Mai ezali na ntina mingi mpo na bomoi
Mai ezali na ntina mingi mpo na bomoi
NTANGO asololaki na mwasi Mosamalia oyo azalaki kotoka mai na libulu, Yesu alobelaki liziba ya mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko. (Yoane 4:14) Atako mai oyo ye alobelaki ezalaki ya elilingi, mai ya solosolo ezali eloko ya mibale oyo esimbi bomoi, nsima ya oxygène. Moto akoki kosala bapɔsɔ mingi kozanga kolya, akokufa te; kasi soki azali komɛla mai te, akosala kaka mikolo soki mitano mpamba mpe akufi!
Na nzoto na biso mobimba, eloko eleki mingi ezali nde mai (75%). Na ndakisa, bɔɔngɔ ezali na mai mingi (75 tii 85%), misuni ya nzoto ezali mpe na mai mingi (70%). Longola yango, mai esalisaka mpo na konika biloko oyo tolyaka, kolekisa yango kati na nzoto, mpamba te mai nde ememaka yango mpo ekende koleisa baselile. Mai elongolaka pwazɔ mpe bosɔto mosusu na nzoto, esalisaka mpo matonga ya nzoto mpe misɔpɔ ekauka te, mpe esalaka ete mɔtɔ ya nzoto emata mingi te, ekita mpe mingi te. Kasi, oyebaka mpe ete soki ozali komɛla mai mingi, okoki koya monene mingi te?
Soki olingi koya monene mingi te, mɛlaká mai mingi
Ya liboso, mai ezalaka na kalori te, ezalaka na mafuta te, ezalaka na cholestérol te, mpe ezalaka na mungwa mingi te. Ya mibale, mai esilisaka mposa ya kolya. Ya misato, mai epesaka nzoto likoki ya kolongola mafuta ya nzoto. Ndenge nini? Soki bangɛi (reins) ezali na mai mingi te, ekoki kosala mosala na yango malamu te. Libale (foie) ekosalisa bangɛi na mosala na yango, kasi ekokoka lisusu mpenza te kolongola mafuta
ya nzoto. Ezali ndenge wana nde mafuta etondanaka na nzoto, mpe moto akokóma monene mingi. Yango wana, monganga Donald Robertson, ya ebongiseli moko na Arizona, na États-Unis (Centre d’étude de l’obésité et de la nutrition de Scottsdale), alobi ete: “Komɛla mai mingi ezali mpenza malamu mpo na moto oyo alingi koya monene mingi te. Soki bato oyo balingaka koya minene mingi te bazali komɛla mai mingi te, nzoto na bango ekokoka te kolongola mpenza mafuta.”Ezali solo ete mai mingi na nzoto eyeisaka monene. Bato mingi oyo bayaka minene mpo nzoto na bango ebombaka mai bakanisaka ete soki bamɛli mai mingi te bákoya mpe minene mingi te. Nzokande ezali bongo te. Soki nzoto ezali na mai mingi te, ekómaka kolandela mwa litangá nyonso oyo ezali kati na nzoto mpe kobomba yango na bisika lokola makolo, mabɔkɔ mpe matonga ya makolo. Yango wana, minganga oyo bayekolaka makambo etali biloko ya kolya batindaka ete tómɛlaka mai mingi mpo nzoto na biso ezali na mposa na yango. Kobosana mpe te ete soki olyaka mungwa mingi, nzoto na yo mpe ekozala na mposa ya mai mingi mpo na kosilisa makasi ya mungwa.
Mpo nzoto na yo ezanga mai te, mɛláká mai mingi
Mokolo na mokolo, tobimisaka soki litre mibale ya mai na mitoki, ntango topemaka, na nyei mpe masuba. Tobimisaka pene na ndambo ya litre ya mai mikolo nyonso kaka na pema. Soki tozongisi mai wana te, nzoto na biso ekozanga mai. Talá mwa bilembo oyo emonisaka ete nzoto ezali na mai mingi te: motó mpasi, kolɛmba, nzoto mpasimpasi, masuba ya motane, koyoka molunge mingi, mbɛbu ná miso ezali kokauka.
Kasi, tosengeli komɛla bakɔpɔ boni ya mai na mokolo moko? Monganga Howard Flaks, oyo asalisaka maladi ya koya monene mingi, alobi boye: “Moto oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ asengeli mpenzampenza komɛla bakɔpɔ ya mai mwambe to zomi na mokolo moko. Soki osalaka ngalasisi mingi to soki ofandaka na mikili ya moi makasi, osengeli komɛla mai mingi koleka wana. Mpe bato oyo bazali minene mingi basengeli kobakisa kɔpɔ moko ya mai mbala nyonso oyo babakisi kilo zomi ya nzoto.” Kasi, bato mosusu balobaka ete esengeli komɛla mai mingi kaka ntango oyoki mposa makasi ya mai. Nzokande, babosanaka ete soki oyoki mposa makasi ya mai, ekoki kozala ete nzoto na yo ezali lisusu na mai mingi te.
Masanga to biloko mosusu ya komɛla ekoki nde kozwa esika ya mai? Atako mai ya mbuma to mai ya ndunda ezali malamu, kasi ezalaka na kalori. Masanga ya sukali makasi mpe miliki ebakisaka mposa ya mai, mpamba te esɛngaka nzoto ezala na mai mingi mpo na kolekisa yango na nzoto mobimba. Masanga ya makasi mpe kafe to ti etindaka moto na kosuba mingi, yango wana esɛngaka komɛla mai mingi mpo na kozongisa mai oyo ebimi na masuba. Tomoni ete ezali na eloko ata moko te oyo ekoki kozwa esika ya mai. Na yango, mpo na nini te komɛla kɔpɔ moko ya mai sikoyo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 17]
Toli mpo na komɛla mai mingi
● Zaláká na molangi na yo ya mai penepene.
● Mɛláká kɔpɔ ya mai mbala nyonso oyo ozali kolya.
● Mɛláká mai liboso ya kosala ngalasisi, ntango ozali kosala yango mpe nsima na yango.
● Ntango opemi moke na mosala, mɛláká mai na esika ya komɛla kafe.
● Soki mai ezali koyokana mungwamungwa na monɔkɔ, tyá ndimo ngayi (citron) to mpe lekisá yango na filtre.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]
Fɔtɔ: www.comstock.com