Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosolola ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya bikelamu nyonso

Kosolola ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya bikelamu nyonso

Kosolola ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya bikelamu nyonso

NTANGO Julie abotamaki sika, baboti na ye bazalaki kozela na motema likoló mokolo oyo akobimisa maloba na ye ya liboso. Mama na ye alobi boye: “Koyoka maloba lokola ‘Mama’ mpe ‘Papa’ na monɔkɔ ya mwana moke ezalaka likambo ya esengo oyo moboti nyonso asepelaka na yango mingi. Mbala ya liboso oyo Julie abengaki ngai ‘Mama,’ ezalaki lokola nde azali kozinga ngai na mwa mabɔkɔ na ye mpe koloba: ‘Ozali mama na ngai. Nalingaka yo, mpe nalingi kosolola na yo.’ Nakobosana ata moke te ntango wana ya esengo mpenza.” Ya solo, likoki ya kosolola ezali mpenza likabo ya motuya!

Na ntembe te, ezali kaka bato te nde bakelamá na likoki ya kosolola. Atako nyama etambwisamaka mingi mpenza nde na lɔɔmbi (instinct), yango mpe esololaka na ndenge mosusu ya kokamwa mpenza. Na ndakisa, mbula na mbula, mwa moke liboso ya eleko ya malili makasi na mbu ya Antarctique, ntango ndɛkɛ babengi manchot empereur ekutanaka basi ná mibali, makɛlɛlɛ oyo esalanaka na matoi ezalaka lisano ya mpamba te. Bomoi ya mwana oyo akobotama etaleli likambo yango. Ndenge nini?

Nsima ya kobwaka likei, manchot ya mwasi etikelaka oyo ya mobali likei yango mpo etya yango na libenga oyo ezalaka na nse ya libumu mpe efandela yango, kasi yango ekendaka na mbu mpo na kolya. Nsima ya mikolo soki 65, ezongaka wana ezali kotambola lokola libata mpe kobendana na libumu kilomɛtrɛ 150 likoló ya mai oyo ekangamá libanga. Ezalaka pɛtɛɛ te mpo eyeba lisusu esika baninga na yango batikalaki; kasi ndenge nini eyebaka lisusu mobali oyo atikelaki ye likei mpe mwana na bango oyo auti kobotama na kati ya bankóto ya bandɛkɛ yango? Na ntango oyo bandɛkɛ yango ekutanaka basi ná mibali mpo na kobota, mokomoko ekangaka mongongo ya mobali to mwasi na ye, yango wana ezalaka mpasi te mpo eyebana lisusu ntango ekutani, ata nsima ya basanza ebele!

Nyama esololaka kaka te na mingongo ya ndenge na ndenge mpe ya kokamwa oyo ebimisaka, kasi esololaka mpe na bilembo, na balangi oyo ebendaka likebi ya nyama mosusu, na miinda oyo epɛlisaka, mpe na nsolo oyo etindelanaka. Atako ekoki kozala mpasi mpo na kondima yango, nzete mpe esololaka yango na yango mpe na nyama mosusu, ndenge tokomona yango. Ya solo, kosolola esimbi mpenza bomoi ya bikelamu nyonso ya mabelé, oyo bomoi ya bamoko etaleli mpenza oyo ya basusu.

Olingi koyeba makambo mingi etali mitindo ndenge na ndenge ya kosolola ya bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali awa na mokili? Okosepela kobakisa botɔndi na yo mpo na makoki na yo ya kosolola, ata mpe kokolisa makoki yango? Masolo oyo elandi ekosalisa yo.

[Elilingi na lokasa 3]

Ndenge nini “manchot empereur” ya mwasi eyebaka lisusu mobali na ye?