Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosolola ya bikelamu ndenge na ndenge

Kosolola ya bikelamu ndenge na ndenge

Kosolola ya bikelamu ndenge na ndenge

“Soki kosolola ezalaka te, mbɛlɛ moto mokomoko azalaka lokola esanga oyo ezali mosika na bisanga mosusu.”​—Elobeli ya nyama (na Lingelesi).

NA KATI ya zamba, na esobe, ata mpe na elanga na yo ya nsima ya ndako, ekoki kozala ete ebele ya nyama ezali kosolola. Buku Elobeli ya nyama elobi ete: “Mpo na kosolola, nyama esalelaka biyokeli nyonso: eningisaka binama na yango ya nzoto lokola mokila, maseke, mapapu to nzoto mobimba; etindelanaka nsango na nsolo oyo ebimisaka​—ezala ya makasi to te, lokola nsolo ya gambala—​egangaka na mingongo ya makasi, eyembaka mpe esalaka mwa makɛlɛlɛ, eningisanaka na kura ya nzoto na yango, ebenganaka na mwinda oyo epelisaka, ebongolaka langi ya nzoto na yango, ‘ebinaka,’ mpe ekómaka tii kobɛta eloko oyo emati likólo na yango lokola mbonda to eningisaka yango.” Kasi nyonso wana elakisaka nini?

Bato ya siansi bayebaka kolimbola bilembo oyo nyama esalaka ntango batalaka yango malamumalamu. Na ndakisa, bamonaki ete soki nsoso emoni mosole to nyama mosusu ya nse oyo elyaka yango, egangaka makasi kɔ, kɔ, kɔ mpo na kokebisa nsoso mosusu. Kasi soki emoni kombekombe, egangaka mbala moko makasi mpe ntango molai. Ntango nsoso egangaka, mongongo oyo esalelaka emonisaka lolenge ya likama mokomoko; yango emonisi ete ndɛkɛ eyebisanaka mpenza makambo ya ntina. Bamonaki mpe ete ndɛkɛ mosusu eyebisaka likambo na likambo na mongongo na yango.

Buku Nzembo, koganga mpe bikela, (na Lingelesi) elobi ete: “Lolenge mosusu ya malamu ya koyekola kosolola ya nyama ezali ya kokɔtisa mongongo ya nyama moko na kasɛti mpe koyokisa yango nyama mosusu ya motindo yango mpe kotala soki ekosala ndenge emeseni kosala.” Ntango bamekaki yango epai ya nsoso, nsoso ekanisaki ete ezalaki mpenza nsoso mosusu ya solo. Mayele yango elongaki mpe epai ya mampulututu mosusu. Mpo na koyeba nini ebendaka mampulututu ya basi epai ya mibali​—oyo elukaka kobenda likebi ya basi ntango eningiselaka yango makolo na yango ya liboso oyo ezalaka nsukinsuki​—bato oyo bayekolaki likambo yango bakangaki na kamera bililingi ya limpulututu moko ya mobali, mpe balongolaki na bililingi yango nsuki ya makolo, na nsima balakisaki bililingi yango liboso ya oyo ya mwasi. Kasi limpulututu ya mwasi etalaki yango ata kotala te. Yango elakisi nini? Elakisi ete mampulututu ya basi elingaka kaka mampulututu ya mibali oyo ezalaka makolo nsukinsuki!

Kosolola na nsolo

Nyama mingi esololaka na biloko ya nsolo makasi oyo babengi phéromones, oyo nzoto na yango ebimisaka na masuba to na nyei. Ndenge kaka nkombo to nimero liboso ya lopango moko eyebisaka nani azali nkolo ya lopango yango, ndenge moko mpe nsolo yango (phéromones) ekataka ndelo na bisika oyo nyama boye to boye ezali, ata mpe mbwa ná nyau. Atako emonanaka te, nsolo wana oyo ekataka bandelo malamu mpenza, esalisaka nyama ya motindo moko eyeba esika oyo esengeli kosuka.

