Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini ezongaki lisusu?

Mpo na nini ezongaki lisusu?

Mpo na nini ezongaki lisusu?

ELEKI mbula soki 40, bato bakanisaki ete bamaladi oyo eyebani ete nyama-nkɛkɛ nde epesaka yango, na ndakisa malaria, fièvre jaune mpe dengue esilaki libela na bisika mingi na mokili. Kasi likambo oyo bakanisaki te ebimaki: bamaladi yango ezongaki lisusu.

Mpo na nini ezongaki? Moko ya bantina ezali ete nyama-nkɛkɛ mosusu ekufaka lisusu te na bankisi oyo ebomaka nyama-nkɛkɛ mpe mikrobe mosusu oyo yango ememaka na nzoto ekufaka na nkisi ya monganga te. Nkisi esalaka yango lisusu eloko te mpo emesaná na yango to mpo bato basalelaki bankisi yango na ndenge ya mabe. Buku moko (Moustiques, na Lingelesi) elobi ete: “Na mabota mingi ya bobola, bato basombaka nkisi mpe bamɛlaka kaka ndambo mpo na kosilisa mwa mpasi oyo bazali koyoka, mpe babombaka ndambo oyo etikali mpo na mbala ya nsima.” Soki moto abandi komɛla nkisi kasi akati yango, mikrobe oyo eleki makasi ekoki kotikala na nzoto na ye mpe kobota mikrobe mosusu ya sika oyo ekokufa na nkisi yango te.

Molunge ekómi makasi

Moko ya bantina oyo esalaki ete bamaladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka ezonga lisusu ezali ndenge molunge ekómi makasi mpe bomoi ya bato ezali kobongwana. Tólobela naino ndenge molunge ekómi makasi. Bato mosusu ya siansi balobi ete, lokola molunge ekómi makasi na mabelé, nyama-nkɛkɛ oyo epesaka maladi ekoki kokɔta na mikili oyo ezali lelo ya malili. Kutu, makambo mosusu ezali komonisa ete likambo yango ezali kosalema sikoyo. Monganga Paul Epstein, oyo asalaka na Iniversite ya Harvard (Centre de la santé et de l’environnement, faculté de médecine) alobi ete: “Ezala nyama-nkɛkɛ to maladi oyo yango epesaka (na ndakisa malaria to dengue) ezali komonana lelo na mikili ya malili makasi ya Afrika, ya Azia mpe ya Amerika ya sudi.” Na Costa Rica, maladi ya dengue oyo ezalaki komonana kaka na bamboka ya bangombangomba oyo ezali pembenipembeni ya mbu ya Pasifike, ekómi sikoyo na bisika nyonso na ekólo mobimba.

Ndenge mabelé ekómi na molunge makasi ememi mpe mikakatano mosusu. Na bisika mosusu, molunge ezali kokaukisa bibale oyo ezali kotikala kaka mwa maziba, nzokande na bisika mosusu ezali kobɛtisa mbula mingi mpe komema mpela mpe mai oyo etikali nsima ya mpela ezali kotɛlɛma na bisika yango. Ezala mai ya ebale oyo ekauki to oyo etikali nsima na mpela, soki efandi esika moko ntango molai ekómaka esika oyo ngungi ebotanaka. Lisusu, lokola molunge ezali se kokóma makasi, ngungi ekómi kobotana nokinoki, mpe yango ezali kosala ete ngungi ekóma mingi mpe eleko ya kobotana na yango ekóma molai. Molunge ekómisaka ngungi makasi mpe ngungi eyokaka yango na kati ya nzoto, mpe esalaka ete mikrobe ekobotana mingi na nzoto; mpe mpo na yango soki ngungi eswi moto ata mbala moko, ekoki kopesa ye maladi. Kasi ezali kaka yango te nde ezali kobangisa.

