Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndɛkɛ kitoko ya nsala ya misomiso

Ndɛkɛ kitoko ya nsala ya misomiso

Ndɛkɛ kitoko ya nsala ya misomiso

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA INDE

MBALA mosusu ntango kaka otangi motó ya likambo ya lisolo oyo, oyebi ete bazali kolobela ndɛkɛ lipombo (paon). Ndɛkɛ yango eyebani mingi na mokili mobimba mpo na nsala na yango ya nsima oyo ezalaka milaimilai. * Kasi, omituná naino te soki nsala yango ya kitoko ezalaka na mosala nini mpe soki ndɛkɛ yango ezalaka na makambo mosusu ya malamu, longola kitoko ya nsala na yango?

Ndɛkɛ lipombo ezali na kati ya mitindo ya bandɛkɛ oyo babengaka faisans, mpe ezalaka lolenge misato. Na lisolo oyo, tokolobela ndɛkɛ lipombo ya bule ya Inde, oyo ekómaka molai mɛtrɛ 2 to 2,35; bakisa mpe nsala na yango ya nsima oyo ekómaka mɛtrɛ 1,50. Nsala yango ezalaka na langi lokola mai ya pondu mpe mwa mosaka, oyo ezipami na matɔnɔ ya langi ya bule mpe ya brɔnze. Nsala ya ndɛkɛ lipombo ya mobali ezalaka na langi lokola bule basangisá na mai ya pondu mpe engɛngaka lokola ebende.

Ndɛkɛ lipombo ezali elembo ya ekólo Inde, mpo ezalaka kitoko mingi. Ntango mosusu ezali mpo na yango nde babimisá lisese “lolendo lokola ndɛkɛ lipombo” mpo na kolobela bato ya lolendo. Kasi, ndɛkɛ yango ekimaka mpenza bato te, ndenge okoki kokanisa. Kutu, ezalaka mpasi te mpo na kobɔkɔla yango. Bato mosusu batalelaka yango lokola ndɛkɛ moko ya bosantu. Yango wana, mbala mingi bato ya mboka na Inde babenganaka yango te ntango ezali kolya biloko na bilanga na bango.

Ndenge elakisaka bonzenga na yango

Na ntembe te, ndɛkɛ lipombo eyebani mingi mpo na ndenge elakisaka bonzenga na yango, ntango etombolaka nsala na yango ya nsima lokola lúngu. Mpo na nini elakisaka bonzenga na yango ndenge wana? Na ntembe te, ezali mpo na kobenda likebi ya mwasi.

Mbala mosusu ndɛkɛ lipombo ya mwasi elandaka mbala moko te oyo ya mobali; kasi ekokaka te kokanga motema soki oyo ya mobali efungoli nsala na yango. Nsala yango ya nsima ya milai mpe ya kitoko, oyo ezalaka misomiso ya langi ndenge na ndenge, ebendaka likebi ya oyo ya mwasi. Ndɛkɛ lipombo ya mwasi ekokende epai ya mobali oyo akobimisa nsala yango ya monene koleka.

Kasi, kotombola nsala ya nsima mpe kopanza yango ezali bobele lolenge moko ya kolakisa bonzenga na yango. Ndɛkɛ lipombo ya mobali efungolaka nsala na yango ya nsima, oyo ezalaka milai, mpe etalisaka yango liboso. Na nsima, ebandaka kobina na lolendo nyonso. Ntango ndɛkɛ lipombo ezali kobalukabaluka, mapapu na yango ya langilangi ezali kobɛta na kolanda ndenge nzoto na yango ezali koningana, mpe ezali kolelisa nsala oyo etɛlɛmi. Ndɛkɛ lipombo yango moko mpe ezali kosala mwa makɛlɛlɛ, kasi ezali mpenza nzembo te. Atako bongo, ndɛkɛ lipombo ya mwasi ekoyeba ete oyo ya mobali ezali kolinga yango.

Ntango mosusu, ndɛkɛ lipombo ya mwasi emekaka mwa moke kosala lokola oyo ya mobali ezali kosala, kasi mbala mingi elandaka mobali te. Atako bongo, ndɛkɛ lipombo ya mobali oyo ekobimisa nsala ya nsima ya minene koleka mpe ekobina koleka nde ekobenda likebi ya oyo ya mwasi. Ezali na lolenge wana nde ndɛkɛ lipombo moko ya mobali ekoki kozwa basi ata mitano mpe kokóma tata ya bana 25 na mbula moko.

Bomoi ya ndɛkɛ lipombo

Soki eleko ya kobotana esili, nsala yango ya nsima ekweaka. Ndɛkɛ lipombo oyo ekoli ezalaka na nsala yango ya nsima soki 200. Na Inde, bato ya mboka bazalaki kolɔkɔta yango, mpe kotɛkela yango bato ya Mpoto, tii ntango bapekisaki mombongo yango mpo na kobatela ndɛkɛ yango. Kasi, bango moko basalaka na nsala yango biloko ya kopupola mopɛpɛ mpe biloko mosusu ya kitoko.