Kasi nsolo yango esukaka kaka te na koyebisa nyama ndelo ya esika oyo esengeli kosuka. Ezali mpe lokola etanda ya mayebisi oyo nyama mosusu “etalaka” na likebi mpenza mpo na kozwa nsango. Buku Ndenge nyama esololaka (na Lingelesi) elobi ete nsolo wana eyebisaka “kozanga ntembe makambo mosusu etali nyama oyo ezali na esika wana, na ndakisa soki ezali mwana to mokoló, mwasi to mobali, soki ezali makasi mpe makambo mosusu, [mpe] soki nyama yango ekondima oyo ya mobali to te . . . Nsolo ya nyama mokomoko ezali lokola mokanda ya Leta oyo esalisaka nyama mosusu eyeba yango.” Yango wana, tokoki kokamwa te ete nyama mosusu elingaka te nsolo na yango elongwa na esika na yango. Bato oyo bakɛngɛlaka lopango ya nyama bayebi likambo yango malamu. Nsima ya kosukola ndako to lopango ya nyama, bamonaki ete nyama mingi ezongisaki noki nsolo na yango na bisika wana. Buku oyo tolobeli awa likoló elobi ete: “Soki nyama eyoki nsolo na yango na ndako to na lopango na yango te, ebangaka mingi; ekómaka ete ezwa mobulu mpe etika ata kobota.”

Nsolo yango (phéromones) ezali mpe na ntina mingi epai ya nyama-nkɛkɛ. Na ndakisa, nsolo ya kokebisa etindaka yango ezala liboke moko to ebundisa monguna. Nsolo ya kobyangana, ebendaka yango na esika bilei ezali to na esika oyo elingi kotonga ndako na yango. Na kati ya nsolo ya kobyangana, ezalaka mpe na nsolo oyo ebendaka mobali to mwasi, oyo ezalaka makasi epai ya nyama mingi. Tózwa ndakisa ya mpomboli moko (bombyx du mûrier), oyo mwa maseke na yango mibale ekoki koyoka ata mwa nsolo moke oyo ezali kobenda mwasi to mobali! Esɛngaka nsolo yango ekóma mwa makasi mpo mpomboli ya mobali ebanda koluka oyo ya mwasi oyo ezali kotinda nsolo yango. Kasi kosolola na kotindelana nsolo esuki kaka na nyama te.

Nzete oyo “elobaka”

Oyebaka ete nzete esololaka yango na yango ata mpe na nyama mosusu? Ndenge zulunalo moko (Discover) elimboli yango, bato ya Pays-bas oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete ntango mampulututu ya mikemike ya motane etondanaki mpo na kolya madesu (Haricot de Lima), madesu yango ebimisaki nsolo moko oyo ezalaki kobenda nyama-nkɛkɛ mosusu oyo elyaka mampulututu yango. Ndenge moko mpe soki mbinzo ekɔteli masangu, nzete ya likaya, mpe ntokya (coton), nzete yango ebimisaka mwa nsolo oyo ebendaka lɔtɔ (guêpes), oyo elingaka mpenza kolya mbinzo. Moto moko oyo ayekolaki likambo yango alobaki ete: “Nzete esukaka kaka te na koloba ‘banguna bakɔteli ngai.’ Kasi eyebisaka polele monguna yango. Talá ebongiseli wana ya kokamwa mpe ya kokamwisa kati na biloko ndenge na ndenge!”

Ndenge nzete esololaka ezali mpe likambo ya kokamwa. Zulunalo Discover emonisi ete bato oyo bayekolaka nzete “bakutaki nzete lokola saules, peupliers, aulnes mpe bouleaux ezali koyoka makambo oyo nzete mosusu ya lolenge na yango ezali koyebisa, bakutaki mpe mwa milona ya orje ezali koyoka milona mosusu ya orje. Mbala nyonso, nzete oyo monguna akɔteli (ezala mbinzo ezali kolya yango, maladi moko oyo ekómisaka nkasa matɔnɔmatɔnɔ (mildiou), to mpe mampulututu ya mikemike etondeli yango) . . . ezalaki kotinda nsolo mpo na koyebisa nzete mosusu oyo ezali pembeni wana emibatela.” Ata nzete ya mitindo mosusu emibatelaka mpe ntango eyokaka nsolo ya kokebisa oyo nzete moko etindi.

