Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ—Likama ezali se koya monene

Bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ—Likama ezali se koya monene

Bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ​—Likama ezali se koya monene

EKÓMI NTANGO YA KOLALA ya libota moko na Amerika ya sudi. Mama azipi mwana na ye malamu na boboto mpenza mpe atombeli ye mpɔngi malamu. Kasi na molili, nsili ya mbeto (triatome) moko ya moindo oyo ezali molai santimɛtrɛ soki misato ebimi na mwa lidusu moko na plafɔ mpe ekwei na mbeto esika mwana alali. Ekweli ye na elongi, kasi lokola alali, ayoki ata eloko te ntango eswi ye na nzoto na ye ya pɛtɛpɛtɛ. Ntango ezali komɛla mwana makila, etiki mpe nyei oyo ezali na mikrobe na nzoto na ye. Mwana alamuki te, kasi amikwanzi na elongi, mpe nyei yango oyo ezali na mikrobe ekɔti na mpota.

Koswa oyo nsili wana ya mbeto eswi mwana na butu ekoki mpo na kopesa ye maladi ya Chagas. Pɔsɔ moko to mibale na nsima, mwana asali fiɛvrɛ makasi mpe nzoto na ye evimbi. Ata soki mwana yango akufi te, mikrobe wana ekoki kotikala na nzoto na ye, kokɔta na motema, na bɔɔngo mpe na binama mosusu ya kati. Ekoki kosala mbula 10 to 20 liboso ete bilembo ya maladi yango ebanda komonana. Na ntango wana nde mwa bampota ekoki kobima mwana na mongongo, na likundu (estomac) mpe na misɔpɔ, mikrobe ekoki kopesa ye maladi na bɔɔngo, mpe nsukansuka akoki kokangama motema mpe kokufa.

Lisolo yango, oyo ezali ya solo te, emonisi ndenge moto akoki kozwa maladi ya Chagas. Na Amerika ya sudi, bamilio ya bato bakoki kokufa soki nyama-nkɛkɛ wana eswi bango.

Baninga ya moto

Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Fiɛvrɛ mingi ya makasi oyo bato bayokaka eutaka na mikrobe oyo nyama-nkɛkɛ epesaki bango.” Mbala mingi basalelaka liloba “nyama-nkɛkɛ” kaka te mpo na kolobela nyama-nkɛkɛ mpenzampenza, oyo ezalaka na makolo motoba, na ndakisa nzinzi, nsili, ngungi, mpe lingangalá (coléoptère), kasi mpe oyo ya makolo mwambe, na ndakisa nsɛlɛlɛ mpe nsili ya mbwa (tiques). Bato ya siansi batyaka mwa banyama yango ya mikemike nyonso na molɔngɔ ya arthropodes, mwa banyama yango nde eleki mitindo mosusu nyonso ya nyama na mokili, mpamba te ezali mitindo pene na milio moko.

Nyama-nkɛkɛ mingi esalaka moto mabe te; kutu mosusu ezali mpenza na ntina. Soki yango te, mbɛlɛ milona mpe nzete mingi oyo epesaka bato mpe nyama biloko ya kolya ezwaka te putulu ya fololo oyo ebotisaka mbuma. Nyama-nkɛkɛ mosusu esalisaka mpe ndenge elyaka salite. Nyama-nkɛkɛ mingi elyaka bobele milona, kasi mosusu elyaka nyama-nkɛkɛ mosusu.

Na ntembe te, nyama-nkɛkɛ mosusu etungisaka bato mpe nyama ntango eswaka bango, to mpe ntango ekɔtelaka bango. Nyama-nkɛkɛ mosusu ebebisaka milona. Kasi oyo eleki mabe ezali oyo epesaka bato maladi oyo ekoki komema na liwa. Duane Gubler, oyo asalaka na ebongiseli moko ya koluka bamaladi na Amerika (Centre américain d’épidémiologie) alobi ete: “Kobanda na ekeke ya 17 tii na ebandeli ya ekeke ya 20, [nyama-nkɛkɛ] epesaki bato maladi mingi mpe ebomisaki bato mingi koleka makambo mosusu nyonso.”

