Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo ekobonga mokolo mosusu?

Makambo ekobonga mokolo mosusu?

Makambo ekobonga mokolo mosusu?

NA MIKOLO OYO, Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpe bibongiseli mosusu oyo etalelaka makambo ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, esili kozwa bibongiseli mpo na kosalisa bamaladi mosusu to kopekisa yango epalangana. Masangá ndenge na ndenge ezali koyebisa bato makambo etali bamaladi yango mpe ezali kopesa mabɔkɔ na koluka bankisi ya sika mpe mayele ya sika mpo na kosilisa bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ, likama oyo ezali se kokóma monene. Moto mokomoko to mboka mobimba bazali na mokumba ya koyeba makambo etali bamaladi yango mpe komibatela na yango. Kasi, komibatela ezali likambo mosusu, kopekisa maladi ete epalangana na mokili mobimba ezali mpe likambo mosusu.

Bato mingi ya mayele bakanisi ete mpo na kolonga na likambo yango, esengeli bikólo nyonso ya mokili esala na bomoko mpe etyelana motema. Na buku na ye (Le fléau à venir: de nouvelles maladies dans un monde déséquilibré, na Lingelesi), Laurie Garrett, mopanzi-nsango oyo azwaki libonza babengi prix Pulitzer, akomaki boye: “Ndenge mokili mobimba ezali kokóma nokinoki kaka lokola mboka moko, ezali kosɛnga ete bato na bisika nyonso ya mabelé básuka kaka te komona zingazinga na bango, etúká na bango, ekólo na bango, to mboka na bango.” Abakisi boye: “Mikrobe mpe nyama-nkɛkɛ oyo ememaka mikrobe eyebi te bandelo ya bikólo oyo bato batya.” Soki maladi ekɔteli ekólo moko, likambo yango ekotungisa mbala moko kaka bikólo ya zingazinga te, kasi mpe mokili mobimba.

Baguvɛrnema mosusu mpe bato mosusu balingaka te ete bikólo mosusu, ata bibongiseli oyo esalisaka bamaladi, bákɔta na makambo ya ekólo na bango. Lisusu, ntango bakonzi ya politiki bazali kotalela te mikakatano oyo ekoki kobima nsima mpe mpo na lokoso ya bato ya mombongo, yango elembisaka mbala mingi milende oyo bikólo mingi esalaka. Na etumba oyo bato bazali kobundisa maladi, tokoki nde kozala na elikya ete bakolonga? Eugene Linden, akanisi ete bakolonga, alobi boye: “Etikali lisusu ntango mingi te.”

Ntina oyo tokoki kozala na elikya

Mayele ya siansi mpe ya tekiniki oyo ekoli mingi, ezali kolonga te kosilisa bamaladi oyo ezali se kobakisama. Mpe, ntembe ezali te ete bamaladi oyo nyama-nkɛkɛ elekisaka epai na bato ezali bobele moko ya mikakatano oyo ezali kotya bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato na likama. Atako bongo, tozali na ntina ya kozala na elikya. Atako bato ya siansi babandi nde sikoyo koyeba boyokani oyo ezali kati na bikelamu ya bomoi, bayebi ete mabelé ezali na likoki ya kozonga lisusu ndenge ezalaki liboso, soki babebisi yango. Mabelé oyo tofandi esalemá na likoki ya komibongisa yango moko. Na ndakisa, mbala mingi zamba ekolaka lisusu soki bakati yango; mpe boyokani kati na mikrobe, nyama-nkɛkɛ mpe banyama ezongaka lisusu ndenge ezalaki liboso soki babebisaki yango.

Likambo oyo eleki ntina ezali ete ndenge mokili esalemá emonisi ete ezali na Mozalisi, elingi koloba Nzambe, oyo banda ebandeli atyaki makambo nyonso ya mabelé na molɔngɔ. Bato mingi ya siansi bandimaka ete moto moko oyo aleki na mayele asengeli kozala, oyo asalaki biloko nyonso oyo ezali na mabelé. Bato oyo bakanisaka malamu bakoki komonisa te ete Nzambe azali te. Biblia emonisi ete Mozalisi, Yehova Nzambe, azali mozwi-ya-nguya-nyonso, atondi na bolingo mpe alingaka mpenza bolamu na biso.

Biblia elimboli mpe ete lokola mobali mpe mwasi ya liboso basalaki lisumu na nko, bato nyonso bazwaki ezaleli ya kozanga kokoka, maladi, mpe liwa. Kasi yango elingi nde koloba ete tosengeli konyokwama mpo na libela? Te! Mokano ya Nzambe ezali ya kokómisa mabelé paladiso, epai bato bakoki kozala na bomoi ya malamu elongo na bikelamu mosusu, ezala ya minene to ya mike. Biblia elaki mokili oyo, ata ekelamu moko te, ezala ya monene to ya moke, ekosala moto mabe.​—Yisaya 11:6-9.

Na ntembe te, mpo ete makambo wana nyonso ezala, bato bakozala mpe na mokumba ya kokokisa​—ezala boyokani kati na bango to kobatela zamba, mai ná mopɛpɛ. Nzambe apesaki moto mokumba ya “kobatela” mabelé. (Genese 2:15) Na paladiso oyo ekoya, moto akokokisa mokumba wana na ndenge ya kokoka mpo akolanda malako oyo ekouta epai ya Mozalisi ye moko. Yango wana, tokoki kozela na elikya nyonso mokolo oyo “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”​—Yisaya 33:24.