Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo motoba mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na yo

Makambo motoba mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na yo

Makambo motoba mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na yo

Ezali mokakatano mpo na mikili ya bobola

BATO mingi lelo oyo basalaka milende mpo bázala ntango nyonso pɛto, mingimingi na bamboka oyo mai ya pɛto mpe batwalɛti ya malamu ezalaka mpenza te. Kasi, kozala pɛto ezali na ntina mingi. Balobaka ete bana mike koleka 5 likoló na 10 oyo babɛlaka mpe oyo bakufaka, ezalaka mbala mingi mpo na mikrobe oyo ekɔtaka na monɔkɔ mpo mabɔkɔ ezali salite mpe bilei to mai ezali na mikrobe. Tokoki komibatela na bamaladi ebele, mingimingi pulupulu, soki tolandi toli oyo epesami awa, oyo euti na mokanda moko (Savoir pour sauver) ya UNICEF.

1 Bwakáká nyei na twalɛti to kundáká yango

Nyei ezalaka na mikrobe ebele. Soki mikrobe oyo epesaka maladi ekɔti na mai mpe na bilei to soki mabɔkɔ, basaani to bisika ya kolamba mpe mesa ya kolyela ezali na mikrobe, mikrobe yango ekoki kokɔta na monɔkɔ mpe tokoki kozwa maladi. Lolenge ya malamu ya kopekisa mikrobe epalangana ezali ya kobwaka nyei nyonso na twalɛti to kokunda yango. Esengeli kobwaka nyei ya bato na twalɛti. Nyei ya banyama esengeli kozala te pembenipembeni ya ndako, ya banzela, mpe ya bisika oyo bana basakanaka.

Soki twalɛti ezali te, kundá nyei mbala moko. Kobosana te ete nyei nyonso, ata mpe oyo ya bana mike, ezalaka na mikrobe oyo ekoki kopesa maladi. Esengeli kobwaka nyei ya bana na twalɛti to kokunda yango.

Sukoláká twalɛti mbala na mbala. Soki twalɛti na bino ezali ya libulu, bózipaka yango; soki ezali ya kobenda mai, bóbendaka mai.

2 Sukoláká mabɔkɔ

Sukolá mabɔkɔ mbala na mbala. Sukolá yango na mai mpe na sabuni to na putulu mpo na koboma mikrobe. Kosukola mabɔkɔ na mai mbangumbangu ekoki te, osengeli konika yango nyonso mibale na sabuni to na putulu.

Ezali na ntina mingi kosukola mabɔkɔ soki outi na twalɛti mpe nsima ya kosukola mwana oyo auti kosumba. Soki outi kosimba nyama, sukolá mabɔkɔ liboso osimba bilei mpe oleisa bana.

Kosukola mabɔkɔ ebatelaka bato na misɔpi oyo epesaka maladi. Misɔpi yango ezalaka mpenza mike mpe okoki komona yango kaka na mikroskopɛ. Misɔpi yango ezalaka na nyei mpe na masuba, na mai mpe na mabelé, mpe na misuni ya mobesu to oyo ebeli malamu te. Likambo ya libosoliboso oyo osengeli kosala mpo misɔpi yango ekɔta yo na nzoto te ezali kosukola mabɔkɔ. Lisusu, soki ozali kolata sapato ntango ozali pene na twalɛti, misɔpi ekokɔta yo na nzoto te na nse ya makolo.

Mbala mingi, bana bakɔtisaka misapi na bango na monɔkɔ; yango wana, sukoláká bango mabɔkɔ mbala na mbala, mingimingi soki bauti twalɛti to mpe liboso ete bálya. Teyá bango kosukola mabɔkɔ na bango mpe básakanaka te pene na kikɔsɔ, twalɛti to na bisika oyo bato bakendaka kosumba.

3 Sukoláká elongi mikolo nyonso

Mpo ozwa maladi ya miso te, sukoláká elongi na sabuni mpe na mai mikolo nyonso. Sukoláká mpe bana na yo elongi. Elongi oyo ezali na bosɔtɔ ebendaka banzinzi oyo ememaka mikrobe. Mikrobe yango ekoki kopesa moto maladi ya miso, ata mpe koboma ye miso.

Mbala na mbala, taláká miso ya bana na yo malamumalamu. Miso oyo ezali malamu ezalaka ya kokauka te mpe engalaka. Soki miso ya mwana ezali ya kokauka, motane, to ezali kosala mpasi to soki ezali kobimisa mai, esengeli komema ye epai ya lifulume to monganga.