Ndenge maladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka ebandaka

Ndenge makambo ezali kobongwana na bomoi ya bato ekoki mpe kozala ntina ya kopalangana ya bamaladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka. Ndenge nini? Tólobela naino mosala oyo nyama-nkɛkɛ esalaka na likambo yango. Mpo na bamaladi mingi, nyama-nkɛkɛ elekisaka yango bobele kolekisa epai ya bato mosusu. Ndɛkɛ to nyama mosusu ekoki mpe komema maladi soki ezali na nyama-nkɛkɛ na nzoto na yango to soki makila na yango ezali na mikrobe ya maladi yango. Soki ezali na yango bongo, ekoki kokóma esika oyo mikrobe yango oyo epesaka maladi ekobanda kobotana.

Tózwa ndakisa ya maladi ya Lyme, oyo bayebaki yango na 1975 mpe bapesá yango nkombo ya engumba epai bamonaki yango mpo na mbala ya liboso (Lyme, na etúká ya Connecticut, na États-Unis). Balobaka ete maladi yango oyo eutaki na bakteri moko, ekɔtaki na Amerika ya nɔrdi eleki sikoyo mbula soki nkama, na bampoko to na bibwɛlɛ oyo eutaki Mpoto. Soki mwa nsili moke ya mbwa, oyo babengi Ixodes, ebendi makila ya nyama oyo ezali na babakteri yango, babakteri yango ekotikala na nzoto ya nsili yango bomoi na yango mobimba. Ntango eswi nyama mosusu to moto, ekotikela moto to nyama yango babakteri yango na makila.

Maladi ya Lyme efandelá mpenza eteni ya nɔrdi-ɛsti ya États-Unis, elingi koloba eumelá mingi na bisika wana. Kuna, mpoko ya makolo ya mpɛmbɛ nde ezali nyama ya liboso oyo ezalaka na mikrobe oyo epesaka maladi ya Lyme. Mpoko yango ezalaka mpe na nsili ya mbwa, mingi mpenza oyo ezali naino kokola. Nsili oyo ekoli esepelaka kofanda na nzoto ya mboloko, epai elyaka mpe ebotanaka. Soki etondi makila, nsili ya mwasi ekokweya na mabelé mpo na kobota maki. Nkusu oyo ebimi na maki ekokóma nsili mosusu.

Ndenge makambo ebongwanaki

Na boumeli ya bambula ebele, mikrobe, nyama-nkɛkɛ mpe banyama mosusu ezalaki na bato esika moko kasi ezalaki kopesa bango maladi te. Kasi, soki makambo ebongwani, yango ekoki kosala ete maladi oyo ezalaki kaka na esika moko ekóma kopanzana na bisika mingi, elingi koloba kozwa bato ebele. Makambo nini ebongwanaki mpo na oyo etali maladi ya Lyme?

Kala, banyama oyo elyaka banyama mosusu ezalaki kolya mboloko mpe nyama yango ezalaki kotondana te, yango esalaki ete nsili ya mbwa oyo ezalaki na nzoto ya mboloko yango ezwaka bato mingi te. Ntango bato ya liboso oyo bautaki Mpoto bakataki zamba mpo na kosala bilanga, mboloko etikalaki lisusu mingi te mpe banyama oyo ezalaki kolya yango ekimaki. Kasi, na boumeli ya bambula ya 1800, bato ya bilanga mingi basundolaki mabelé na bango mpe bakendaki kofanda na ngámbo ya wɛsti; yango wana zamba ekolaki lisusu. Mboloko ezongaki lisusu, kasi banyama oyo ezalaki kolya yango ezongaki te. Yango wana, lokola mboloko ekómaki ebele, nsili ya mbwa mpe ekómaki ebele.

