Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Mosala ezali kokende liboso?

Zulunalo moko (Vancouver Sun) ekomaki ete: “Lelo oyo, moto 1 kati na bato 4 ya Canada asalaka ngonga koleka 50 na pɔsɔ, nzokande eleki sikoyo mbula 10 bobele moto 1 kati na bato 10 nde azalaki kosala ndenge wana.” Na ankɛtɛ moko oyo Leta asalaki epai ya bato ya mosala ya Canada 31 500 “katikati ya bato oyo batunaki balobaki ete bakabelaki bapatrɔ na bango ngonga 27 na sanza, na misala oyo bazalaki kotikala kosala nsima ya ngonga ya mosala, na ndako to na mokolo ya pɔsɔ to ya eyenga.” Eloko oyo ezalaki kotinda bango na kosala misala yango ezali mayele ya tekiniki. Zulunalo yango elobi ete “Ankɛtɛ yango emonisi ete ngonga pene na nyonso oyo bato yango basalaki na ndako nsima ya ngonga ya mosala, oyo efutamaki te . . . ezali mosala oyo esalemaki ‘na ordinatɛrɛ.’” Na yango, na esika ete bato básalaka mosala mikolo minei na pɔsɔ mpe mikolo oyo etikali bápema mpe báminanola, “mayele ya tekiniki ekómi likambo ya liboso oyo ezali kobakisa motungisi ya mosala, kobɛlisa basali, kolɛmbisa bango, kotinda bango na kozangisa mosala, mpe ezali kobimisa makambo mosusu nyonso oyo ezongisaka mosala nsima.” Zulunalo yango ebakisi boye: “Bato mingi oyo batunaki bango bandimi ete mayele ya tekiniki ebakisi mposa na bango ya mosala mpe epesi bango nzela básala lisusu mingi. Kasi ata moto moko te alobaki ete mayele yango ya tekiniki esalisi bango na kosala moke to na kokitisa motungisi ya mosala.”

Bingumba etondi na bosoto

Ebongiseli moko (Mercer Human Resource Consulting Society) ebimisaki lapolo ya ankɛtɛ moko na Londres, mpe zulunalo moko (El Unvirsal) ya engumba-mokonzi ya Mexique ekomaki yango boye: “Mexico, Caracas, Bogotá mpe La Havane ezali kati na bingumba oyo eleki bosoto na bingumba nyonso ya mokili mobimba.” Ankɛtɛ yango, oyo etalelaki mikakatano oyo bosoto ya bingumba ebimisaka na mokili mobimba, etalelaki mpe mopɛpɛ soki ezali pɛto to te, ndenge balongolaka bosoto, mobulu, ndako ya kolala, kelasi, transport mpe misala ya Leta. Na Mpoto, Zurich (Suise) mpe Vienne (Autriche) ezali bingumba oyo bomoi ezalaka mpenza malamu. Calgary (Canada) mpe Honolulu (Hawaii, États Unis) ezali bingumba oyo eleki pɛto na mokili mobimba. Ankɛtɛ yango emonisi ete engumba San Juan, na Porto Rico, ezali mboka oyo bato bazali na bomoi ya malamu koleka na Amerika Latine mobimba.

Mikakatano oyo koboma libala ebimisaka

Nsima ya kotalela balapolo koleka 100, oyo esalemaki na boumeli ya bambula koleka 20, Rebecca O’Neill, mokambi ya makambo etali libota na Institut Civitas, alobi ete “baboti mpe bana mingi bamonaka ete ‘libota oyo ezangi tata’ ezalaka na bobola, na mawa, bazalaka nzoto bokɔlɔngɔnɔ te, makambo oyo bakanaka kosala ebebaka, mpe ezalaka makasi te.” Zulunalo moko (Sunday Telegraph) ya Londres ekomi ete Rebecca O’Neill alobi ete, bana oyo baboti na bango babomi libala, “bazalaki na likama mbala 50 ya kobɛlabɛla, mbala mibale ya kokima ndako mpe mbala mitano ya konyokwama.” Zulunalo yango ebakisi boye: “Bana oyo bazali kobokwama na tata na bango te, bazali mpe na likama mbala misato ya kozala na mokakatano ya kofanda malamu na bato mpe ya komona mpasi na eteyelo. Baoyo bazali bilenge, bazali na likama mbala mibale ya komipesa na masanga, komɛla likaya, komɛla bangi, . . . kosala mobulu, kosala kindumba to kobota wana bazali naino mike.” Lapolo yango emonisi ete ata na bisika oyo baboti bazalaki mpenza babola mpe bazalaki komona mpasi koleka kutu baboti oyo babokolaka bana bango moko, bana bazalaki mpenza te kosala makambo ya ndenge wana.