Ezala monguna akɔteli yango to bakebisi yango mpo na likama, nzete ebimisaka makoki na yango ya komibatela. Na ndakisa, ebimisaka ngɛngɛ oyo ebomaka nyama-nkɛkɛ to ebimisaka biloko mosusu oyo epekisaka nyama-nkɛkɛ elya yango. Soki bayekoli lisusu likambo yango na mozindo, ntango mosusu bakoyeba makambo mosusu ya kokamwa oyo ekoki ata kozala na ntina mpo na mosala ya bilanga.

‘Kosolola’ na miinda

Na lisolo moko oyo elobelaki nyaikole, Susan Tweit, oyo ayekolaka boyokani kati na bikelamu ya bomoi, akomaki ete: “Mwa miinda wana oyo ezali kopumbwa mpe kongɛngangɛnga, soki esangani na kongɛnga ya minzɔtɔ, engɛngisaka kartye na biso mpe ekómisaka yango kitoko.” Susan Tweit alimboli ete nyama-nkɛkɛ wana (coléoptères) esalelaka elobeli “ya mwinda” oyo “ezalaka banda na mwa kongɛnga ya kokebisa, kino kongɛnga ya ndenge na ndenge oyo nyaikole ya mwasi ná ya mobali ebimisaka mpo na kobendana.” Mwinda oyo engɛngisaka ezalaka ya langi ya mai ya pɔndu, ya mosaka to ya mwa motane. Lokola nyaikole ya basi epumbwaka mpenza te, kongɛnga oyo tomonaka ezalaka mingi nde ya oyo ya mibali.​—Talá etanda “Mwinda ya nyaikole ebimisaka molunge te.”

Nyaikole, oyo ezali mitindo 1 900, motindo mokomoko ezali na lolenge na yango ya mwinda. Mosusu epelisaka mwinda mbala misato misato nsima ya segɔndɛ soki moko, mpe mosusu epelisaka miinda ebele mbangumbangu to malɛmbɛmalɛmbɛ. Nyaikole ya mobali oyo ezali koluka oyo ya mwasi, epumbwaka wana ezali kopelisa mwinda mpo na kobenda oyo ya mwasi. Zulunalo moko (Audubon) elobi ete: “Nyaikole ya mwasi eyebaka mwinda yango, mpe ezongiselaka nyaikole ya mobali ya motindo yango mwinda mpo na koyebisa ete: ‘Nazali awa.’ Oyo ya mobali ekoyeba ete oyo ya mwasi ebengi yango mpe ekolanda yango.

Kosolola ya ndɛkɛ

David Attenborough akomaki na buku na ye Bomoi ya ndɛkɛ (na Lingelesi) ete: “Mongongo moko te, ezala ya nyama nini, ekoki kokokana na oyo ya ndɛkɛ na oyo etali koumela, kobongola yango mpe kokamwisa.” Nzembo ya ndɛkɛ eutaka na mongongo te, kasi na syrinx, eloko moko oyo ezalaka na ntolo, esika mongongo ekambwani na banzela mibale liboso ya kokɔta na mimpululu.

