Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Ekweaki na mabɔkɔ ya malamu!”

“Ekweaki na mabɔkɔ ya malamu!”

“Ekweaki na mabɔkɔ ya malamu!”

Patricia alɔkɔtaki sakosi moko ya moke oyo moto moko abosanaki yango na biro moko ya Leta, na engumba Cuernavaca, na Mexique. Ntango afungolaki yango, amonaki ba cartes de crédits ebele ná ba chèques oyo batondisi mpe batye sinyatire kasi bakomi motango ya mbongo te, mpe mikanda ya Leta ya moto moko oyo asalaka baplan ya bandako. Ntango kaka akómaki na ndako, abengaki moto yango mpo na koyebisa ye ete alɔkɔti sakosi na ye ya mikanda. Moto yango akamwaki mpenza mpe alobaki ete: “Nzambe mersi, ekwei na mabɔkɔ ya malamu!”

Ntango papa yango oyo asalaka baplan ya bandako ayaki epai ya Patricia kozwa mwa sakosi na ye, alobaki na ye ete azali mpenza anzelu oyo Nzambe atindi. Patricia azongisaki ete azali Motatoli ya Yehova mpe alimbolaki ete: “Nasambelaka Nzambe ya solo, Yehova, mpe ye nde moto ateyaki ngai. Yango wana nasali bongo. Lokumu nyonso wana ebongi nde na ye.” Ntango moto yango alingaki kofuta Patricia mpo na likambo oyo asalaki, Patricia aboyaki. Kasi, Patricia apesaki ye nde mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe alobaki na ye ete akosepela ete atánga mikanda yango mpe esalisa ye.

Ndenge moko na ebele ya Batatoli ya Yehova mosusu, Patricia ayekolaki buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Moko ya mikapo 19 ya buku yango elobi ete “Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe epesaka esengo.” Patricia amonaki bosolo ya motó ya likambo moke “Kolongobana epesaka esengo.”

Okoki kozwa buku yango ya nkasa 192 soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.