Komiboma: ntina ya liboso ya liwa ya mabe koleka

Zulunalo moko (Independent) ya Londres ekomaki boye: “Komiboma ezali ntina ya liboso ya liwa ya mabe koleka na mokili mobimba.” Lisolo yango oyo eutaki na lapolo ya Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto, ebakisi ete bato milio 1,6 bakufaki liwa ya mabe koleka na mobu 2000. Na mobu yango, bato 815 000 bamibomaki, nzokande bato 520 000 babomaki bango, mpe bato 310 000 bakufaki na bitumba mpe matata. Zulunalo yango elobi ete na bato yango oyo bakufaki na mobu 2000, mingi “bakufaki na mikili ya bobola, kasi bobele mwa ndambo (10%) nde bakufaki na mikili ya bozwi.” Ezali na Belarus, na Estonie mpe na Lituanie nde bato bamibomaki mingi, mbala minei koleka na Grande-Bretagne. Na Afrika mpe na Amerika ya Nordi mpe ya Sudi, bato oyo babomaki bango bazalaki mingi, koleka mbala mibale baoyo bamibomaki, nzokande na Australie, na Mpoto mpe na Extrême-Orient, bato oyo bakufaki, mingi na bango bamibomaki.

Bana oyo balalaka mingi te

Zulunalo moko (U.S.News & World Report) elobi ete: Kozanga kolala malamu ebebisaka bokolɔngɔno ya nzoto ya bana. Bana oyo balalaka mingi te bazwaka bapwe mingi te na kelasi mpe bakoki kozala na mokakatano ya kozala na baninga. Zulunalo yango elobi ete: “Bana oyo batikalaka na nyongo ya mpongi, mbala mingi likebi na bango ezalaka moke, mpe baumelaka te koyoka nkanda, bazalaka likoló likoló mpe bakokaka kozela te.” Minganga bazali komitungisa ete, mbala mingi, baboti nde basalaka ete bana bálalaka mingi te. Barbara Braun-McDonald, monganga ya maladi ya motó ya bana apesi toli oyo: “Soki olalisaka bana te liboso ya ngonga ya 23:00, talelá lisusu likambo yango malamu.” Basɛngi baboti bálalisaka bana na bango mpe bálamusaka bango na ngonga oyo batyeli bango, ezala mokolo ya pɔsɔ to ya eyenga, mpo bámesana kolalaka malamu. Toli mosusu: sukoláká bango liboso ya kolala, memáká bango to tángeláká baoyo ya mike lisolo moko, mpe pekisáká bango kotala televizyo to ordinatɛrɛ ngonga moko liboso ya kolala.

“Masano, biloko mikemike ya kolya mpe makila”