Makoki ya koyemba oyo ndɛkɛ ezalaka na yango, ndambo ebotamaka na yango, kasi ndambo mosusu eyekolaka yango epai ya baboti na yango. Yango wana, ndɛkɛ eyembaka lokola ndɛkɛ mosusu oyo ezali na mboka wana. Buku yango elobi ete: “Mikɛngɛli-mboka oyo bamemaki bankɔkɔ na yango na Australie na ekeke ya 19 mpo eyembelaka bato ya Mpoto banzembo na yango ya kitoko, ekómi sikoyo koyemba na ndenge na yango.” Eyembeli ya ndɛkɛ babengi oiseau-lyre ya mobali, oyo balobaka ete ezali ya kitoko mpe ya kokamwa koleka ya ndɛkɛ nyonso, ezali eyembeli oyo eyekolaka yango koyekola epai ya ndɛkɛ mosusu. Kutu, lokola ndɛkɛ yango eyebi komekola mingongo malamumalamu, ekoki komekola pene na mingongo nyonso oyo ezali koyoka, bakisa mpe bibɛteli ya miziki, koganga ya mbwa, kolela ya ngonga, lokito ya epasola mpe ata makɛlɛlɛ ya aparɛi ya foto! Nyonso wana, ezali kaka mpo na kobenda likebi ya mwasi.

Ndɛkɛ babengi pic, oyo etimolaka na ekongo na yango mpo na kozwa bilei, ezali ndɛkɛ oyo eyebi kobimisa mondule lokola ya mbonda. Mpo na kobenga baninga na yango, ebɛtaka ekongo na yango na etape to na nzete oyo ezali na lidusu mpo elela makasi. David Attenborough amonisi ete kutu ntango mosusu, “ndɛkɛ yango esalelaka biloko ya sika. . . lokola manzanza to esimbeli ya kikalungu.” Ndɛkɛ esololaka mpe na kotalana na miso, wana ezali koyemba to te. Na ndakisa, ekoki koningisa nsala na yango ya langilangi mpo na koyebisa baninga makambo.

Mpo na kolakisa ndelo ya esika na yango, ndɛkɛ babengi cacatoès noir ya mobali ya Australie, esalaka makambo ebele: ebɛtaka nzete lokola lokole, eyembaka, ebinaka mpe epanzaka nsala ya mapapu na yango. Ebukaka mwa etape ya nzete, esimbaka yango na misapi na yango ya makolo mpe ebɛtaka na yango mobimbi ya nzete ya kokauka. Kaka na ntango yango, eyembaka makasi, wana efungoli mapapu, ezali koningisa likwala (crête) na yango, mpe koningisa motó liboso mpe nsima. Na mokuse, ezalaka mpenza likambo moko ya kitoko mpo na kotala!

Nyama mosusu eyebaka mingongo ya ndɛkɛ mosusu. Oyebi ndɛkɛ ya nzoi, mwa ndɛkɛ moko oyo ezalaka lokola mosɛsɛ (grive), mpe ezalaka mingi na Afrika? Mwa ndɛkɛ wana, oyo ebongi mpenza na nkombo yango, eyembaka mpo na kobenga nyama babengi ratel, oyo ezalaka lokola nyau, mpo eya esika ndako ya nzoi ezali. Soki ekiti na nzete oyo ezali na ndako ya nzoi to pembeni wana, eyembaka nzembo oyo ekolakisa ete: “Mafuta ya nzoi ezali awa!” Ntango Ratel ekomona nzete yango, ekotɔbola lidusu na manzaka na yango mpo na kolya mafuta ya nzoi.

Kosolola ya bikelamu oyo ezali na nse ya mai

Banda babimisá masini babengi hydrophone, oyo bayokaka na yango na nse ya mai, bato ya siansi bazali kokamwa na mingongo oyo bayokaka na nse ya mai. Mingongo yango, oyo mosusu eyokanaka lokola konguluma, mosusu lokola kolela ya nyau mpe kokɛkɛtɛ ya mino, ezali mpenza ebele mpe basoda oyo bakɔtaka na sous-marin basalelaka yango mpo na kozipa mongongo ya masuwa na bango. Kasi mbisi na mbisi ezalaka mpe na mongongo na yango. Na buku na ye Secret Languages of the Sea (Elobeli ya bikelamu ya mai), Robert Burgess, oyo ayekolaka bikelamu ya nse ya mai, alobi ete: “Mbisi mosusu ‘engulumaka, egangaka lokola nsoso ya mwasi to lokola mbwa,’ mpe esalaka yango mbala na mbala, kasi mosusu ‘elelaka ngɛɛ ngɛɛ ngɛɛ to káa káa káa,’ na nsima ‘ekɛkɛtɛkɛ mino.’”

