Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ebandeli ya malamu oyo epesaki ntina na bomoi na ngai

Ebandeli ya malamu oyo epesaki ntina na bomoi na ngai

Ebandeli ya malamu oyo epesaki ntina na bomoi na ngai

LISOLO YA ERNEST PANDACHUK

Nabotamaki na etúká ya matitimatiti ya Saskatchewan, na Canada. Ntango nazalaki na mbula 23, nakendaki na Afrika, epai nasalaki mosala ya misionɛrɛ mbula 35 oyo nakobosana yango te. Mpo na nini nalandaki nzela wana? Ezalaki na mbalakaka te. Tiká nayebisa bino yango.

NDAKO na biso ya liboso ezalaki ya mabelé, esika oyo libota na biso ezalaki komibomba na eleko ya malili makasi na etúká ya matitimatiti. Na 1928, liboso ete mingi kati na biso bana libwa tóbotama, mopaya moko ayaki na ferme mpe atikelaki Tata ná Mama mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na eleko ya malili oyo elandaki, oyo eumelaki mingi, bayekolaki Biblia na lisalisi ya mikanda yango. Ntango eleko ya molunge ebandaki, basilaki kondima ete bazwi solo. Bayebisaki makambo yango na bandeko na bango, baninga na bango, mpe bato ya zingazinga, kasi mingi mpenza na bana na bango.

Nabotamaki na 1931, mpe baleki na ngai mitano balandanaki mwa moke nsima. Libota na biso ezalaki na momeseno ya kotánga mpe koyekola Biblia. Nabosanaka te ndenge tozalaki kofanda esika moko ntɔngɔ nyonso. Tata azalaki kotambwisa lisolo na kotalela vɛrsɛ moko ya Biblia, ata ntango tozalaki na bapaya na ndako. Mama ná Tata mpe bana oyo bakolaki bazalaki kotánga na mongongo makasi mikanda oyo elimbolaka Biblia, moto na moto na ngala na ye.

Tata alakisaki biso kotánga mpe kokoma, alakisaki mpe biso ndenge ya kolukaluka na mikanda, na lisalisi ya mokanda ya koluka mikapo ya Biblia (concordances bibliques). Toumelaki te koyeba kosalela Biblia mpo na kolimbola bindimeli na biso epai ya bato. Masolo wana ya kitoko esalisaki ngai nakanisa malamu likoló ya mateya ya Biblia. Mwa moke na nsima, nakokaki kosalela Biblia mpo na kokweisa mateya ya lokuta ya mangomba. Nazalaki na likoki ya komonisa bato ete molimo ekufaka, lifelo ya mɔtɔ ezali te, Nzambe ná Yesu bakokani te mpe bazali kati na “Bosato” te.​—Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4; Yoane 14:28.

Tata ná Mama bateyaki biso mpe na nzela ya etamboli na bango mpe balendisaki biso tókangama na makambo oyo ezali sembo, ata soki bato mingi basepelaka na yango te. Na ndakisa, bazalaki komɛla likaya ata moke te, mpe bakebisaki biso ete likaya ekómisaka moto mbindo mpe bamonisaki biso oyo tokoki kosala soki baninga ya kelasi balingi kotinda biso na makasi tómɛla likaya. Nabosanaka te maloba oyo ya Tata: “Bakoki kobenga yo yuma soki oboyi komɛla likaya. Kasi, tuná moto wana boye: ‘Nani azali mobali ya solosolo? Oyo azali moombo ya matiti to oyo aboi kozala moombo na yango?’”

Ntango nazalaki na mbula 11, nakutanaki na mokakatano mosusu oyo etyaki mpenza na komekama bokangami na ngai na mitinda ya Biblia oyo nayekolaki. Na ntango yango, etumba ya mibale ya mokili mobimba esilaki kobanda, mpe bazalaki kosɛnga bana-kelasi bápesaka losako na bɛndɛlɛ. Lokola nazalaki koyekola Biblia, nayebaki ete kopesa bɛndɛlɛ losako ndenge wana ezali kosambela yango, yango wana naboyaki kosala yango. Lokola naboyaki, babenganaki ngai na kelasi sanza motoba mobimba.