Zulunalo moko (IHT Asahi Shimbun) elobi ete esali mwa mikolo, bilenge ya Japon bazali kokende na “bandako mineneminene oyo ezali na bamasini ya kopesa malili, epai bakoki kosala masano ya video, kolya biloko ya mikemike mpe ata kosala bango massage ya makolo kozanga ete báfuta. Kasi mpo bápesa yo nyonso wana, esengeli opesa eloko moko: makila.” Bandako yango ezali bandako ya Croix Rouge ya Japon, esika bato bayaka bango moko kopesa makila oyo bazongisaka bato. Zulunalo yango elobi lisusu boye: “Bato bayaka kopesa makila na esika oyo ezali lokola esika ya fɛti. Bilenge mingi batikalaka nsima ya kopesa makila mpo na kolya mikate, komɛla mai ya mbuma mpe kotala masano ya video. Likambo mosusu oyo ebendaka bilenge: Bato oyo batalaka mabɔkɔ mpo na kosakola makambo, bayaka kuna mbala mingi na pɔsɔ.” Kuna ezali na kelasi mpo na koyekola ndenge ya kopakola langi na mbɛbu, kotya ina, kotya pudre; basalaka Shiatsu (komisalisa na komifináká na misapi na bisika mosusu ya nzoto), babɛtaka miziki, basalaka massage mpe batɛkaka biloko oyo basalelá kala. Lokola bato mingi bazali lisusu kopesa makila te, Croix Rouge ekómi kobongisa bandako na yango bongo na Japon mobimba. Bandako yango, oyo kala bazalaki kotalela yango lokola “bisika ya mawa,” ekómi lelo “bisika oyo ezali kobenda” bilenge oyo bakokisi naino mbula 30 te.

Masuwa ya biyenga ezali kobebisa mai

Zulunalo moko (Sunday Times) ya Londres emileli boye: “Masuwa ya biyenga oyo ezalaka mpenza kitoko oyo ememaka bamilio ya bato mbula na mbula na bisika eleki kitoko na mokili, ezali kotya na likama mbisi mpe nyama ya mbu mpo ezali kotika bosoto na bisika ezali koleka.” Pakebo moko ya kitoko oyo ekoki komema bato pene na 4 000, bakisa mpe bato ya mosala, ebwakaka mokolo na mokolo bankóto ya balitre ya mai ya salite ya kobɛ, ya wc, ya kikɔsɔ mpe ya kosukola bilamba, bakisa mpe balitrɛ 70 ya pwazo mpe tɔni 7 ya bosoto. Bato ya mobembo na mbu babwakaka bosoto mingi koleka ndenge basalaka na mokili. Na mobu 2000, masuwa soki 240 ya biyenga ememaki bato milio 10 oyo bakendeki kotala bisika oyo ezalaka makasi te, lokola na Glacier Bay na Alaska, na bisika oyo babengi récifs coralliens mpe Bisanga ya Antilles, na mabongo ya kalakala ya Méditerranée ata mpe na mbu ya Antarctique. Bakanisi ete bapakebo mosusu soki 50 ekotambola na 2005. Roger Rufe, ye asalaka na ebongiseli moko ya kobatela bambu, alobi boye: “Bato bazali kaka koya mpo na kotambola na masuwa yango, kasi masuwa ezali lokola bingumba oyo ezali kotepa na mai oyo ezali na mibeko te etali ndenge ya kosalela mai ya salite.”

Bililingi ya Pápá ezali kotɛkama lisusu mingi te

Zulunalo moko (Newsweek) oyo ebimaka na monɔkɔ ya Pologne elobi ete na boumeli ya bambula mingi, “koteka biloko ya losambo [na Pologne] ezalaki kopesa mbongo mingi.” Kasi, na mikolo oyo, biloko ya losambo “ezali kotekama lisusu malamu te.” Atako balobelaki mingi na televizyo mpe na radio mobembo ya Pápá na Pologne na 2002, bato basombaki kaka biloko moke ya losambo oyo bamesaná na yango, lokola bashene mpe mayemi. Zulunalo elobi ete: “Bamilio ya bililingi ya Pápá, bikeko ya mobimba, biloko ya mesa, mayemi mpe bikeko ya mikemike nde etondanaki mpo na koteka,” kasi “bato basombaki yango mingi te.” Nzokande, eloko moko esalisaki bato mingi: kalati moko ya plastike oyo ezalaki na “bililingi ya losambo” na ngámbo moko mpe na “mbuma mikemike oyo bapakoli wolo mpe bakɔtisi yango na plastike” na ngámbo mosusu. Zulunalo moko ya Pologne (Wprost) elobi ete bato bawelelaki kosomba “bakalati yango oyo ezali mpe sapɛlɛ ‘oyo ebimi mikolo oyo.’”