Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

Ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?

“Nalukaka kosala likambo nyonso na ndenge ya kokoka.”​—Carly.

KOLUKA kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali likanisi oyo bato mosusu bazalaka na yango ete likambo nyonso oyo moto azali kosala esengeli kosalema ata na mbeba moke te. Likanisi yango etungisaka bilenge mingi.

Buku Perfectionism​—What’s Bad About Being Too Good? elobi ete: “Bokeseni monene ezali kati na koluka na ndenge ya malamu kosala makambo na ndenge oyo eleki malamu mpe koboma nzoto na ndenge ya mabe mpo na kokokisa mikano oyo okokoka yango te. Mpo na bato oyo basalaka makasi mpo na kosala makambo na ndenge oyo eleki malamu, esɛngaka ntango mosusu báyeba kotya makambo nyonso na molɔngɔ mpe kobongisa yango malamumalamu, mpe balingaka kolonga na makambo nyonso; kasi bandimaka mabunga na bango mpe bayebi ndenge ya kosala mpo na kokitisa motema. . . . Nzokande, bato oyo balukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, babangaka ntango nyonso kosala mabunga. Bamityelaka mikano oyo eleki makasi.”

Yo ozalaka ndenge wana? Soki omityeli mikano oyo eleki makasi mpe oyo okokoka yango te, okoki kolɛmba. Okokóma kobanga kosala likambo nyonso ya sika. To mpe okokóma kozongisa nsima ata makambo ya ntina, mpo ozali kobanga ete okokoka kosala yango te. Okoki kutu koboya moto nyonso oyo azali kokoka te kosala makambo ndenge oyo yo olingaka mpe okomona baninga nyonso bakimi yo.

Soki omoni ete makambo oyo balobeli awa etali yo, talelá toli oyo Biblia epesi na Mosakoli 7:16: “Zala na boyɛngɛbɛnɛ na koleka tɛ mpe omibɔngisa na mayɛlɛ na koleka tɛ. Mpɔ na nini okomibebisa?” Ya solo, moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka akoki ‘komibebisa’ ye moko! Kutu, emonanaki ete koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka ekoki komema moto na maladi ya kolya na lokoso to ya kolya na nsɔngɛ ya misapi. *

Ntango mosusu okoki komituna, ‘ndenge nini nakoki kotika koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka?’ Ya solo, kobongola makanisi ya moto na likambo yango ezali pɛtɛɛ te. Kasi na lisalisi ya Nzambe, okoki kolonga kosala yango. Tótalela naino ndenge Nzambe amonaka likambo ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka.

Moto akoki kosala makambo na ndenge ya kokoka?

Ya liboso, okoki kosala makambo nyonso na ndenge mpenza ya kokoka? Biblia elobi ete ekoki kosalema te, mpamba te eyebisi ete: “Ezali ata na moyengebene moko te, ata moko mpamba te . . . Bato nyonso batiki nzela, bango nyonso elongo bakómi biloko mpamba.” (Baloma 3:10-12) Maloba wana etindi mpenza na kokanisa; boye te? Emonisi ete moto nyonso oyo akoluka kosala makambo na ndenge mpenza ya kokoka akolonga te.

Tólobela naino ntoma Paulo, oyo ayebani ete azalaki ndakisa malamu na makambo ya elimo. Nzokande, ata Paulo akokaki te kosalela Nzambe kozanga kosala mabunga. Ye moko alobaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai. Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe engebene moto oyo ngai nazali na kati, kasi nazali komona na kati ya binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba ná mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na kati ya binama na ngai.” (Baloma 7:21-23) Ezalaki bobele na lisalisi ya Nzambe nde Paulo azalaki moklisto ya sembo.

Ezali esengo koyeba ete Nzambe asɛngaka biso te tósala makambo na ndenge ya kokoka, azelaka mpe te tósala bongo. “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana tɛ ete tozali bobɛlɛ mputulu.” (Nzembo 103:14) Bato bakokóma na ezaleli ya kokoka bobele na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.

Bongolá makanisi na yo

Lokola tokómi naino na mokili ya sika te, kokanisa ete okoki kosala makambo na ndenge ya kokoka ezali makanisi oyo ebongi te. Kutu, osengeli koyeba ete okosala mabunga mbala na mbala. (Baloma 3:23) Mabunga mosusu kutu oyo tosalaka, toyebaka yango te. Nzembo 19:12 (Liloba lya Nzambe) elobi ete: “Kasi nani akomonoko mabe ma ye moko?” Matthieu, elenge mobali moko, alobaki boye: “Ozali moto ya kokoka te​—moto moko te awa na mabelé azali moto ya kokoka. Soki ozali kokanisa ete okosala makambo nyonso na ndenge ya kokoka, okozala na esengo ata moke te. . . . Okokoka te; ekoki kosalema te.”

Ntango ozali na likanisi wana na motó, mpo na nini te kobongola lolenge na yo ya kotalela makambo? Na ndakisa, obomaka nzoto mpo na koluka kozala kaka moto ya liboso na likambo moko boye? Biblia emonisi ete koboma nzoto ndenge wana ekoki kozala “mpamba mpe koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4) Kutu, kaka mwa bato moke nde bazwaka esika ya liboso. Ata soki moto azwi esika ya liboso, mbala mingi eumelaka te mpo moto mosusu abɔtɔla ye esika yango.

Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Nazali koyebisa moto nyonso kuna na kati na bino ete akanisa mpo na ye moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa; kasi akanisa nde na ndenge ya kozala na makanisi malamu.” (Baloma 12:3) Talelá makambo ndenge yango ezali! Bongolá lolenge na yo ya kotalela makoki na yo mpe yebá esika yango esuki. Luká kosala oyo eleki malamu, kasi koluka te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Mityelá mikano ya sikisiki kasi oyo okoki kokokisa yango.