Nsima ya mwa ntango, mikrobe oyo epesaka bato maladi ya Lyme ebimaki. Bambula elekaki ebele liboso ete mikrobe yango ekóma likama mpo na bato. Kasi, ntango bato babandaki kotonga bingumba pembeni ya zamba, ezala bana mike to mikóló mingi bazalaki kokɔta mingi na bisika oyo ezalaki na nsili ya mbwa, yango wana bakómaki kozwa nsili yango mingi. Ezali na lolenge wana nde epesaki bango maladi ya Lyme.

Maladi na mokili oyo ezali kobongwana ntango nyonso

Likambo oyo touti kolimbola ezali bobele lolenge moko kati na balolenge mosusu ebele oyo bato bazwaka bamaladi mpe ezali bobele ndakisa moko oyo ezali komonisa ndenge bato bamilukelaka bamaladi mosusu. Na buku na ye (Pleine vue sur le futur, na Lingelesi), Eugene Linden, oyo ayekolaka bikelamu ya bomoi mpe bisika yango efandaka akomaki boye: “Pene na bamaladi nyonso oyo ezongaka, bato nde basalaka ete ezonga.” Tópesa bandakisa mosusu: Lokola bato mingi bakómá kosala mibembo mpe bampɛpɔ, masuwa mpe bingbunduka, ekómi komema bato noki epai bazali kokende, mikrobe oyo epesaka maladi mpe nyama oyo ememaka yango ezali kotambola bisika nyonso na mokili. Lokola bato bakómi kobebisa bisika oyo bikelamu ya bomoi efandaka, bomoi ya bikelamu yango ekómi na likama. Linden alimboli ete: “Kobebisama ya mai mpe mopɛpɛ ezali kolɛmbisa ebongiseli oyo esalisaka nzoto ya banyama to ya bato ebundisaka maladi.” Linden, azongeli maloba ya Paul Epstein, mpe alobi ete: “Ndenge bato bazali kobebisa mai, zamba mpe mopɛpɛ, yango elɛmbisi ebongiseli oyo ebatelaka bomoi ya etando na biso, mpe yango efungoli nzela na mikrobe.”

Yikiyiki na makambo ya politiki ezali kobimisa bitumba, oyo ezali kobebisa zamba, mopɛpɛ mpe bisika oyo bato bazwaka nkisi mpe biloko ya kolya. Lisusu, zulunalo moko (Biobulletin) ya ebongiseli moko ya Amerika (Musée américain d’histoire naturelle) eyebisi ete: “Bato oyo bakimá bitumba, oyo mbala mingi balyaka malamu te mpe bazalaka makasi te, bafandisaka bango mbala mingi na bakaa esika bato batondanaka mpe bosoto ezalaka mingi, esika oyo bakoki kozwa bamaladi ya lolenge nyonso.”

Kobeba ya nkita ezali kotinda bato mingi bákenda kofanda na bingumba oyo etondani na bato, ezala na mboka na bango moko to na mboka mopaya. Zulunalo yango (Biobulletin) ebakisi ete: “Mikrobe elingaka bisika oyo bato batondani.” Na bingumba oyo bato bazali kotondana se kotondana, “mbala mingi bibongiseli oyo Leta azwaka mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato, na ndakisa mateya ya ebandeli, kolya malamu, mangwele; elandaka te ndenge bato bazali kotondana.” Lokola bato batondani, mai mpe ekómi mpasi, bosoto etondani mpe bibongiseli mpo na kolongola salite na mboka ezali ya malamu te. Na bisika ya ndenge wana, ezalaka mpasi mpo na kobatela bopɛto ya nzoto mpe ya esika moto afandi, ebendaka nyama-nkɛkɛ mpe nyama mosusu oyo epesaka maladi ebotanaka mingi. Kasi, mokakatano yango ekotikala libela te, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

“Pene na bamaladi nyonso oyo ezongaka, bato nde basalaka ete ezonga”

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

Virisi ya ebale Nil ekɔteli États-Unis

Virisi ya ebale Nil, oyo moto azwaka yango libosoliboso na ngungi, bamonaki yango mpo na mbala ya liboso na 1937 na Ouganda, mpe na nsima bayaki komona yango na Proche-Orient, na Azia, na Oseania, mpe na Mpoto. Ezali bobele na 1999 nde bamonaki virisi yango na Amerika. Kobanda wana, bato koleka 3 000 bazwi virisi yango na États-Unis, mpe bato koleka 200 bakufi na yango.