Atako bongo, nsukansuka nasilisaki kelasi, mpe na sanza ya Marsi 1947, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova Nzambe. Sanza motoba na nsima, nakómaki mobongisi-nzela, elingi koloba mosakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu. Na ebandeli, nasakolaki na sudi ya etúká ya Saskatchewan, epai ya bato ya bilanga to baoyo babɔkɔlaka bibwele na mboka wana monene. Na eleko ya molunge, nazalaki kotambola na mpunda, kasi na eleko ya malili, nazalaki kokangisa na mpunda wagɔ oyo tozalaki kobenga caboose. Nazalaki kotya mbambola mpo epesa molunge na kati ya wagɔ, yango wana nazalaki kokeba ete nakweisa wagɔ te.

Bato ya bamboka yango bazalaki na boboto mingi mpe bazalaki bayambi ya bapaya. Soki nakei kotala bango na mpokwa, mbala mingi bazalaki kosɛnga ngai nalala wana. Nazalaki mpenza kosepela na masolo kitoko ya Biblia oyo tozalaki kosolola! Libota ya Peterson ezalaki moko ya mabota oyo bayambaki solo nsima ya masolo oyo tosololaki butu mobimba. Earl ná mama na ye bakómaki Batatoli ya Yehova ya molende.

Nakei kosakola na Québec

Na 1949, ntango balukaki babongisi-nzela bákende kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na etúká ya Québec, ngai mpe nandimaki kokenda. Tozalaki babongisi-nzela soki 200 ya wɛsti ya Canada oyo tondimaki kokenda. Tokómaki na engumba ya Montréal na sanza ya Sɛtɛmbɛ, mpe tozalaki kozela bátinda biso na esika nyonso oyo bakotinda biso na etúká ya Québec. Ezalaki na ntango oyo Maurice Duplessis, moto ya lingomba Katolike oyo azwaki mokano ya kosilisa Batatoli na etúká wana, azalaki ministre-mokonzi.

Na ntango wana tozalaki na misala mingi mpe tozalaki na esengo kasi tokutanaki mpe na mikakatano mingi. Na ndakisa, koyekola Lifalanse, bazalaki kokanga biso, ebele ya bato ya mobulu mpe bato ya bilandalanda bazalaki kokɔta na makasi mpo na kopanza makita na biso. Atako bazalaki kolinga te tósala mosala na biso, yango ebangisaki ngai te to ezongisaki ngai nsima te na mosala oyo naponaki ya kozala ministre ya Nzambe. Baboti na ngai bateyaki mpenza ngai nalinga makambo ya sembo mpe nandima solo ete mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo Yesu alobelaki na esakweli na ye esengeli kokokisama, ata soki botɛmɛli ezali.​—Matai 24:9, 14.

Ntango nazalaki na Québec, nakutanaki na Emily Hawrysh, ndeko mwasi moko mobongisi-nzela ya sembo, oyo autaki na Saskatchewan. Banda mokolo ya libala na biso na mwa 27 Yanuali 1951, Emily azali moninga na ngai ya sembo na mosala ya kosakola mpe alendisaka ngai mingi. Lokola mokano na biso ezalaki ya kosala mingi na mosala ya kosakola, tosɛngaki mpe bandimaki biso tókɔta na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, oyo epesaka baministre ya Nzambe mateya na boumeli ya basanza mingi mpo na kobongisa bango na mosala ya misionɛrɛ. Tozwaki diplome na kelasi ya mbala ya 20 ya Gileadi, na sanza ya Febwali 1953.

Ntango tozalaki kozela mikanda oyo ekopesa biso ndingisa ya kokɔta na Afrika, basɛngaki biso tósalisa masangá ya Batatoli ya Yehova na etúká ya Alberta mpe ya Ontario, na Canada. Na mikolo yango, mpo na kolongwa na lisangá moko mpe kokenda na mosusu, tozalaki kokenda na bisi. Na yango, tokómisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ mpe tozalaki komema biloko na biso nyonso na valize moko. Mwa basanza na nsima, ntango mikanda nyonso mpo na mobembo ekokaki, tokendaki na Rhodésie du Sud, lelo oyo Zimbabwe.

Tomeseni na bomoi ya Afrika

Ntango tokómaki, tosalaki sanza mitano, na nsima batindaki biso tótalaka bituluku ya Batatoli ya Yehova na Zimbabwe, na Botwana mpe na sudi ya Rodhésie du Nord (lelo oyo Zambie). Na Eteyelo ya Gileadi, balendisaki biso tókokanisaka te mboka oyo batindi biso ná mboka na biso mpe tóbosana te ete ezala likambo nini tokutani na yango, tokoki kozwa liteya na yango. Maloba wana ya bwanya esalisaki biso tóbongola ndenge na biso ya kokanisa. Tii lelo, ngai ná Emily tondimaka maloba oyo: “Luká kosalela malamumalamu libaku nyonso okutani na yango; ekoki kozala ete okokutana na yango lisusu te.”