Soki ekómi mpokwa, ndɛkɛ lipombo emataka malɛmbɛmalɛmbɛ na nzete ya molai mpo na koluka esika malamu ya kolala. Na ntɔngɔ, ekitaka mpe malɛmbɛmalɛmbɛ. Ndɛkɛ yango ekoki kosepelisa yo mpenza na kitoko na yango; kasi kokanisa te ete eyembaka mpe kitoko ndenge emonanaka na miso. Soki ntɔngɔ ebandi kotana, liboso ekende koluka biloko ya kolya, ekobanda naino koyemba lokola ezali komilela.

Ndɛkɛ lipombo eponaka mpenza biloko ya kolya te, elyaka biloko nyonso. Elyaka nyama-nkɛkɛ, miselekete, mpe mbala mosusu ata nyoka ya mikemike, ezala mpe mbuma, ndunda, mpe milona ya mikemike.

Atako ndɛkɛ yango emonanaka lokola ezali lolendo, eyebi kobatela. Emonaka likama noki; na ndakisa soki emoni nyau, ekimaka mbangu na zamba mpe egangaka mpo na kokebisa likama. Ndɛkɛ lipombo mosusu ya mibali mpe ekobanda koganga. Ekokima mbangu, moko nsima na mosusu. Kasi, ndɛkɛ lipombo ya basi elingaka te kotika bana na yango, ata soki ekutani na likama ya ndenge nini.

Nsala ya nsima ya milai ya ndɛkɛ lipombo epekisaka mpenza yango kopumbwa te, atako ekomisaka yango mwa kilo na ntango elingi kopumbwa. Soki kaka emati likoló, epumbwaka mbangu mpenza mpo ebɛtaka mapapu na yango nokinoki.

Bana ya ndɛkɛ lipombo oyo bakokisi sanza mwambe, batikaka baboti na bango mpe batambolaka bango moko. Soki bakei, mama na bango akomibongisa mpo na kobwaka makei mpe kobɔkɔla bana mosusu. Bana ya mibali babandaka kobima nsala ya nsima soki bakokisi sanza mwambe; kasi nsala yango ebimaka nyonso kaka soki bakokisi mbula minei. Na ntango wana nde bakoki kobota bana.

Ndɛkɛ lipombo na ntango ya kala

Na ntango ya kala, ndɛkɛ lipombo ezalaki kokómisa kitoko mapango ya minene na Grèce ya kala, na Rome, mpe na Inde. Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato bazalaki kolanda bonzenga ya ndɛkɛ lipombo mpe koyema bikeko ndenge na ndenge na lopango ya bakonzi ya Inde. Tózwa ndakisa ya kiti ya bokonzi ndɛkɛ lipombo (trône du paon), moko ya biloko eleki kitoko na Inde. Bakɔtisaki diama mingi na kiti yango, mpe balobaka ete bakɔtisaki mpe rubis 108 mpe émeraudes 116. Na nsongɛ na yango, batyaki ndɛkɛ lipombo moko ya wolo; yango nde epesi nkombo yango. Bazalaki kokangisa kiti yango mpo na kofanda na yango kaka na ntango ya milulu ya ntina mingi.

Biblia elobi ete ndɛkɛ lipombo ezalaki kati ya biloko ya motuya mingi oyo Mokonzi Salomon azalaki kobengisa na bikólo mosusu. Kanisá naino ndenge ndɛkɛ lipombo yango ezalaki kosakana na kati ya lopango ya mokonzi. (1 Mikonzi 10:22, 23) Na ntembe te, ndɛkɛ wana ezali komonisa biso ete Mokeli moko ya mayele azali. Ntango ndɛkɛ lipombo ezali kobina, efungoli nsala na yango ya nsima nyonso ya langi ndenge na ndenge, okoki bobele kokamwa mpo na mayele oyo Yehova, Nzambe oyo ‘azalisaki biloko nyonso,’ azali na yango.​—Emoniseli 4:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Nsala ya nsima oyo ezalaka milaimilai ebimaka nde na mokɔngɔ ya ndɛkɛ yango, kasi na mokila te. Nsala ya mokila esalisaka na kotɛlɛmisa nsala yango.

[Elilingi na lokasa 14]

Mbala mingi ndɛkɛ lipombo ya mwasi elandaka mbala moko te oyo ya mobali ntango ezali kobina

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© D. Cavagnaro/Visuals Unlimited

[Bililingi na lokasa 15]

Ndɛkɛ lipombo ya mwasi eyebi kobatela bana

Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 15]

© 2001 Steven Holt/stockpix.com

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Ndɛkɛ lipombo: Lela Jane Tinstman/Index Stock Photography

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 14]

John Warden/Index Stock Photography