Bato mingi oyo bazali na virisi yango bayebaka te ete bazali na yango, atako mbala mosusu basusu kati na bango bayokaka lokola bazali na grippe. Kasi bobele bato moke kati na bango nde babɛlaka bamaladi ya makasi lokola encéphalite mpe méningite cérébro-spinale. Tii lelo, mangwele na yango to nkisi ya koboma virisi yango ezwami naino te. Ebongiseli moko (Centre américain d’épidémiologie) emonisi ete moto akoki kozwa virisi yango soki batye ye enama to bazongisi ye makila ya moto oyo azali na virisi yango. Na 2002, Agence Reuters elobaki boye: “Tii lelo, bayebi naino te ekzamɛ ya kosala mpo na koyeba soki moto azali na virisi ya ebale Nil na makila.”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

CDC/James D. Gathany

[Etanda/Elilingi na lokasa 8]

Ndenge nini okoki komibatela? Mwa batoli

Lamuká! etunaki bato oyo bafandaka na bisika oyo etondi na nyama-nkɛkɛ mpe na bamaladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka, báyebisa ndenge basalaka mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Ntango mosusu batoli oyo bapesi ekoki mpe kosalisa yo na esika ofandi.

Bopɛto: eloko ya liboso mpo na komibatela

Batelá ndako na yo pɛto

“Kotika biloko ya kolya polele te. Finiká biloko ya kolya oyo osilisi kolamba tii ntango bokolya. Soki osilisi kolamba to kokabola biloko, sukolá mbala moko nzungu mpe basaani mpe longolá biloko ya kolya oyo ekwei to esopani na nse. Kolalisa basaani na salite te to kotika te salite ya biloko oyo bolambaki to bolyaki efanda wana tii lobi na ntɔngɔ. Zipá yango to kundá yango mpo nyama-nkɛkɛ to mpoko eyaka na butu koluka biloko ya kolya. Lisusu, ezalaka mpasi te kobatela ndako pɛto mpe kopekisa nyama-nkɛkɛ ekɔta soki pavemá ya ndako ezali ya simá.”​—Afrika.

“Kobomba mbuma to biloko mosusu oyo ebendaka nyama-nkɛkɛ na ndako te. Nyama ya mboka​—ntaba, ngulu, nsoso​—esengeli kokɔtaka na ndako te. Esengeli kozipa batwalɛti ya libándá. Esengeli kokunda noki nyɛi ya nyama to kosopela yango mpɛmbɛ (chaux) mpo na kobengana nzinzi. Ata soki bato oyo bafandaka pembeni na bino basalaka bongo te, soki yo ozali kosala yango, nyama-nkɛkɛ ekozala mingi te mpe okopesa ndakisa malamu.”​—Amerika ya sudi.

[Elilingi]

Soki ofiniki biloko ya kolya mpe salite te ozali nde kobenga nyama-nkɛkɛ

Bopɛto ya nzoto na yo moko

“Sabuni ezalaka ntalo mingi te, yango wana sukoláká mabɔkɔ mpe bilamba na yo mbala na mbala, mingi mpenza soki opesi bato mbote to osimbi nyama. Kosimba nyama oyo ekufi te. Kosimbasimba monɔkɔ, zolo, mpe miso na yo te. Esengeli kosukolaka bilamba mbala na mbala, ata soki ezali komonana lokola ezali salite te. Kasi, lokola nsolo mosusu ebendaka nyama-nkɛkɛ, saleláká sabuni to mafuta ya kopakola oyo ezalaka na nsolo makasi te.”​—Afrika.