Tozalaki kokende bisika na bisika na engbunduka, na bisi, na motuka to na velo​—eloko nyonso oyo ekokaki komema biso. Atako mibembo yango ezalaki mpenza kolɛmbisa, kasi makambo mosusu oyo tozalaki kokutana na yango ezalaki mpe kotya na komekama ekateli na biso ya “kosalela malamumalamu libaku nyonso oyo tokutani na yango.” Na mbula mibale ya liboso, mibeko ya mboka ezalaki kopekisa natambolaka na Emily na bamboka ya zamba. Yango wana, nazalaki kotika mwasi na ngai, atako libala na biso esalaki naino mbula mingi te, na bingumba ya mikemike penepene na bagare ya bingbunduka, oyo mbala mingi ezalaki na Batatoli te. Kondima ya Emily, mpiko mpe molende na ye etindaki ngai nalinga ye lisusu mingi mpe epesaki nzela ete nsango ya Bokonzi ebota mbuma na bamboka wana.

Soki bayambi Emily na ndako moko, azalaki kofanda wana mpe kosakola epai ya bato ya zingazinga tii mokolo ngai nakozonga. Na bantango mosusu, azalaki kosakola ye moko na boumeli ya sanza mobimba. Atyelaki Yehova motema mpo abatela ye mpe apesa ye makasi, mpe mosala na ye ebotaki mbuma. Na ndakisa, Rita Hancock ayambaki solo ya Biblia mpe na nsima mobali na ye. Mobali yango akómaki ndeko ya sembo mpe asalelaki Yehova lokola nkulutu na lisangá tii liwa na ye. Lelo oyo, masangá ekómá ebele na mwa bingumba mosusu oyo Emily alonaki mboto ya solo ya Biblia.

Ezaleli ya koyamba bapaya mpe mayele ya bato ya Afrika

Na ntango yango, na bamboka ya zamba, komona ndenge Batatoli ya Afrika bazalaki komonisa mpenza bolingo mpo na ebongiseli ya Yehova mpe bakɛngɛli-batamboli, ezalaki likambo oyo esimbaki motema na ngai. Bandeko wana baklisto bazalaki mpenza kosalisa ngai. Na mokolo nyonso ya yambo, nazalaki kolongwa na lisangá moko mpo na kokenda na lisangá mosusu. Nazalaki kolala na mwa ndako ya matiti oyo bazalaki kotongela ngai, mpe yango ezalaki kotinda ngai nakanisa lisusu mwa ndako oyo libota na biso ezalaki kofanda na Saskatchewan. Mbeto na ngai ezalaki nde matiti oyo bamatisi yango basantimɛtrɛ 30 mpe batandi elamba likoló.

Na bamboka ya zamba, tozalaki kosala makita mbala mingi na zamba. Bandeko bazalaki kokata zamba mpo na kobongisa esika makita ekosalema, kasi bazalaki kotika banzete ya minene mpo ebatela bango na moi. Bisika ya kofanda ezalaki nde matiti oyo bazalaki kokangisa na nsinga mpe kotanda yango na molɔngɔ; matiti mosusu bazalaki kosala na yango lopango. Kuna na zamba, natondaki na esengo koyoka mingongo kitoko ya bandeko wana ya Afrika ntango bazalaki koyemba na bomoko banzembo mpo na kokumisa Yehova.

Likambo ya esengo oyo nakobosana te

Na mosala na ngai ya kosakola, nakutanaki na Gideon Zenda, oyo azalaki mokonzi ya ba inspecteurs ya biteyelo ya lingomba ya Angeterre. Lingomba yango nde etángisá Gideon kelasi, bakisá mpe iniversite. Atako bongo, azwaki biyano ya malamu te na ebele ya mituna oyo azalaki komituna na Biblia. Yango wana, asɛngaki ngai tókutana na ye, elongo na baninga na ye mosusu ya mosala, mpo tólobela mituna yango. Bazalaki bato soki 50 oyo bazalaki na masolo yango, ba inspecteurs, bakambi ya biteyelo mpe balakisi. Gideon akambaki masolo yango. Na molɔngɔ mpenza, tolobelaki likambo mokomoko. Nazalaki koloba miniti 15 mpo na likambo mokomoko, na nsima nazalaki koyanola na mituna. Masolo yango eumelaki ngonga ebele.