Lelo oyo, moto 1 kati na bato 6 azali kobɛla maladi oyo nyama-nkɛkɛ epesi ye. Longolá mpasi oyo bato bamonaka mpo na bamaladi yango, esɛngaka mpe mbongo mingi mpo na yango, mingi mpenza na mikili ya bobola epai bato bazalaka na mbongo mingi te. Soki maladi ata moko oyo euti na nyama–nkɛkɛ ekɔteli mboka moko, ekosɛnga mbongo mingi ebima. Balobaka ete, mpo na maladi moko ya ndenge wana oyo ebimaki na wɛsti ya Inde na 1994, ekólo yango ná bikólo mosusu ya mokili mobima ebimisaki bamiliare ya badolare. Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete bikólo oyo eleki bobola na mokili mobimba ekokóma na bozwi te soki esilisi naino te mikakatano wana ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto.

Ndenge nyama-nkɛkɛ ememelaka biso maladi

Nyama-nkɛkɛ ememelaka biso maladi na ndenge mibale ya minene. Ya liboso, ekoki komema mikrobe oyo epesaka maladi na nzoto na yango. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: Kaka ndenge tomemaka salite na kati ya ndako na sapato na biso, ndenge moko mpe “nzinzi ekoki komema na makolo na yango ebele ya mikrobe oyo, soki eleki ebele, ekoki kopesa maladi.” Na ndakisa, nzinzi ekoki kozwa mikrobe ntango emateli nyɛi mpe na nsima ekoya kotika mikrobe yango ntango emateli biloko na biso ya kolya, mai to masanga. Ezali ndenge wana nde bato bazwaka bamaladi oyo elɛmbisaka mingi mpe ebomaka, na ndakisa pulupulu, typhoïde, ata mpe choléra. Nzinzi mpe epalanganisaka mingi maladi babengi trachome, maladi ya libosoliboso oyo ebomaka miso ya bato ebele na mokili mobimba. Maladi yango ekoki koboma miso mpamba te ezokisaka cornée, eteni ya pɛtɛpɛtɛ ya liso oyo ezalaka liboso ya eteni babengi iris. Na mokili mobimba, bato soki milio 500 babɛlaka maladi yango.

Balobaka mpe ete mpɛsɛ, oyo elingaka bisika ya salite, ememelaka mpe bato bamaladi. Minganga bazali koloba mpe ete soki lelo bato mingi bakómi kobɛla asthme, mingi mpenza bana mike, ezali mpo na mpɛsɛ. Na ndakisa, kanisá Ashley, mwana mwasi ya mbula 15 oyo asalaki mikolo mingi azali kopema malamu te na butu mpo azalaki kobɛla asthme. Ntango monganga alingaki kotya ye aparɛi na ntolo mpo na koyoka ndenge azali kopema, mpɛsɛ moko ebimi na simisi ya Ashley mpe ekimi mbangu na mesa ya monganga.

Ememaka maladi na kati ya nzoto na yango

Ezali na lolenge ya mibale oyo nyama-nkɛkɛ epesaka maladi. Soki nyama-nkɛkɛ ezali na virisi, bakteri to mikrobe mosusu na kati ya nzoto na yango, ekoki kopesa moto maladi ntango eswi ye to mpe na lolenge mosusu. Nyama-nkɛkɛ oyo epesaka bato maladi na lolenge wana ezali mingi te. Na ndakisa, atako mitindo ya ngungi ezali mingi, bobele ngungi oyo babengi anophèle nde epesaka malaria, maladi oyo eleki koboma bato na mokili mobimba nsima ya maladi ya ntolo (tuberculose).

Atako bongo, mitindo mosusu ya ngungi epesaka mpe bamaladi ndenge na ndenge. OMS elobi ete: “Na nyama-nkɛkɛ nyonso oyo epesaka maladi, oyo eleki mabe ezali nde ngungi, mpamba te yango epesaka malaria, dengue mpe fièvre jaune, bamaladi oyo ebomaka bamilio ya bato mpe bamilio ya bato bazali kobɛla yango mbula na mbula.” Na mokili mobimba, bato koleka 4 kati na bato 10 bazali na likama ya kobɛla malaria mpe bato soki 4 kati na bato 10 bazali na likama ya kobɛla dengue. Na bisika mingi, moto akoki kobɛla maladi yango nyonso mibale mbala moko.

