembo soki batyeli ye motema na ntango ya mpasi.

Samsone azwaki makasi nsima ya komɛla mai oyo Yehova apesaki ye. Biso mpe tosengeli kosalela bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso tókoba kozala makasi na elimo (Talá paragrafe 10)

10. Tosengeli kosala nini mpo tózwa lisalisi ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)

10 Biso mpe tosengeli kosɛngaka Yehova asalisa biso ata soki tozali na makoki to mayele ndenge nini to mpe tosali makambo mingi na mosala na ye. Tosengeli kozala na bopɔlɔ mpe kondima ete tokoki kolonga mpenza na mosala ya Yehova kaka soki totyeli ye motema. Kaka ndenge Samsone azwaki makasi ntango amɛlaki mai oyo Yehova apesaki ye, biso mpe tokozwa makasi na elimo soki tondimi bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso.—Mat. 11:28.

11. Ndenge nini tokoki kosalela bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso? Pesá ndakisa.

11 Tótalela ndakisa ya Aleksey, ndeko moko ya Russie oyo azali kokutana mpe na minyoko ya makasi. Nini esalisi ye ayika mpiko na mikakatano wana ya makasi? Ye ná mwasi na ye bayekolaka Biblia mbala na mbala mpe basalaka losambo na kati ya libota. Aleksey alobi boye: “Nasalaka makasi nabatela momeseno na ngai ya koyekola ngai moko mpe ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Ntɔngɔ nyonso, ngai ná mwasi na ngai totalelaka mokapo ya mokolo mpe tobondelaka Yehova elongo.” Yango eteyi biso nini? Na esika tósala makambo na ndenge na biso moko, tosengeli kotyela Yehova motema. Ndenge nini? Tosengeli kosala makambo oyo ekokómisa kondima na biso makasi, na ndakisa koyekola Biblia biso moko, kobondela, koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Yehova mpe na ngala na ye, akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kosalela ye. Apesaki Samsone makasi, akoki mpe kopesa biso.

SAMSONE ATIKAKI TE KOSALA MOKANO YA YEHOVA

12. Ekateli nini ya mabe Samsone azwaki, mpe ndenge nini yango ekesanaki na basi oyo azwaki liboso?

12 Samsone azalaki moto ya kozanga kokoka lokola biso, yango wana na bantango mosusu azwaki bikateli ya mabe. Ezali na ekateli moko oyo ememelaki ye makama minene. Nsima ya kozala mosambisi na boumeli ya mwa ntango, Samsone “alingaki mwasi moko na Lobwaku ya Soreke, nkombo na ye Dalila.” (Bas. 16:4) Liboso, Samsone azwaki mwasi moko Mofilistia, kasi libala yango “eutaki epai ya Yehova,” oyo “azalaki koluka libaku ya kobundisa Bafilistia.” Na nsima, Samsone afandaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba na Gaza, engumba ya Bafilistia. Na libaku yango, Nzambe apesaki Samsone nguya ya kopikola baporte ya engumba yango, mpe na bongo engumba yango ezangaki libateli. (Bas. 14:​1-4; 16:​1-3) Nzokande, emonani ete Dalila azalaki Moyisraele, na yango kolingana ná ye ezalaki te mpo na kopesa Samsone libaku ya kobundisa Bafilistia.

13. Mayele nini Dalila asalelaki, oyo etyaki Samsone na likama?

13 Dalila andimaki kozwa mbongo ebele oyo Bafilistia bapesaki ye mpo atɛkɛla bango Samsone. Ekoki nde kozala ete Samsone atyelaki Dalila motema mingi, ete bolingo oyo alingaki Dalila ezipaki ye miso, yango wana akokaki te kososola makambo oyo akanaki kosala? Ezala bongo to te, Dalila azalaki se kotya Samsone mbamba mpo ayebisa ye esika oyo makasi na ye ezalaki kouta, mpe nsukansuka Samsone ayebisaki ye sekele na ye. Likambo ya mawa, libunga wana ya Samsone esalaki ete abungisa makasi na ye mpe abebisa boyokani na ye na Yehova mpo na mwa ntango.—Bas. 16:​16-20.  

14. Makambo nini ya mpasi ekómelaki Samsone lokola atyelaki Dalila motema?

14 Samsone akutanaki na makambo mingi ya mpasi mpo atyelaki Dalila motema na esika atyela Yehova motema. Bafilistia bakangaki Samsone mpe batɔbɔlaki ye miso. Batyaki ye na bolɔkɔ na Gaza, esika oyo liboso asambwisaki bato, mpe bakómisaki ye moombo mpo anikaka mbuma. Na nsima ntango Bafilistia bayanganaki mpo na kosala fɛti bazalaki kotyola ye. Bapesaki nzambe na bango ya lokuta Dagone mbeka monene, mpo bamonaki ete asalisaki bango bákanga Samsone. Babimisaki Samsone na bolɔkɔ mpe bamemaki ye na fɛti yango mpo akende “kosɛkisa” bango.—Bas. 16:​21-25.