Nsima ya masolo ya ndenge wana oyo esalemaka mingi bongo te, Gideon ná libota na ye, mpe ebele ya baninga na ye ya mosala bakómaki basaleli ya Yehova oyo bamipesi mpe bazwi batisimo. Episkɔpɔ na bango alongolaki bango na mosala na biteyelo nyonso ya lingomba ya Angleterre. Atako bongo, moko te azongaki nsima mpe bakangamaki makasi na mosala ya Yehova, basusu kati na bango bakómaki kutu babongisi-nzela.

Filme oyo esimbaki mitema ya bato

Na 1954, Batatoli ya Yehova basalaki filme moko La Société du monde nouveau en action. Na mbula oyo elandaki, balongolaki mobeko oyo ezalaki kopekisa mwasi kokende na mobali na ye na bamboka ya zamba. Yango epesaki ngai nzela ya komema Emily na bamboka yango. Na ntango wana, bapesaki biso motuka, motɛrɛ ya kura, mpe mwinda ya monene (projecteur) mpo na kolakisa filme yango na bamboka nyonso ya zamba. Mingi na bango bamoná naino filme te, yango wana bazalaki koya ebele. Filme yango ezalaki kolakisa ndenge babimisaka Babiblia mpe mikanda na ndako na biso ya konyata mikanda na Brooklyn, na engumba ya New York.

Ezalaki mpe kolakisa bondeko ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba oyo bayanganaki mpo na losambo na Yankee Stadium, na New York, na 1953. Ezalaki mbala ya liboso bato ya Afrika bámona bomoko mpe bolingo ya ndenge wana kati na mindele mpe baindo. Filme yango etindaki mabota mingi ya Zimbabwe báyekola Biblia mpe bákoma Batatoli. Bakambi ya biteyelo mingi na ekólo yango, oyo bamonaki ete filme yango ekoki koteya bana-kelasi makambo mingi, bazalaki kosɛnga biso tókende kolakisa yango na biteyelo na bango.

Mokolo moko na butu, Batatoli bayaki kosɛnga ngai nalakisa filme. Eloko ekamwisaki ngai, bato soki 500 bautaki mosika mpo na koya kotala filme yango. Bayokaki nsango ete nazalaki na mboka moko ya pembeni mpe nazalaki kolakisa filme. Ntango kaka bapanzanaki, bato mosusu 300 bayaki. Nalakisaki lisusu filme. Bato ya nsuka oyo batalaki filme yango bazongaki na ngonga soki ya misato ya ntɔngɔ! Na boumeli ya mbula 17, bobele na Zambie, bato koleka milio moko batalaki filme wana oyo esimbaki mitema ya bato!

Batindi biso na bamboka mosusu ya Afrika

Nsima ya kosala mbula mitano na ndambo na Zimbabwe, batindaki biso na Afrika ya Sudi. Yango elingi koloba tosengelaki koyekola monɔkɔ ya Afrikaans. Na nsima, toyebaki mpe koloba Sesotho ná Zulu. Kokóma koteya Liloba ya Nzambe na minɔkɔ mosusu ebakisaki makoki na biso na mosala ya kosakola mpe epesaki biso esengo ya mosala.

Na ebandeli ya bambula 1960, batindaki biso na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na sudi ya Afrika. Na mbula 27 oyo elandaki, tokendeki epai na epai na Lesotho, na Namibie, na Afrika ya Sudi, na Swaziland, bakisa mpe na bisanga Ascension mpe Sainte-Hélène, na sudi ya mbu ya Atlantike. Soki tosangisi mibembo wana nyonso, tokoki koloba ete tosalaki bakilomɛtrɛ nkoto na nkoto mpo na kosalisa bandeko na biso baklisto. Kondima na bango mpe bosembo na bango na bantango ya mpasi elendisaki biso tókangama makasi na lisangá ya Yehova.

Na ndakisa, nakutanaki na Batatoli ya Swaziland oyo bamonisaki kondima makasi ntango Mokonzi Sobhuza II, ya Swaziland akufaki. Lokola baboyaki kosangana na milulu ya bokundi oyo eyokani te na Makomami, balongolaki bango na misala mpe baboyelaki bango makambo mosusu oyo bana-mboka bakoki kosala. Atako bazangaki biloko mpe bazalaki na mpasi na boumeli ya mbula mingi, batikaki kondima na bango te. Koyeba bandeko wana ya mpiko mpe kosolola na bango, ezalaki libaku moko monene oyo mpo na yango nakokumisa ntango nyonso Yehova.