Kasi, ezali kaka ngungi te nde ememaka maladi na kati ya nzoto na yango. Etuná (mouche tsé-tsé) ememaka mikrobe oyo epesaka maladi ya mpɔngi, maladi oyo bankóto ya bato babɛlaka yango mpe etindaka bango básundola mabelé na bango oyo ebimisaka milona malamu. Bato ya Afrika pene na 400 000 bakufá miso mpo nzinzi moko ya moindo (simulie) epesaki bango mikrobe ya maladi ya cecité des rivières, oyo ebomaki bango miso. Nzinzi mosusu oyo babengi phlébotome ememaka mikrobe oyo epesaka maladi babengi leishmaniose, oyo ebebisaka bato binama mosusu ya nzoto, ekataka bato binama, mpe mbala mingi ebomaka. Lelo oyo na mokili mobimba, bamilio ya bato, bilenge mpe mikóló, bazali kozwa maladi yango. Ntango mosusu nsili ya zamba, oyo ezalaka bisika nyonso, ezalaka na ténias to mpe na mikrobe oyo epesaka bamaladi lokola encéphalite, tularémie mpe peste bubonique, oyo mbala mingi ekendaka nzela moko na peste noire, oyo na mbula motoba mpamba ebomaki pene na ndambo ya misato ya bato ya Mpoto na eleko ya Moyen Âge.

Nsili, nsɛlɛlɛ (mites) mpe nsili ya mbwa ekoki kopesa mitindo ndenge na ndenge ya maladi babengi typhus, mpe bamaladi mosusu oyo eutaka na mikrobe. Na mikili ya malili makasi, nsili ya mbwa epesaka maladi babengi Lyme, oyo ebebisaka moto binama mosusu ya nzoto. Na bamaladi nyonso oyo nyama-nkɛkɛ epesaka, bato mingi ya États-Unis mpe ya Mpoto babɛlaka nde Lyme. Ntango bayekolaki likambo yango na Suède, bamonaki ete bandɛkɛ oyo esalaka mibembo ya mosika eutaka na nsili ya mbwa mosika, na bankóto ya bakilomɛtrɛ; yango nde ekɔtisaka mikrobe mosusu ya sika na bamboka oyo yango ezalaki liboso te. Buku moko (Britannica) elobi ete: “Nsili ya mbwa nde epesaka bato bamaladi mingi koleka nyama-nkɛkɛ nyonso mosusu (longola kaka ngungi).” Nsili moko ya mbwa ekoki komema na mbala moko mitindo misato ya mikrobe mpe kopesa moto mikrobe yango soki eswi ye mbala moko kaka!

Eleko ya “bopemi”

Ezalaki bobele na 1877 nde bato ya siansi bayebaki ete nyama-nkɛkɛ epesaka bato maladi. Kobanda wana, basalelaki bankisi mpe mayele ndenge na ndenge mpo na kopekisa yango konyokola bato to koboma yango. Na 1939, DDT, nkisi moko ya makasi mpo na koboma nyama-nkɛkɛ, ebimaki. Na 1960, bazalaki kotalela lisusu te bamaladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka ete ezali likama mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato, longola kaka na Afrika. Likambo ya liboso ezalaki lisusu te ya koluka kosilisa nyama-nkɛkɛ oyo ezalaki komema bamaladi, kasi ya kosalisa nokinoki makama oyo yango ekokaki kobimisa. Koyekola bomoi ya nyama mpe bisika oyo yango efandaka ezalaki lisusu na ntina mingi te. Ntango bankisi ya sika ezwamaki, bato ya siansi bakanisaki ete siansi ezalaki na likoki ya kozwa “nsuka na nkisi” mpo na kosilisa bamaladi nyonso. Mokili mobimba ekɔtaki na eleko ya “bopemi.” Kasi bopemi yango eumelaki te. Lisolo oyo elandi ekoyebisa mpo na nini.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

Lelo oyo, moto 1 kati na bato 6 azali kobɛla maladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka

[Elilingi na lokasa 3]

Nsili ya mbeto (Triatome)

[Elilingi na lokasa 4]

Nzinzi ememaka mikrobe na makolo na yango

[Bililingi na lokasa 5]

Nyama-nkɛkɛ mingi ememaka maladi na kati ya nzoto na yango

Nzinzi (simulie) epesaka mikrobe ya maladi ya cecité des rivières

Ngungi epesaka malaria, dengue mpe fièvre jaune

Nsili ekoki kopesa typhus

Nsili ya zamba epesaka encéphalite mpe bamaladi mosusu

Bituná epesaka maladi ya mpɔngi

[Eutelo ya bafɔtɔs]

WHO/TDR/LSTM

CDC/James D. Gathany

CDC/Dr. Dennis D. Juranek

CDC/Janice Carr

WHO/TDR/Fisher

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Clemson University - USDA Cooperative Extension Slide Series, www.insectimages.org