Ndenge mosusu ya komibatela

Longolá bisika oyo ngungi ebombanaka

Zipá tono, katini, to saani oyo ezali na mai. Longolá eloko nyonso oyo mai ekoki kotɛlɛma. Kotika mai etɛlɛma na mbɛki ya bafololo te. Ngungi ebotanaka na esika nyonso oyo mai efandi na boumeli ya mikolo koleka minei.​—Azia ya sudi-ɛsti.

Komitika te ete nyama-nkɛkɛ eswaka yo

Kebá na bangonga oyo nyama-nkɛkɛ ebimaka mpo na koluka biloko ya kolya mpe na bisika oyo ezalaka mingi. Na mikili ya molunge, moi elalaka noki; yango wana bato basalaka misala na bango mingi nde na butu, ntango oyo nyama-nkɛkɛ mingi etambolaka. Soki ozali kofanda to kolala libándá, ozali komikaba na nyama-nkɛkɛ eswa yo mingi mpe epesa yo maladi.​—Afrika.

[Elilingi]

Na mikili oyo ngungi ezali mingi, kolala libándá ezali lokola kopesa yango biloko ya kolya

Latá bilamba oyo ekozipa yo nzoto pene na mobimba, mingi mpenza ntango ozali na zamba. Pakolá nkisi ya kobengana nyama-nkɛkɛ na bilamba mpe na nzoto, kasi kobosana te kolanda malako ya nkisi yango. Ntango bouti kotambola, omitala malamu mpe talá bana na yo soki sili ya nyama ekangami te na nzoto to na bilamba na bino. Esengeli mpe kotala soki mbwa to nyau na yo ezali maladi te mpe ezali na nyama-nkɛkɛ na nzoto te.​—Amerika ya nɔrdi.

Kosimbasimba te nyama oyo babɔkɔlaka na fɛrmɛ, mpamba te nyama-nkɛkɛ ekoki kopesa bato maladi ya nyama yango.​—Azia ya ntei.

Moto nyonso ya libota asengeli kolalaka na mosikitele, mingi mpenza oyo batyá nkisi. Esengeli kotya manyungulu na maninisa mpe kobatela yango malamu. Zipá madusu nyonso oyo ezalaka esika manzanza mpe efelo ekutani, oyo ekoki kokɔtisa nyama-nkɛkɛ. Makambo wana nyonso esɛngaka mbongo, kasi soki mwana na yo akɔti na lopitalo to soki obɛli makasi mpe ozali kokoka lisusu kosala te, okobimisa mbongo mingi koleka.​—Afrika.

[Elilingi]

Mosikitele oyo batyá nkisi ezali ntalo mingi te koleka kokutana na monganga to kokɔta lopitalo

Longolá biloko nyonso oyo nyama-nkɛkɛ ekoki kobombana. Zipá mikaka nyonso oyo ezali na bifelo mpe na plafɔ, kangá mikaka mpe madusu. Soki ezali ndako ya ndɛlɛ, tyá kapo na nse ya ndɛlɛ mpo nyama-nkɛkɛ ekɔta te. Tyá eloko na eloko na esika na yango, mpamba te nyama-nkɛkɛ emibombaka na bapapye mpe na bilamba ebele oyo elali esika moko to na bafoto ebele oyo batye na efelo.​—Amerika ya sudi.

Bato mosusu bakanisaka ete ezali na mabe moko te kotika nyama-nkɛkɛ mpe mpoko ekɔtaka na ndako. Ezali bongo te! Esengeli ekɔta na ndako te. Salelá nkisi ya kobengana to ya koboma nyama-nkɛkɛ, kasi kobosana te kolanda malako ya nkisi yango. Tyá biloko oyo ekangaka nzinzi mpe salelá kɔmbɔ to eloko mosusu mpo na koboma yango. Kanisá mayele mosusu oyo okoki kosalela: na ndakisa mwasi moko asalaki tiyo moko ya bilamba oyo atondisaki zɛlo mpe atyaki yango na nse ya porte ya ndako na ye mpo nyama-nkɛkɛ ekɔta te.​—Afrika.