Ezali mpe na ndeko Philemon Mafereka, mobongisi-nzela na Mokhotlong (na Lesotho), engumba moko oyo ezali likoló ya ngomba, mɛtrɛ 3 000 likoló na nivo ya mbu. Lokola mituka ezalaka te, ye ná mwasi na ye ná bana na bango mibale, mpe bandeko minei oyo basengelaki kozwa batisimo batambolaki bakilomɛtrɛ 100 mpo na kokita esika liyangani esalemaki na mboka moko oyo ezali na bamɛtrɛ 1 000 likoló ya nivo ya mbu. Na bisika mingi basengelaki kokita bangomba. Batambolaki na banzela ya nkaka oyo elekaki na bangomba ná mabwaku mpe bakatisaki mai mingi ya mike mpe ya minene na makolo.

Ntango liyangani esilaki, bamemaki bankama ya buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Bamemaki yango mpo na kokabola na bato ya mboka na bango Mokhotlong. Kasi, na nzela bakutanaki na bato mingi oyo basepelaki na mikanda yango, basilisaki babuku nyonso oyo bamemaki na nzela liboso bákóma epai na bango. Tii lelo, ngai ná Emily tosepelaka mingi ndenge tozwaki libaku malamu ya komona na miso molende mpe elimo ya komipesa ya bandeko basi mpe mibali baklisto lokola Filemon ná mwasi na ye.

Na bantango mosusu, tozalaki kokutana na makama: banyoka mabe lokola kobra, mpela ya mbalakaka, mpe mikakatano mosusu. Makambo nyonso wana atako ezalaki kobangisa biso na ntango wana, tomonaka yango mpamba soki tokokanisi yango na mbano oyo tozwi mpe bisengo oyo toyoki na mosala ya Yehova. Tomoni na miso ete Yehova asundolaka soki moke te basaleli na ye ya sembo.

Ntango Emily akómaki na mikakatano makasi ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, Yehova apesaki biso bwanya ya kozala na bokatikati na likambo yango. Kopona biloko ya kolya mpe kozala pɛtɔ esalisaki ye azongela bokolɔngɔnɔ na ye noki. Tobongisaki esika ya kolala na kati ya motuka na biso mpo Emily apemaka malamu ntango tozali kosala mobembo, mpe nsukansuka akómaki malamu.

Tozongi na Canada

Na 1988, nsima ya mbula 35 ya mosala ya misionɛrɛ na bamboka kitoko ya Afrika, basɛngaki biso tózonga na Canada. Na nsima, na 1991, nabandaki lisusu kosala lokola mokɛngɛli-motamboli. Mbula mwambe na nsima, nabɛlaki maladi ya kokangama motema. Atako kobanda wana nasalaka lisusu mingi te lokola liboso, nazali na esengo ya kosala lokola nkulutu na lisangá moko ya London (etúká ya Ontario).

Soki nakanisi ndenge nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, likoló ya mpunda na sudi ya Saskatchewan eleki sikoyo mbula 56, nasepelaka mingi. Nazali na botɔndi mingi epai na Tata na ngai, ndenge azalaki koteya biso mbala na mbala tókanisaka ndenge bato ya elimo bakanisaka, mpe tóbanga te kotɛlɛma ngwi mpo na solo mpe bosembo! Asalisaki ngai nayeba Liloba ya Nzambe, oyo esali ete bomoi na ngai ekóma na ntina. Kobanda wana, nazwi litomba na libula yango mikolo nyonso ya bomoi na ngai. Nakopesa nzela na eloko moko te ya mokili oyo esili konuna etinda ngai natika mosala ya Yehova, mosala oyo nasali yango bomoi na ngai mobimba.

[Elilingi na lokasa 23]

Libota na biso ya bana libwa na 1949, ná Mama amemi mwana ya nsuka. Ngai natɛlɛmi nsima na ye

[Elilingi na lokasa 24]

“Caboose” oyo nasalaki mpo natambolaka na yango na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 24]

Basi oyo bakangaki bango na Québec mpo bazalaki kosakola nsango malamu

[Elilingi na lokasa 26]

Nazalaki kati na balakisi oyo bateyaki bakɛngɛli-batamboli oyo na Zimbabwe

[Elilingi na lokasa 27]

Tosalaki esika ya kolala na motuka na biso mpo Emily apemaka

[Elilingi na lokasa 27]

Foto ya mikolo oyo, ngai ná Emily