Ndenge nini mbisi ekoki kobimisa lolaka nzokande ezalaka na misisa ya mongongo te? Robert Burgess alobi ete mbisi mosusu esalelaka misisa oyo ekangani na libenga ya pema na yango oyo ezalaka lokola bale, eningisaka yango tii libenga yango ekolela lokola mbonda. Mosusu elelisaka mino wana ezali kokɛkɛtɛ yango. Mosusu mpe ebimisaka makɛlɛlɛ ya makasi ntango efungolaka mpe ekangaka mbanga (opercule) na yango. Yango ezalaka kaka “makɛlɛlɛ” mpamba? Emonani lokola ete ezali bongo te. Robert Burgess alobi ete, mbisi, ndenge moko na nyama ya mokili, esalaka makɛlɛlɛ mpo na “kobenda oyo ya mwasi to oyo ya mobali, koyeba nzela na yango, komibatela na monguna, kosolola mpe mpo na kobangisa.”

Mbisi mpe eyokaka malamu. Kutu, mitindo mingi ya mbisi ezalaka na matoyi ya kati mpe na nzela moko (baselile ya biyokeli) oyo ezalaka na mipanzi, longwa pene ya motó kino na epɛpɛ. Molɔngɔ yango ya baselile ya biyokeli (ligne latérale), esalisaka mbisi eyoka makɛlɛlɛ oyo etambolaka na nse ya mai lokola mbonge.

Baoyo basololaka na ndenge eleki malamu

Noam Chomsky, profesɛrɛ ya makambo etali nkota, akomaki ete: “Ntango tozali koyekola ndenge bato balobaka, tozali nde koluka koyeba ‘eloko mpenza oyo ekesenisaka moto,’ makoki ya kokanisa, oyo kaka moto nde azalaka na yango.” Barbara Lust, profesɛrɛ ya makambo etali nkota mpe bato, alobi ete: “Kobanda ntango bakokisi mbula misato, bana bayebaka mpenza, na ndenge ya kokamwa, kotya maloba na molɔngɔ mpe koloba malamu, boyebi oyo ezali ya kokamwa mpe ya sikisiki, oyo tii lelo bato bazali kokoka te kolimbola malamumalamu ndenge nini yango eyaka.”

Nzokande, Biblia epesi ndimbola ya polele mpo na likoki ya kosolola oyo bato bazalaka na yango, oyo ezali mpenza likamwisi. Emonisi ete likabo yango euti na Mozalisi, Yehova Nzambe, oyo asalaki moto na “elilingi” na ye. (Genese 1:27) Kasi ndenge nini bizaleli ya Nzambe emonanaka na makoki na biso ya koloba?

Na ndakisa, tólobela nkombo. Frank Dance, profesɛrɛ ya makambo etali kosolola, akomaki ete “na bikelamu nyonso, kaka bato nde bakoki kopesa bankombo.” Ezali polele na kotalela Makomami ete, likoki yango euti epai ya Nzambe. Na ebandeli mpenza ya lisolo ya bozalisi oyo ezali na Biblia, tozali kotánga ete Nzambe “abengaki pole moi, mpe molili abengaki [yango] butu.” (Genese 1:5) Na kotalela Yisaya 40:26, Nzambe apesaki monzɔtɔ mokomoko nkombo. Oyo nde likambo ya kokamwa!

Nsima ya kosala Adama, mosala ya liboso oyo Nzambe apesaki ye ezalaki ya kopesa banyama nkombo. Talá mosala oyo esɛngaki Adama abimisa mayele na ye nyonso ya kotala mpe ya kokanisa! (Genese 2:19, 20) Na nsima, Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva. Eva mpe apesaki mwana na bango ya liboso nkombo Kaina. (Genese 2:19, 20; 3:20; 4:1) Kobanda wana, bato bapesaka ezala eloko nini nkombo, nyonso wana mpo kosolola ezala mpasi te. Kanisá mokakatano oyo tolingaki kozala na yango mpo na kosolola malamu, soki bankombo ezalaki te!