Yehova apesaki Samsone makasi mpo na kopesa Bafilistia etumbu oyo akatelaki bango (Talá paragrafe 15)

15. Na kotalela Basambisi 16:​28-30, ndenge nini Samsone amonisaki ete akómaki lisusu kotyela Yehova motema? (Talá elilingi ya ezipeli.)

15 Samsone asalaki libunga moko monene, kasi atikaki te kosalela Yehova. Alukaki libaku ya kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye ya kobundisa Bafilistia. (Tángá Basambisi 16:​28-30.) Samsone abondelaki Yehova boye: “Tiká nazongisela Bafilistia mabe.” Nzambe ya solo ayokaki libondeli ya Samsone mpe azongiselaki ye makasi na ye ya kokamwa. Na bongo, Bafilistia oyo Samsone abomaki na libaku yango bazalaki ebele koleka.

16. Liteya nini tokoki kozwa na libunga oyo Samsone asalaki?

16 Atako Samsone akutanaki na makambo ya mpasi mpo na libunga na ye, alukaki kaka kosala mokano ya Yehova. Ata soki osali libunga moko oyo esɛngi bápamela yo to mpe obungisa mokumba na yo, osengeli te kotika kosalela Yehova. Kobosana te ete Yehova asundolaka biso te. (Nz. 103:​8-10) Atako mabunga na biso, Yehova akoki kopesa biso makasi ya kosalela ye, kaka ndenge asalaki mpo na Sam sone.

Na ntembe te Samsone ayokaki mabe mpo na libunga oyo asalaki, kasi atikaki te kosalela Yehova—biso mpe tómekola ye (Talá paragrafe 17-18)

17-18. Ndakisa ya Michael elendisi yo na nini? (Talá mpe elilingi.)

17 Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Michael. Amipesaki mingi na mosala ya Yehova, azalaki mosaleli na misala mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi likambo ya mawa, asalaki libunga moko oyo esalaki ete abungisa mikumba na ye na lisangá. Alobi boye: “Liboso, makambo na ngai nyonso na mosala ya Yehova ezalaki kotambola malamu. Mpe na mbala moko, nayokaki lokola natutani na efelo ya mabanga. Nakanisaki ata moke te ete Yehova akosundola ngai, kasi nazalaki komituna soki boyokani na ngai ná ye ekozonga lisusu ndenge ezalaki liboso, to soki nakokaki kosalela ye lisusu na lisangá ndenge nazalaki kosala yango.”

18 Likambo ya esengo, Michael atikaki te kosalela Yehova. Alobi lisusu boye: “Namipesaki na kobongisa boyokani na ngai ná Yehova; nazalaki mbala mingi kosopela ye motema na ngai na libondeli, nazalaki koyekola, mpe komanyola.” Na nsima, Michael azongelaki mikumba na ye na lisangá. Sikoyo azali nkulutu mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Alobi boye: “Lisalisi mpe malendisi oyo nazwaki, mingimingi epai ya bankulutu, esalisaki ngai namona ete Yehova azalaki kaka kolinga ngai. Nakoki lisusu kosalela lisangá na lisosoli ya pɛto. Likambo yango eteyaki ngai ete Yehova alimbisaka moto nyonso oyo abongoli mpenza motema.” Tózala na kondima ete ata soki tosali mabunga, Yehova akosalela biso mpe akopambola biso, soki tosali nyonso mpo na kobongisa etamboli na biso mpe tokobi kotyela ye motema.—Nz. 86:5; Mas. 28:13.

19. Na ndenge nini ndakisa ya Samsone epesi yo makasi?

19 Na lisolo oyo, totaleli mwa ndambo ya makambo ya kokamwa oyo Samsone asalaki na bomoi na ye. Azalaki moto ya kokoka te; kasi, atikaki te kosalela Yehova, ata nsima ya libunga oyo asalaki na likambo ya Dalila. Mpe Yehova asundolaki ye te. Nzambe asalelaki ye lisusu na ndenge moko ya kokamwa. Yehova akobaki kotalela ye lokola mobali moko ya kondima makasi, mpe akomisaki nkombo na ye na molɔngɔ ya mibali ya sembo oyo mokanda ya Baebre mokapo 11 elobeli. Koyeba ete tosalelaka Tata moko ya bolingo na likoló, oyo azalaka na mposa ya kopesa biso makasi ntango tolɛmbi, elendisaka biso mpenza! Na yango, ndenge moko na Samsone, biso mpe tóbondelaka Yehova ete: “Kanisá ngai, nabondeli yo, mpe pesá ngai makasi.”—Bas. 16:28.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

a Samsone, nkombo ya moto moko oyo Biblia elobeli, eyebani epai ya bato mingi, ata baoyo bayebi mpenza Biblia te. Balobelaka lisolo na ye na masano, na banzembo, mpe na bafilme. Kasi, bomoi na ye ezali kaka te lisolo moko ya kitoko. Tokoki koyekola makambo mingi epai ya mobali yango ya kondima makasi.