Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi​—Likabo oyo tosengeli kolinga yango mingi

Bomoi​—Likabo oyo tosengeli kolinga yango mingi

LIKOKI ya kobota bana ezali solo likabo moko kitoko oyo Jéhovah Nzambe asili kopesa na bato! Babalani ya esengo mpe oyo bazali na bomoko bakoyamba mwana, bamibongisi mpo na kolinga ye mingi mpe kobatela mbuma ya libala na bango. Mwana akokóla mpe akozala liziba ya esengo ya ntango nyonso mpo na libota.

Kasi lisumu ya Adam mpe Eva ebimisaki makambo ya mpasi likoló na bana. Na ntina ya lisumu, mama na biso ya liboso asengelaki kobota na mpasi mpe na mikakatano. Na nsima, libota ya bato na masumu oyo kati na yango bakitani na ye babotamaki eyeisaki mokumba ya baboti mpasi mingi. Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te ete na mokili oyo ekómi na mindondo mingi, zemi ezali mbala mingi kobulunganisa, na esika ete epesa esengo. Nzokande, lolenge nini Mozalisi azali kotalela mwana kati na libumu ya mama na ye? Asili kobongola likanisi na ye mpo na kokokisa yango na mitindo ya sika ya etamboli ya bato? Soko moke te. Komibanzabanza na ye mpo na bana oyo basengeli kobotama ebongwani te.

Makomami mazali komonisa polele ete kati na libumu ya mama, moto moko oyo akeseni na bato mosusu azali kokóla. Bomoi ezali kobanda uta ebandeli ya zemi. Kobotama kati na mokili ezali bobele komonisa na bato mwana oyo Nzambe asilaki komona. Ezekiele azali kolobela “bana nyonso oyo bazali kofungola libumu.” (Ezekiele 20:26, MN) Yobo alobeli “bikuke ya libumu ya mama na ngai,” mpe azali kobenga bazemi oyo esopani lokola “bana oyo bamoni pole te.”​—Yobo 3:10, 16.

Kanisá limemya litondi na bolingo oyo Jéhovah Nzambe azali komonisa na bomoi ezangi makasi oyo ezali kokóla kati na libumu. Alobaki na Yilimia ete: “Naino natongi yo kati na libumu te, nayebaki yo; mpe naino obotamaki te, nabulisaki yo.” (Yilimia 1:5) Davidi alobaki ete: “Nzoto na ngai ebombamaki na yo te na ntango wana esalamaki ngai na ebombelo mpe wana ebongisamaki ngai na nse mingi na mokili. Miso na yo mamonaki ngai [wana ezalaki ngai kotongama].” (Nzembo 139:15, 16) Yobo abengi Nzambe ‘Moto oyo asalaki ngai kati na libumu, oyo azalaki kobongisa biso kati na libumu.’​—Yobo 31:15.

Kasi, nini ezali lobanzo ya Nzambe mpo na mama oyo azangi elikya oyo alingi mwana te? Koleka bato nyonso, Mozalisi ayebi ete kobokola bana ezali mokumba moko monene. Soki mwasi moko oyo azangi elikya, atako azali na ezalela moko ya mpasi, azwi ekateli ya kobatela mwana na ye mpo na limemya na masengami na Nzambe, Mozalisi akopambola ekateli na ye wana te? Baboti bakoki, mpe basengeli kosenga lisalisi na Nzambe kati na libondeli mpo ete mwana na bango azala na esengo. Kati na Liloba na ye, Nzambe asila kopesa batoli kitoko mpo na lolenge ya kobokola bana. Kosalela mitinda ya Biblia kati na bomoi ya libota ekobimisa matomba malamu. Lokola ekondima yango baboti oyo bazali kosepela na bana na bango, bisengo mpe mbano oyo ezali kouta na bana oyo bazali kobanga Nzambe ezali kobosanisa bampasi nyonso oyo emonanaki mpo na kobokola bango.

Jéhovah azali nde na likanisi likeseni soki mwana auti na zemi ezwamaki nsima na kobebisama to nsima na kosangisa nzoto na mosangani moko ya libota? Atako makambo wana mazali mabe, mwana azali na likambo te. Kokata bomoi na ye ezali bobele kolandisa mabe likoló na mabe mosusu. Ya solo, Jéhovah ayebi mabe oyo esalemi, mpe akoki kosalisa mama mpe mwana na kolónga mikakatano oyo mibimaka na nsima.

Ezali boni soki monganga ayebisi na mwasi oyo azali na zemi ete akotya bomoi na ye na likámá soki zemi na ye ekómi kino na ntango ya kobota? Monganga Alan Guttmacher alobaki ete: “Na mikolo na biso pene na basi nyonso oyo bazali na maladi bakoki kobika na zemi, longola bobele soki bazali na bamaladi oyo ebomaka lokola cancer to leucémie. Na makambo motindo wana, ata mwasi alongoli zemi elimboli te ete bomoi na ye ekokende molai, mpe ezali ndanga te ete akokufa te.” Buku The Encyclopedia Americana elobi ete: “Mpo ete basi mingi, ezala baoyo bazali na mitungisi mitali kolongono ya nzoto, bakoki kokóma kino na ntango basengeli kobota kozanga ete bomoi na bango etyama na likámá, kosopa zemi oyo esalemaka mpo na kobatela kolongono ya nzoto ya mama esengeli kozala mingi te. Zemi mingi esopami bobele mpo ete balingi bana yango te.” Na bongo, zemi oyo esalaka ete kolongono ya mama ekómi na likámá ezalaka mingi te. Nzokande, soki yango ekómi bongo na ntango ya kobota, baboti basengeli kopona kati na bomoi ya mama mpe oyo ya mwana. Ezali ekateli na bango.

Likambo ya kokamwa ezali lokola Mozalisi ya bomoi apesaki mibeko ya sikisiki mpo na lolenge ya kosalela biboteli? Na miso na ye, kobandisa bomoi oyo ozali na mokano ya kobatela yango te ezali lisumu, motindo moko na koboma moto.

Ya solo, ntembe kati na baoyo bazali kondima kosopa zemi mpe baoyo bazali kondima yango te, ekolandana kino na nsuka ya ebongiseli oyo. Kasi mpo na Mozalisi ya bomoi, Jéhovah Nzambe, mpe mpo na baoyo balingi mibeko na ye, ntembe ezali te. Bomoi ezali na motuya mingi; ezali likabo oyo tosengeli kolinga yango mingi mpe kobatela yango uta ebandeli na yango.