4 Saleláká kaka mai ya pɛto

Bokozwa maladi mingi te na libota na bino soki bozali kosalela mai ya pɛto mpe soki bozali kobatela yango mpo mikrobe ekɔta te. Mai na yo ekoki kozala pɛto soki ebimaka na batiyo ya malamu mpe oyo bazali kobatela yango malamu to soki ozali kotoka yango na mabulu to na maziba oyo ezali pɛto. Mai ya bitima, ya ebale, mpe ya tono to ya mabulu oyo ezipami te ezali pɛto te, kasi ekoki kokóma pɛto soki batɔkisi yango.

Esengeli kozipaka mabulu ya mai. Esengeli kosukolaka bakatini, bansinga mpe biloko ya kotokela mpe ya kobomba mai mpe kobomba yango na esika moko ya pɛto, kasi na nse te. Esengeli kobengana banyama mosika na mabulu to na bisika mosusu ya mai ya komɛla mpe na bandako. Kosalela te nkisi oyo ebomaka nyama-nkɛkɛ to nkisi mosusu pembeni ya libulu to ya liziba ya mai.

Na kati ya ndako, esengeli kobombaka mai na katini to na tono oyo ezali pɛto mpe oyo ezali na mofiniko. Ekozala malamu katini to tono yango ezala na robinɛ. Soki ezali na robinɛ te, bótokaka mai yango na saani to na kɔpɔ oyo ezali pɛto. Kotyaka mabɔkɔ ya salite te na mai ya komɛla.

5 Bateláká bilei mpo mikrobe ekɔta te

Kolamba bilei malamumalamu ebomaka mikrobe. Bilei, mingimingi nyama mpe nsoso, esengeli kolamba yango malamu. Mikrobe ebotanaka mbangumbangu na bilei oyo balambi. Yango wana esengeli kolya bilei yango noki nsima ya kolamba yango. Soki osengeli kobomba yango na boumeli ya ngonga koleka mibale, bombá yango na esika ya mɔtɔ to na frigo. Lisusu, soki osengeli kobomba biloko ya kolya oyo elambami mpo na kolya yango ntango mosusu, finiká yango mpo nzinzi mpe nyama-nkɛkɛ ekɔta te. Liboso ya kolya yango, nyangwisá yango.

Mabɛlɛ ya mama ezali bilei ya malamu mpe ya pɛto mpenza mpo na bana oyo babotami sika ná baoyo ya mike. Miliki ya nyama oyo babomá mikrobe to oyo bauti kotokisa ezali malamu mpenza koleka oyo batokisi te. Kosalela bibɛro te. Kasi, soki esengeli kosalela yango, sukolá yango naino na mai ya mɔtɔ mbala nyonso oyo okosalela yango. Mbala mingi, bibɛro oyo ezali pɛto te ezalaka na mikrobe oyo epesaka pulupulu. Eleki malamu komɛlisa bana mabɛlɛ to komɛlisa bango miliki na kɔpɔ oyo ezali pɛto mpe ezali na esika ya kotya monɔkɔ (tétine) te.

Ezali na ntina mingi osukolaka mbuma mpe ndunda na mai ya pɛto mingi mpenza soki bana bakolya yango mobesu.

6 Bwakáká salite nyonso

Nzinzi, mpese ná mpoko yango nyonso ememaka mikrobe. Nyama yango elingaka salite mingi. Soki bato oyo babwakaka salite bazalaka te na esika ofandi, timolá libulu mpo na kobwakaka salite nyonso mpe kokundaka to kotumbaka yango mikolo nyonso. Bateláká ndako na yo pɛto mpe bwakáká salite mpe mai ya bosɔtɔ.

Soki ozali kosalela toli oyo mikolo nyonso, okoumela te komesana na yango. Toli yango ezali mpasi te mpe ezali kosɛnga mbongo mingi te, kasi ekosalisa yo ná libota na yo bózala nzoto kolɔngɔnɔ.

[Elilingi na lokasa 11]

Esika kabinɛ to wc ezali te, kundá nyei noki noki

[Elilingi na lokasa 11]

Sukoláká mabɔkɔ na yo mbala na mbala

[Elilingi na lokasa 12]

Bokozwa maladi mingi te na libota na bino soki bozali kosalela mai ya pɛto mpe kobatela yango mpo mikrobe ekɔta te

[Elilingi na lokasa 12]

Sukoláká elongi na sabuni mpe na mai mikolo nyonso

[Elilingi na lokasa 13]

Soki osengeli kobomba bilei oyo elambami mpo na kolya yango ntango mosusu, finiká yango

[Elilingi na lokasa 13]

Esengeli kokunda to kotumba salite nyonso mokolo na mokolo