[Elilingi]

Kotika te nyama-nkɛkɛ ekɔtaka na ndako. Benganá yango!

Ndenge ya kokima maladi

Soki olingi nzoto na yo ezalaka ntango nyonso makasi, lyáká malamu, laláká mingi mpe saláká ngalasisi. Komitungisaka mingi te.​—Afrika.

Bato ya mibembo: Liboso ya kokende na mboka moko, luká koyeba bamaladi nini ezali mikolo oyo na mboka yango. Okoki kotuna na ministère de la santé mpe kotala na Internet na ba site ya guvɛrnema. Liboso ya kosala mobembo, mɛlá bankisi oyo ekobatela yo na bamaladi oyo ezalaka na mboka oyo olingi kokende.

Soki ozali komiyoka malamu te

Kutaná na monganga nokinoki

Bamaladi mingi eumelaka kosila te soki bayebi yango ntango ebandi.

Kebá na baekzamɛ oyo basali yango malamu te

Soki esengeli, luká monganga oyo amesani kosalisa bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ to bamaladi ya mikili ya molunge. Yebisá ye ndenge nini ozali komiyoka mpe esika nini osalaki mibembo, ata kala. Okoki komɛla nkisi babengi antibiotiques kaka soki esengeli mpenza mpe kokata yango na nzela te.

[Elilingi]

Bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ ekokanaka ntango mosusu na bamaladi mosusu. Yebisá monganga na yo bamboka oyo osalaki mobembo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Globe : Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

[Etanda/Elilingi na lokasa 10]

Nyama-nkɛkɛ ekoki kopesa mikrobe ya sida?

Nsima ya kolekisa mbula koleka zomi na koyekola likambo yango, bato oyo bayekolaka nyama-nkɛkɛ mpe minganga, bamoni ata eloko moko te oyo emonisi ete ngungi to nyama-nkɛkɛ mosusu epesaka bato mikrobe ya sida.

Na ndakisa, monɔkɔ ya ngungi ezali lokola ntonga te, oyo ekoki kobenda makila mpe kozongisa yango kaka na nzela moko wana. Ngungi abendaka makila na nzela moko, kasi azongisaka nsɔi na nzela mosusu. Thomas Damasso, monganga oyo ayekolaka makambo ya sida na engumba Mongu, na Zambie, alimboli ete libumu ya ngungi epɔlisaka makila oyo ngungi amɛli mpe mikrobe ekufaka. Bamonaka mikrobe ya sida na nyɛi ya ngungi te. Mikrobe ya sida ekeseni na mikrobe oyo epesaka malaria, yango ezalaka na kati ya nsɔi ya ngungi te.

Mpo moto azwa mikrobe ya sida, esengeli azwa makila mwa mingi oyo ezali na mikrobe yango. Soki babengani ngungi ntango azali koswa moto mpe akei mbala moko koswa moto mosusu, mwa makila oyo etikali na monɔkɔ na yango ezalaka moke mpenza mpo epesa moto mikrobe. Bato ya mayele balobi ete, ata soki bafini ngungi oyo ezali na mikrobe ya sida na mpota, moto akozwa sida te.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

CDC/James D. Gathany

[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 7]

Nsili ya mbwa (bayeisi yango monene, na lobɔkɔ ya mobali) epesaka maladi ya Lyme

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: mwasi, mobali, mpe mwana (ndenge mpenza ezalaka)

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Nsili nyonso: CDC

[Bililingi na lokasa 10]

Mpela, bosɔtɔ, mpe kotambolatambola ya bato epalanganisaka bamaladi oyo nyama-nkɛkɛ epesaka

[Eutelo ya bafɔtɔ]

FOTO UNACIONES (from U.S. Army)