Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kokakatana likoló na kosopa zemi​—Nzela ezali nde na koboma milió 60 ya bana?

Kokakatana likoló na kosopa zemi​—Nzela ezali nde na koboma milió 60 ya bana?

NA KOBULUNGANA nyonso, na nsomo mpe na mai na miso, elenge mwasi moko ya mibu 15 azali kotala kokende ya elenge mobali oyo azalaki moninga na ye, atiki ye mpe azali na mposa na ye lisusu te. Auti kofinga ye ete azali zoba mpo ete azwi zemi. Elenge mwasi akanisaki ete bazalaki solo kolingana.

Mwasi mosusu alembi mpenza mpe elikya nyonso esili, ntango ayei koyeba ete azali na zemi oyo ekozala bongo mwana na ye ya motoba. Mobali na ye azali na mosala te, mpe mwa libota na ye bakolalaka mpokwa nyonso na nzala. Bakokoka boni koleisa mwana mosusu?

“Yango eyei na ntango moko mabe,” oyo maloba ya monganga epai ya mwasi moko alati na bonzenga nyonso. Mwasi oyo auti kozwa dipolome na ye ya ingénieur mpe alingi kobanda mosala. Mobali na ye nde amipesi mobimba na mosala na ye ya avocat. Bakozwa ntango wapi mpo na kozala na mwana?

Bato oyo bazali na mitindo na bomoi mikeseni mpe mikakatano na bango mizali ndenge moko te. Kasi banso baponi nzela moko: kosopa zemi.

Kosopa zemi ezali moko na makambo oyo bato bazali kobendana makasi mpo na yango, mingimingi na boumeli ya mbula zomi oyo eleki. Ntembe makasi ezali kobima mpo na yango, epai ya bato ya politike, na bato bakosalaka na bibongiseli ya kosalisa bato, na minganga mpe na bateyi na mangomba. Na États-Unis, bato oyo baboyi likambo ya kosopa zemi bazali kobundela lotómo ya mwana. Na ngambo mosusu, baoyo bazali kokotela likambo ya kosopa zemi bazali kobundela bonsomi mpe lotómo ya mwasi na kozwa ekateli na likambo yango. Ngambo nyonso mibale bazali kozongisana maloba ya botemeli na ntango ya bavote, epai ya basambisi, na bandakonzambe, mpe ata na balabala.

Bamilió ya bato mosusu bazali na katikati, lokola ete epai boye mɔ́tɔ epai mosusu mɔ́tɔ; babendani epai na epai kati na ntembe yango makasi oyo ebimi kati na bakoteli na likambo ya kosopa zemi mpe baoyo baboyi yango. Maloba bazali kosalela (“mpo na kopona” mpe “mpo na bomoi”) maponamaki malamumalamu mpo na kolengola mitema na baoyo bazali kokakatana. Na eleko oyo bazali kosambela bonsomi, nani akobendama te na likambo litali kozala na lotómo ya kopona? Kasi, epai mosusu, nani akobendama te na likambo litali lotómo na bomoi? Bamoko basimbi biteni ya bibende na maboko lokola elembo ya basi banyokwami oyo bazali kokufa mpo ete babimisi zemi na kobombama. Basusu bazali kolakisa mwa bana balongolami na libumu batyami na saani ya lopitalo, mpo na komonisa ete bamilió ya bana bazali kobotama te.

Laurence H. Tribe amonisi malamu mpe na mokuse nsomo ya likambo yango kati na mokanda na ye Avortement: le choc des absolus (na Lingelesi): “Mingi na baoyo bazali na ntembe te ete mwana oyo azali naino kosalema kati na libumu ya mama azali moto mobimba, oyo bazali kopesa ye motuya mingi mpe bazali kolela mpo na ye, babosani moto mosusu, oyo azali komema ye, mpe babosani mpasi ya moto yango. . . . Basusu mingi, oyo bazali kotalela libosoliboso ete mwasi ye moko apona eloko alingi, bazali kokanisa soko moke te na mwana oyo azali na libumu na ye mpe bazali kotalela ye te lokola ekelamu na bomoi mpenza.”

Wana kobendana oyo ezali kolandana, zemi milió 50 kino milió 60 ekobomama lisusu mbula oyo mpo ete bato baluki lotómo ya kosala oyo balingi.