Longolá likoki mpe mposa ya kopesa bankombo, bato bazali na makoki mosusu ebele ya kosolola, mpe nyonso ezali kaka na maloba te. Kutu, tokoki koloba ete, nsuka ezali te na lolenge ya kosolola oyo bato bakoki kosolola bango na bango, kobanda na makambo oyo ezali mpasi mpo na kokanga ntina tii na mayoki ya mozindo. Kasi, ezali na lolenge mosusu ya kosolola, oyo eleki mosusu nyonso, ndenge tokomona yango sikoyo.

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

MWINDA YA NYAIKOLE EBIMISAKA MOLUNGE TE

Ampulɛ oyo ezali kopɛla esalelaka kaka mwa ndambo ya kura (soki 3%) oyo ekómelaka yango mpo na kopesa mwinda, mpe kura nyonso oyo etikali ebimisaka molunge. Mwinda ya nyaikole, oyo epelaka ntango biloko ndenge na ndenge ya nzoto na yango esangani (réactions chimiques), esalelaka nguya na yango pene na nyonso mpo na kopela (90 tii 98 %), ata nguya moke te ebimisaka molunge. Yango wana, babengaka yango mwinda oyo ebimisaka molunge te. Mwinda yango eutaka na kosangisama ya biloko ndenge na ndenge ya baselile oyo babengi photocytes. Baselile ya bɔɔngɔ nde ebomaka mpe epelisaka mwinda yango.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

John M. Burnley/Bruce Coleman Inc.

[Etanda/Elilingi na lokasa 8]

TOLI OYO EKOSALISA YO OYEBA KOSOLOLA MALAMU

1. Landá na likebi ntango bato mosusu bazali koloba, mpe koluka te kaka yo moko olobaka. Bato bakolandela mpenza te foti oyo osali na ebengeli ya liloba to na mibeko ya lokota, kasi bakosepela te na moto oyo alobaka mingi mpe alingaka te koyoka baninga. Biblia elobi ete, ‘Osengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.’​—Yakobo 1:19.

2. Sepeláká na bomoi mpe biloko oyo ezali zingazinga na yo. Tángáká mingi kasi ponáká malamu makambo ya kotánga. Ntango ozali kolobela likambo moko oyo oyekoli, zalá na bokatikati mpe na komikitisa.​—Nzembo 5:5; Masese 11:2.

3. Luká koyekola maloba mingi ya sika, kasi kaka maloba oyo bato basalelaka; kosalelaka te maloba ya makasimakasi oyo ekotinda bato bátya likebi epai na yo. Bato balobaki mpo na Yesu ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” (Yoane 7:46) Nzokande, ata “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba” bazalaki na mokakatano te mpo na kokanga ntina ya makambo oyo Yesu azalaki koloba.​—Misala 4:13.

4. Lobáká polele, mpe bimisáká maloba ndenge yango elobamaka mpenza. Kasi kolekisa ndelo te to kobongola te ndenge olobaka. Ntango tozali koloba polelepolele mpe tozali komɛla maloba mosusu te, tozali kopesa kilo na makambo oyo tozali koloba mpe tozali komemya moto oyo azali koyoka biso.​—1 Bakolinti 14:7-9.

5. Kobosana te ete makoki na yo ya kosolola ezali likabo oyo euti na Nzambe. Koyeba bongo ekotinda yo opesa limemya oyo ebongi na likabo yango.​—Yakobo 1:17.

[Elilingi na lokasa 5]

Maseke ya mpomboli babengi bombyx du mûrier eyokaka ata nsolo ya moke

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Courtesy Phil Pellitteri

[Elilingi na lokasa 7]

Pic

[Elilingi na lokasa 7]

Oiseau de paradis

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Michael S. Yamashita/CORBIS

[Elilingi na lokasa 7]

Cacatoès noir

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Roland Seitre