Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mbula ya Biblia”

“Mbula ya Biblia”

“Mbula ya Biblia”

Na Allemagne, na Autriche, na France mpe na Suisse, babengaki mbula 2003 ete “Mbula ya Biblia.” Zulunalo moko ya Allemagne (Frankfurter Allgemeine Zeitung) elobi ete: “Ndenge basepelaki mbula yango mbala moko kaka na 1992, [mangomba] ezali kosala nyonso mpo bato bátya likebi na ‘buku [wana] ya bomoi’ mpe elingi komonisa ntina ya Makomami Mosantu na bomoi ya bato.”

Zulunalo moko (Bibelreport), na nimero oyo ebimaki na sanza ya Yuni 2002, emonisaki ete Biblia esili kobongolama​—ata mwa ndambo​—na minɔkɔ 2 287. Bakanisaka mpe ete Babiblia nyonso oyo ebimá ekoki kokóma miliare mitano. Milende wana nyonso emonisi polele ete bato bapesaki buku yango lokumu mingi.

Lelo oyo, mbala mosusu bato ebele bandimaka te ete Biblia ezali na ntina. Kutu, mingi bamonaka ete mitinda oyo ezali na Biblia esilá ngala mpe eyokani te na makambo ya mikolo oyo. Kasi, ntango basakolaki Mbula ya Biblia, mangomba ya Allemagne ezalaki na mikano mibale: kolendisa bato bátosa mateya ya Biblia na bomoi na bango mpe kobenda likebi ya bato oyo basambelaka te báluka koyeba makambo oyo ezali na Biblia.

Kotánga Biblia bandá ebandeli tii na nsuka ezali likambo ya pɛtɛɛ te, kasi esengeli kosala bongo mpo na koyeba makanisi ya ntina oyo ezali kati na Makomami. Nzokande, moto oyo alingi mpenza kozwa litomba mingi na mateya ya Biblia, asengeli kobosana te maloba oyo 2 Timote 3:16, 17 elobi ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”

Johann Wolfgang von Goethe, mokomi moko ya maloba ya ntɔki na Allemagne (1749-1832) alobaki boye: “Nandimi ete Biblia ekómaka lisusu kitoko koleka soki moto abandi kokanga ntina na yango.” Ya solo, bobele Liloba ya Nzambe nde eyebisi biso epai wapi toutá, mpo na nini tozali awa na mokili, mpe nini ezali kozela biso na mikolo oyo ezali koya!​—Yisaya 46:9, 10.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Euti na buku Bildersaal deutscher Geschichte