Likanisi na yo ezali nini likoló na likambo oyo ya ntina mingi? Eyano na yo ezali nini na mituna oyo mizali mituna ya moboko: mwasi azali na lotómo ya kozwa ekateli na likambo yango? Kosopa zemi ekoki kolóngisama, ata na ntina nini? Ntango nini bomoi ekobandaka? Mpo na kosukisa, motuna moleki nyonso, atako etunamaka mingi te, ezali oyo: Ndenge nini Mozalisi ya bomoi mpe ya makoki ya kobota ataleka likambo ya kosopa zemi?

Kosopa zemi ezali likambo ya sika te. Na Rome mpe na Grèce ya kala, ezalaki komonana mingi. Na Mpótó, na eleko ebengami Moyen Age mpe na eleko ya Renaissance, kosopa zemi epesamaki nzela soko mama aoki te ete mwana azali koningana kati na libumu na ye. Nsima na bikeke, mbongwana monene eyei kobima na makambo matali kosangisa nzoto mpe matomba mabe mayei komonana: milió mingi ya bazemi oyo bato balingi yango te.

Kobanda 1960 kino 1969 emonanaki bokóli ya makanisi ya kopesa lotómo mingi na basi, kati na yango, oyo babengaki lotómo ya mwasi ya kosalela nzoto na ye lokola alingi, ezali lotómo ya moboko. Bamoko bazali kotya makelele mingi mpo na kolóngisa lotómo ya basi oyo mibali basangani na bango na makasi mpe bazwi zemi to baoyo babebisami na bandeko na bango mpe bazwi zemi, ete ekoki na bango kosopa zemi yango, bobele bongo mpo na basi oyo santé na bango ezali malamu te mpe zemi emonani ete ezali na likámá mpo na bango. Minganga bazali lelo na makoki ya kotala na kati na libumu ya mama mpo na komona soki mwana azali malamu to azali malamu te, soki akozala mobali to mpe mwasi. Bazemi mingi ezali kobomama bobele mpo monganga akanisi ete mwana yango akozala malamu te. Epai mosusu, basi oyo balekisi mibu 40, mosusu na kati na bango bazali kobanga ete bakobota mwana oyo asalemi malamu te.

Na mikili ya bobóla, basi mingi oyo bayebi te myango ya kokanga kobota bazali komona ete likoki ezali te ya kobakisa mwana mosusu mpamba te mosolo mozali te mpo na kobokola ye. Basusu mingi balingi kosalela bonsomi na bango na koleka mpenza, kino kosopa zemi mpo ete eyei na ntango moko mabe mpo na bango, to nsima na koyoka ete mwana yango akozala, na ndakisa mwasi, baboyi kobota ye.

Bomoi ebandaka ntango nini? Mbala mingi ezalaka zongazonga na motuna oyo nde matata mazali kobima. Pene bato nyonso bandimi ete likei ya mwasi oyo ekutani na mboto ya mobali ezali cellule ya bomoi: Kasi ntembe ezali nde likoló na motuna oyo: yango ezali bobele cellule to ezali nde moto mobimba? Mbuma ya nzeté ezali nzeté mobimba? Bobele bongo, mwana oyo azali kosalema na libumu ya mama, azali moto? Azali na lotómo? Kowelana na maloba likoló na likambo oyo ezali na nsuka te. Likambo ya kokamwa, na lopitalo bobele moko minganga bakosala nyonso mpo na kobikisa bomoi ya mwana ya matshombe, nzokande epai mosusu bakoboma mwana ya basanza ndenge moko oyo azali naino na libumu ya mama. Mobeko epesi bango nzela ya koboma bébé kati na libumu ya mama na ye, nzokande ekotalelama lokola ete babomi moto mobimba soki basali yango na bébé oyo asili kobotama.

Baoyo baleki kokotela likambo yango ya kosopa zemi ezali basi oyo “basikwami,” oyo bayebi myango ya kokanga kobota. Bazali kotya makelele mingi mpo na komonisa ete bazali na lotómo ya kotalela nzoto na bango ete ezali mpo na bango moko, nzokande bazali kosalela na bonsomi nyonso biboteli na bango. Na solo, eloko bazali koluka, ezali oyo ete bapesamela lotómo ya kosopa zemi. “Ezali nzoto na ngai!” ezali bango koloba mpo na komilóngisa. Kasi ezali solo nzoto na bango?

Mama: “Ezali nzoto na ngai!”

Mwana: “Te! Ezali nzoto na ngai!”