Na ndakisa, Paulo alendisaki Timote akóma “mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) Awa, Paulo azalaki kolendisa ye aluka kosala makambo na ndenge ya malamu koleka, kasi te aluka kosala makambo nyonso na ndenge ya kokoka. Ndenge moko mpe, komityela mikano oyo eleki makoki na yo te. Mpe soki ozali koyeba malamu te mikano nini “ekokani na makoki na yo,” sololá na baboti na yo to na mokóló mosusu oyo otyelaka motema.

Bato mosusu kutu bapesaka toli ete omeka kosala eloko moko oyo okokaka yango te, na ndakisa koyekola lisano moko ya sika to koyekola kobɛta gidare, piano to lokole. Ezali solo ete ntango ozali koyekola eloko moko ya sika, okosala mabunga mingi. Kasi kosala mabunga ndenge wana ezali mpenza mabe te. Ntango mosusu yango ekosalisa yo oyeba ete ntango ozali koyekola likambo moko okosala kaka mabunga.

Ezala likambo nini olingi kosala​—kokoma rédaction to koyekola kobɛta piano—​landá toli mosusu oyo ntoma Paulo apesi: “Bósalaka misala na bino kozanga kolekisa ntango mpambampamba.” (Baloma 12:11) Kozongisa makambo nsima te to kolalisa makambo te kaka mpo na kobanga ete okolonga te.

Elenge mwasi moko azalaki na momeseno ya kozongisa badevuare na ye ya kelasi noki te mpo azalaki koloba ete asengelaki naino “komibongisa.” Atako koyeba kosala makambo na molɔngɔ ezali mabe te, osengeli kokeba ete okóma te na momeseno ya kozongisa makambo nsima. Mwana mwasi yango ayaki komona ete “eleki malamu kozongisa devuare ata soki osali yango malamu te, na esika ya koboya kozongisa yango.”

Longolá makanisi oyo ekoki kobebisa yo!

Ezali solo ete esalaka mpasi koyeba ete mosala oyo osali, osali yango malamu te. Okoki kutu kokóma na makanisi ya komipesa foti mpe ya kolɛmbisa. Okoki kosala nini? Soki omitiki na makanisi ya kolɛmbisa, ozali nde komibebisa yo moko. Na yango, salá makasi obengana makanisi ya komikanisela mabe. Soki osali libunga, moná yango lokola likambo ya kosɛkisa. Kutu, “ntango ya kosɛka” mpe ezalaka. (Mosakoli 3:4) Kobosana mpe te ete Yehova asepelaka na kofinga te​—ata soki ozali komifinga yo moko.​—Baefese 4:31.

Na esika ya komipesa ntango nyonso foti, salelá nde maloba ya Masese 11:17: “Moto na boboto akosunga molimo na ye mɔkɔ; nde ye oyo azali na nkanda akobebisa nzoto na ye mpenza.” Omituna boye: Ntango nalingaka kosala makambo oyo eleki makasi, namonaka ete bato basepelaka na ngai? Mbala mingi eyano ekoki kozala: te. Ekoki mpe kozala ete oboyá bato mosusu kaka mpo bazalaki te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Sikoyo okoki kosala nini?

Salelá toli oyo Biblia epesi: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Bakolose 3:13) Ya solo, soki ozali na makambo makasimakasi te epai ya basusu, ekozala mpasi te mpo bato básepela na yo!

Mbala mosusu okoki komituna: ‘Bato bakimaka ngai mpo nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?’ Bato mosusu bakomona yo ndenge nini soki ozali komilelalela mpo okokisi te mikano ya makasimakasi oyo omityeli. Buku moko When Perfect Isn’t Good Enough elimboli boye: “Komilelalela koleka ndelo ntango ozwi zomi likoló na zomi te na ekzamɛ ekoki kolɛmbisa baninga oyo basengeli koboma nzoto mpo na kozwa ata mwambe to motoba likoló na zomi.” Na yango, salá makasi mpo otika komityela makanisi ya mabe mpe otika komona kaka makambo na yo moko. Bato bakomona ete kofanda na yo esepelisaka bango.

Elenge Carly alobi likambo yango na mokuse boye: “Nasengeli kobengana makanisi ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka.” Ndenge nini okoki kosala yango? Manyolá likoló ya ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo. Soki ozali kaka na mokakatano mpo na kobongola makanisi na yo na likambo yango, sololá na baboti na yo to na moklisto mosusu ya lisangá na bino oyo akɔmeli. Yebisá Nzambe likambo yango na libondeli mpe sɛngá ye asalisa yo obongola makanisi na yo. Libondeli ekoki kopesa yo makasi ya kobundisa momeseno ya koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka.​—Nzembo 55:22; Bafilipi 4:6, 7.

Kobosana te ete Yehova asɛngaka biso te tósalaka makambo na ndenge ya kokoka; alukaka bobele tózala sembo epai na ye. (1 Bakolinti 4:2) Soki ozali kosala makasi mpo na kozala sembo, okoki mpenza kosepela na ndenge ozali​—ata soki ozali moto ya kokoka te.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Talá lisolo “Mpo na nini nalukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka?” na Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2004.

[Elilingi na lokasa 19]

Soki obangaka kosala mabunga, okosala eloko te

[Elilingi na lokasa 20]

Koyekola makambo ya sika ekosalisa yo oyeba kokitisa motema ntango okosala mabunga