Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Tata to mama oyo azali kobɔkɔla bana ye moko Maloba ezangi ngai mpo na koyebisa ndenge nasepelaki ntango natángaki masolo “Tata to mama oyo azali kobɔkɔla bana ye moko akoki kolonga.” (8 Ɔkɔtɔbɛ 2002, na Lifalanse) Natángaka yango mbala na mbala! Nazali kobɔkɔla bana mibale ngai moko. Mbala nyonso oyo natángaka masolo yango, namonaka mpenza ete nakoki kolonga mpe ete nazangi moto ya kosalisa ngai te. Natɔndi bino mingi!

C. B., États-Unis

Libala na ngai ekufá. Bomoi ekómaki mpasi ntango natikalaki ngai moko na bana mibale. Natɔndi Yehova ndenge ayoki kolela na biso mpe apesi biso eyano na masolo ya ndenge wana oyo emonisi ete alingaka biso. Yango ezali komonisa ete azali kokanisa biso mpe alingaka biso.

L. T., République Tchèque

Matɔndi mingi ndenge bobimisi masolo oyo. Nabandaki mpenza komiyoka ete nalɛmbi bomoi oyo nazali na yango lelo ya kobɔkɔla bana ngai moko mpe ndenge nauti kozongela mosala nsima ya kofanda na ndako bambula ebele mpo na kobatela bana. Kasi, masolo yango epesi ngai elikya mpe elendisi ngai na makambo oyo nasengelaki na yango mpo nazonga nsima te. Nakosalela toli oyo bopesi, na ndakisa, kotya likambo mokomoko na esika na yango mpe koyekola na libota pɔsɔ na pɔsɔ. Zulunalo oyo ekozala ntango nyonso pembeni na ngai mpe nakotánga yango mbala nyonso oyo nakoyoka lisusu ete nalɛmbi.

B. A., États-Unis

Eleki sikoyo mbula 14 banda nazali kobɔkɔla bana mibale, mwasi ná mobali, ngai moko. Natɔndi bino na milende bozali kosala mpo na kokoma mikanda na bino malamu, kasi masolo mosusu ya zulunalo oyo elɛmbisaki ngai. Na ndakisa, bosalelaki liloba “kolonga” mbala na mbala. Nakanisi ete ngai mpe nasalelaki toli oyo ezali na lokasa 11, kasi nazwaki matomba ndenge moko te na mwasi oyo bolakisi na lokasa yango. Kolonga elimboli kaka te ete mwana na yo akóma mosaleli ya ntango nyonso to misionɛrɛ.

M. S., Japon

Eyano ya “Lamuká!”: Toyebi ete batalelaka kolonga na ndenge mingi. Mokano na biso ezalaki kaka ya kopesa mwa toli mpo na kosalisa tata to mama oyo azali kobɔkɔla bana ye moko na kolonga mokakatano yango mpe komonisa bango ete milende na bango ezali mpamba te. Topesaki bandakisa ya bilenge oyo bakómaki basaleli ya ntango nyonso mpo na komonisa ete baboti mosusu oyo babɔkɔlaki bana bango moko balongaki kokolisa bana oyo babangaka Nzambe. Tokanisi ete baboti nyonso​—ezala oyo bazali na mabala to te​—bakolanda kokokisa bamposa ya elimo, ya mayoki, mpe ya mosuni ya bana na bango.

Nzala na Irlande Matɔndi mingi mpo na makambo ya ntina mingi oyo boyebisi na lisolo “Nzala monene na Irlande​—Ebomaki mpe ekimisaki bato ebele.” (8 Ɔkɔtɔbɛ 2002, na Lifalanse) Na ntango ya nzala wana, bato mingi ya Irlande bayaki na Canada na masuwa. Mingi na bango bakufaki na cholera, na typhus, mpe bamaladi mosusu. Bana mingi batikalaki bitike, mpe bato oyo balobaka Lifalanse bazwaki bana mosusu mpe bapesaki bango bankombo ya Lifalanse. Ezali na lolenge wana nde, nsima ya bambula, bato yango ya Irlande bayebaka lisusu te epai bautá.

K. S., Canada

Mituna oyo bilenge batunaka Nalingi kolobela moke lisolo na bino “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Mpo na nini tata na ngai to mama na ngai alingaka ngai te?” (Yanuali-Marsi 2003) Ntango tata ná mama babomaki libala, nakómaki kobɛla na makanisi. Na bantango mosusu, nazalaki komona ete moto moko te akoki kosalisa ngai. Nazali na mama moko ya malamu, nazali mpe na ndeko mobali moko ya malamu, kasi ntango mosusu nayokaka ete eloko moko ezali kozanga ngai​—eloko oyo tata na ngai azangisá ngai. Nabɔndelaki Yehova apesa ngai eloko moko oyo ekolendisa ngai. Eloko yango nde oyo nazwi na lisolo oyo. Esalisaki ngai namiyoka malamu mpe nayebi sikoyo ndenge ya kolonga mokakatano yango. Eloko esimbaki mpenza motema na ngai ezali mokapo ya Nzembo 27:10. Esalisaki ngai nayeba ete Yehova alingaka ngai ata na ntango oyo namonaki lokola nde ete moto moko te alingaka ngai.

D. B., États-Unis