Kati na mokanda Guide de l’avortement (na Lingelesi) totangi boye ete, na poso 12 ya ebandeli ya zemi, “mwa liboke yango ya cellules ya petepete ezali mpasi te mpo na kolongola yango.” Tokoki kotalela kolongola zemi bobele lokola “mwa liboke moko ya misuni” to “kobebisama ya mbuma ezwami na makoki ya kobota”? Maloba oyo ya bolembu masalelami mpo na kolembisa solo mpe kokitisa mitema na masosoli matungisami, boye te?

Liboke oyo ya misuni to ba cellules balingi kobwaka ezali nde moto mobimba oyo azali kokóla, apesameli ba chromosomes na ye moko. Kati na biloko yango chromosomes, esili kokomama motindo na makoki na bomoi to na bizaleli oyo moto akozala na yango, mpe azali na moto mosusu te oyo akokani na ye na makambo nyonso. A. W. Liley, oyo ayekolaki mingi makambo matali zemi alimboli ete: “Na maye matali bomoi, tokoki koloba ata mokolo moko te ete mwana kati na libumu na mama azali bobele lokola appendice. Mama mpe bébé bazali bato mibale bakeseni mpenza uta mokolo mama azwi zemi.”

Etamboli elongobani te

Nzokande, lokola kosopa zemi ezali lisusu mpasi te, mingi bazali komona ntina mpenza te ya kosalela myango ya kopengola zemi oyo balingi yango te. Soki bamoni ete bakangami na zemi lokola na “likámá,” bakoluka se nzela ya kosopa yango.

Mituya mimonisi ete mbula ya bokóló esili kokita na nse mingi na ekeke oyo ya ntuku mibale. Bilenge basi bakoki bongo kozwa zemi na bolenge mpenza koleka ntango ya kala. Bazali koteya bango mpo bayeba ete ezali mokumba monene? Mituya mimonisi ete na Amérique, mingimingi bilenge na mibu 16 basili koyeba mobali to basili koyeba mwasi, mpe elenge moko na kati na bilenge 5 ayebi mobali to ayebi mwasi liboso ya kokokisa mibu 13. Ndambo moko kati na ndambo misato na babalani bazali na makango to bazalaki na makango. Epai mosusu, basi oyo bazali kotambola na mibali mingi bazali ntango nyonso liboso na likámá ya kosopa zemi. Na mikili misusu bato bazali kosenga ete basi ya ndumba bandimama engebene mibeko ya mboka, mpo na kotelemela bopalangani ya maladi oyo SIDA; bobele bongo bazali kosenga ete kosopa zemi endimama engebene mibeko ya mboka mpo ete makámá mazala lisusu mingi te, mpe ekoki kozala boye solo, nzokande kosala ndenge yango ebebisi mpenza bizaleli ya bato.

Bazwi mpasi mpo na kobebisama to mpo na makambo mosusu?

Bolukiluki emonisi ete zemi ezwami nsima na kobebisama to viol ezalaka mingi te. Na mboka Minneapolis (États-Unis), na kati na basi 3 500 oyo babebisamaki na mibali, ata mwasi moko te azwaki zemi mpo na yango. Na kati ya basi 86 000 oyo basopaki zemi na ex-Tchécoslovaquie, bobele 22 nde bazwaki zemi nsima na kobebisama na mobali. Na yango, kati na basi oyo bazali koluka kosopa zemi, bobele moke mpenza bazwaki zemi nsima na kobebisama na mobali.

Tokoloba boni mpo na makambo ya kobangisa oyo minganga bazali kosakola na ntina na mbeba to bokono mabe oyo ekoki kozala na bana oyo bakobotama? Ata bazali na bilembeteli makasi te, minganga misusu bazali koloba na mwasi ete abimisa zemi mpo ete mwana yango akozala malamu te. Kasi bazalaka na elónga ntango nyonso? Baboti mingi bazali wana mpo na kotatola ete kosakola wana ya minganga ezalaka ntango nyonso solo te, mpe bakoki kolakisa bana na bango bazali na esengo mpe na nzoto malamu, nzokande minganga basakolaki ete bakozala malamu te. Basusu, atako solo bana na bango bazali na elembo mabe na nzoto to handicapé, nde ata bongo bazali kosepela na bango. Na yango, epai ya basi ba Américaines oyo bazali koluka kosopa zemi, bobele mwasi 1 kati na basi 100 nde azali koluka kosala bongo mpo azali kobanga ete mwana akozala malamu te.

Atako boni, wana ezalaki yo kotanga lisoló oyo, nkáma mingi ya bana oyo mbele basengelaki kobotama, bauti koboma bango. Epai wapi? Na nini yango esimbi bomoi ya bato oyo batalelami na likambo yango?